< 1 Bakonzi 12 >

1 Roboami akendeki na Sishemi epai wapi lisanga mobimba ya Isalaele esanganaki mpo na kokomisa ye mokonzi.
Rehoboam went to Shechem because that is where the whole of Israel had gone to make him king.
2 Kasi sima na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, koyoka sango yango wuta na Ejipito epai wapi akendeki kobombama mpo na kokima mokonzi Salomo, azongaki wuta na Ejipito.
Jeroboam, son of Nebat, was still in Egypt when he heard about this. (He had run away to Egypt to escape from King Solomon and was living there.)
3 Boye, batindaki bato kobenga Jeroboami; bongo ye elongo na lisanga mobimba ya Isalaele bakendeki epai ya Roboami mpe balobaki na ye:
The Israelite leaders sent for him. Jeroboam and the whole assembly of Israelites went to talk with Rehoboam.
4 — Tata na yo anyokolaki biso makasi; kasi sik’oyo, yo, lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso; bongo biso, tokosalela yo.
“Your father placed a heavy burden on us,” they told him. “But now if you lighten the load when we served your father and the heavy demands he put on us, we will serve you.”
5 Roboami azongisaki: — Bokende epai na bino, bopesa ngai mikolo misato mpo na koyekola likambo yango, bongo bozongela ngai. Mpe bato bakendeki.
Rehoboam answered, “Go away and come back in three days time.” So the people left.
6 Mokonzi Roboami atunaki toli epai ya bampaka oyo basalaki elongo na Salomo, tata na ye, tango azalaki nanu na bomoi. Alobaki na bango: — Toli nini bozali kopesa ngai lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo?
King Rehoboam asked for advice from the elders who had served his father Solomon when he was alive. “How do you advise me to reply to these people about this?” he asked.
7 Bazongiselaki ye: — Soki, na mokolo ya lelo, omikomisi mosali ya bato oyo, soki osaleli bango mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo.
They replied, “If you are a servant to these people today, if you serve them and answer them, by speaking kindly to them, they will always serve you.”
8 Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye.
But Rehoboam dismissed the advice of the elders. He instead asked advice from the young men who he had grown up with, and who were close to him.
9 Atunaki bango: — Toli nini bozali kopesa lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo balobi na ngai: « Lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso? »
He asked them, “What response do you advise that we send back to these people who have told me, ‘Lighten the burden your father put on us’?”
10 Bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye bazongisaki: — Tala makambo oyo okoyebisa bato oyo balobi na yo: « Tata na yo anyokolaki biso na misala makasi; kasi yo, lembisela biso yango! » Yebisa bango: « Mosapi na ngai ya moke eleki loketo ya tata na ngai na monene;
The young men who he had grown up with told him, “This is what you have to tell these people who said to you, ‘Your father made our burden heavy, but you should make it lighter.’ This is what you should answer them: ‘My little finger is thicker than my father's waist!
11 soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai, nakoyeisa yango lisusu makasi koleka; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. »
My father placed a heavy burden on you, and I will make it even heavier. My father punished you with whips; I will punish you with scorpions.’”
12 Sima na mikolo misato, Jeroboami elongo na bato nyonso bazongaki epai ya Roboami, ndenge mokonzi ayebisaki bango: « Bozongela ngai sima na mikolo misato. »
Three days later, Jeroboam and all the people returned to Rehoboam, because the king had told them, “Come back in three days time.”
13 Mokonzi Roboami aboyaki kosalela toli oyo bampaka bapesaki ye, ayanolaki bato na maloba mabe makasi;
The king answered the people sharply. Dismissing the advice of the elders,
14 alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango: Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende.
he replied using the advice of the young men. He said, “My father placed a heavy burden on you, and I will make it even heavier. My father punished you with whips; I will punish you with scorpions.”
15 Mokonzi aboyaki koyoka bato, pamba te ezalaki Yawe nde asalaki bongo mpo na kokokisa liloba oyo Yawe ayebisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, na nzela ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo.
The king did not listen to what the people said, for this change in circumstances was from the Lord, to fulfill what the Lord had told Jeroboam son of Nebat through Ahijah the Shilonite.
16 Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye: « Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo! » Boye, bana ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo.
When all the Israelites saw that the king wasn't listening to them, they told the king: “What share do we have in David, and what part do we have in the son of Jesse? Go home, Israel! You're on your own, house of David!” So all the Israelites went home.
17 Roboami akobaki kokonza bana ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na bingumba ya Yuda.
However, Rehoboam still ruled over the Israelites who lived in Judah.
18 Mokonzi Roboami atindaki Adorami oyo azalaki motambolisi misala makasi, kasi bana nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki. Nzokande, mokonzi Roboami alongaki komata na shar na ye mpo na kokima na Yelusalemi.
Then King Rehoboam sent out Hadoram, who was in charge of forced labor, but the Israelites stoned him to death. King Rehoboam quickly jumped into his chariot and raced back to Jerusalem.
19 Ezali boye nde bana ya Isalaele batombokelaki ndako ya Davidi kino na mokolo ya lelo.
As a result, Israel has been in rebellion against the house of David to this day.
20 Tango bana nyonso ya Isalaele bayokaki ete Jeroboami azongi, batindaki bato kobenga ye ete aya na mayangani, mpe bakomisaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba. Kaka libota ya Yuda nde etikalaki kotosa bokonzi ya ndako ya Davidi.
When all the Israelites heard that Jeroboam had returned, they sent for him, summoning him to the assembly and made him king over all Israel. Only the tribe of Judah was left to the house of David.
21 Tango Roboami azongaki na Yelusalemi, asangisaki libota nyonso ya Yuda mpe libota ya Benjame, aponaki kati na bango bilombe ya bitumba nkoto nkama moko na tuku mwambe mpo na kobundisa ndako ya Isalaele mpe kozongisa bokonzi na maboko ya Roboami, mwana mobali ya Salomo.
When Rehoboam arrived in Jerusalem, he gathered the men from the households of Judah and Benjamin— 180,000 chosen warriors—to go and fight against Israel to bring the kingdom back to Rehoboam, son of Solomon.
22 Kasi Nzambe alobaki na Shemaya, moto na Nzambe:
But a message from the Lord came to Shemaiah the man of God that said,
23 « Yebisa Roboami, mwana mobali ya Salomo, mokonzi ya Yuda; mpe bana nyonso ya Yuda, ya Benjame mpe ba-oyo batikali:
“Tell Rehoboam, son of Solomon, king of Judah, to Judah and Benjamin, and to the rest of the people:
24 ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Bokende te kobundisa bandeko na bino, bato ya Isalaele! Tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye, pamba te Ngai moko nde nasali makambo nyonso oyo eleki. › » Batosaki Liloba na Yawe mpe bazongaki na bandako na bango mpo na kotosa mitindo ya Yawe.
‘This is what the Lord says. Don't fight against your Israelite relatives. Every one of you, go home! For it was me that made this happen.’” So they obeyed what the Lord told them and went home, as the Lord had said.
25 Jeroboami atongaki engumba Sishemi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe avandaki kuna. Longwa na Sishemi, abimaki mpe akendeki kotonga Penueli.
Jeroboam strengthened the town of Shechem in the hill country of Ephraim and lived there. From there he went and built Penuel.
26 Jeroboami amilobelaki: « Ndenge makambo ezali kotambola, bokonzi ekoki kozonga na ndako ya Davidi.
Jeroboam said to himself, “The kingdom could easily return to the house of David.
27 Soki bato oyo bamati na Yelusalemi mpo na kobonza mbeka na Tempelo ya Yawe, bakopesa lisusu mitema na bango epai ya nkolo na bango, Roboami, mokonzi ya Yuda. Bakoboma ngai mpe bakozonga epai ya mokonzi Roboami. »
When people from here go to offer sacrifices at the Lord's Temple in Jerusalem, they will transfer their loyalty back to Rehoboam, king of Judah. Then they will kill me and go back to King Rehoboam.”
28 Sima na ye koluka toli, mokonzi asalaki bikeko mibale ya bana ngombe ya wolo. Alobaki na bato: — Oh Isalaele, bokeyi mpe mingi na Yelusalemi! Botala banzambe na bino oyo babimisaki bino na Ejipito.
So after taking advice, the king had two golden calves made, and he told the people, “Don't bother going to Jerusalem any more. Look, Israel, here are your gods who led you out of the land of Egypt.”
29 Jeroboami atiaki ekeko moko na Beteli mpe mosusu na Dani.
He placed one in Bethel, and the other in Dan.
30 Bongo likambo oyo ememaki bato na lisumu, pamba te bamoko bazalaki kokende kogumbamela ekeko oyo ezalaki na Beteli, mpe bamosusu bazalaki kokende mosika kino na Dani mpo na kogumbamela ekeko mosusu.
This action brought about sin, because the people went as far north as Dan to worship the idol there.
31 Jeroboami atongaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe atiaki banganga-nzambe oyo bazalaki ata te bato ya libota ya Levi.
In addition Jeroboam had shrines built on high places and appointed as priests all kinds of people who were not Levites.
32 Jeroboami akataki ete basalaka feti mibu nyonso na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe ndenge basalaka na mokili ya Yuda, mpe abonzaki mbeka na etumbelo. Asalaki ndenge wana na Beteli epai wapi abonzaki mbeka epai ya banzambe ya bikeko ya bana ngombe oyo asalaki, mpe atiaki banganga-nzambe na bisambelo oyo abongisaki na likolo ya bangomba.
Jeroboam initiated a festival on the fifteenth day of the eighth month, just like the festival held in Judah, and he offered sacrifices on the altar. He made this offering in Bethel, sacrificing to the calves he had made, and appointed priests in Bethel for the high places he had built.
33 Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe, sanza oyo aponaki na ndenge na ye moko, abonzaki mbeka na etumbelo oyo atongaki na Beteli. Akataki ete basalaka feti mibu nyonso mpo na bana ya Isalaele mpe amataki na etumbelo mpo na kotumba ansa.
So on the fifteenth day of the eighth month, a month he had chosen himself, Jeroboam offered sacrifices on the altar he had set up in Bethel. In this way he instituted a festival for the Israelites, offering sacrifices on the altar and burning incense.

< 1 Bakonzi 12 >