< 1 Bakonzi 11 >
1 Mokonzi Salomo abalaki mwana mwasi ya Faraon; kasi pembeni na ye, abalaki basi mosusu ebele ya bikolo ya bapaya: basi ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi, ya Sidoni mpe ya Iti.
King Solomon loved many foreign women. Besides Pharaoh's daughter, there were women from the Moabites, Ammonites, Edomites, Sidonians, and Hittites.
2 Basi yango bawutaki na bikolo oyo, na tina na bango, Yawe alobaki na bana ya Isalaele: « Bosengeli te kobalana na bango, noki te bakopengwisa bino mpe bakotindika mitema na bino na kosambela banzambe na bango. » Nzokande, Salomo akangamaki na basi ya bikolo ya bapaya na bolingo makasi.
They were from the nations that the Lord had warned the Israelites, “You must not intermarry with them, for they will undoubtedly convince you to worship their gods.” Yet Solomon because of his love for women held on to them.
3 Azalaki na basi nkama sambo oyo bazalaki bana ya bakonzi, mpe bamakangu nkama misato. Boye, basi na ye nyonso bapengwisaki ye.
He had seven hundred wives of noble birth and three hundred concubines. His wives did convince him to turn away from the Lord.
4 Tango Salomo akomaki mobange, basi na ye batindikaki motema na ye na kogumbamela banzambe mosusu; mpe atikaki kolinga Yawe, Nzambe na ye, na motema na ye mobimba ndenge ezalaki motema ya Davidi, tata na ye.
As Solomon grew old, his wives led him to follow other gods, and he did not commit himself wholeheartedly to the Lord as his father David had done.
5 Salomo akomaki kosambela ekeko ya Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni; Moloki, nzambe ya mbindo ya bato ya Amoni.
Solomon worshiped Ashtoreth, goddess of the Sidonians, and Molech, vile god of the Ammonites.
6 Boye, Salomo asalaki penza makambo mabe na miso ya Yawe mpe atambolaki na boyengebene te liboso ya Yawe ndenge Davidi, tata na ye, atambolaki.
This was how Solomon did evil in the Lord's sight, and was not completely dedicated to the Lord as his father David was.
7 Na ngomba oyo etalani na Yelusalemi, Salomo atongaki esambelo ya likolo ya ngomba mpo na Kemoshi, nzambe ya mbindo ya Moabi; mpe mpo na Moloki, nzambe ya mbindo ya bato ya Amoni.
It was then that Solomon built a high place of worship for Chemosh, the vile god of the people of Moab, and for Molech, the vile god of the Ammonites, on a hill east of Jerusalem.
8 Asalaki mpe bongo mpo na banzambe ya basi na ye nyonso ya bikolo ya bapaya mpo ete batumbelaka yango malasi mpe babonzelaka yango mbeka.
He built places of worship for all his foreign wives where they burned incense and sacrificed to their gods.
9 Yawe atombokelaki Salomo mpo ete motema na ye epengwaki mosika na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo amimonisaki epai na ye mbala mibale.
The Lord became angry with Solomon because he had turned away from the Lord, the God of Israel, who had appeared to him twice.
10 Nzokande, Yawe apekisaki Salomo kosambela banzambe mosusu; kasi Salomo atosaki te mitindo ya Yawe.
The Lord had warned Solomon about this—that he should not worship other gods. But Solomon did not listen to the Lord's warning.
11 Boye, Yawe alobaki na Salomo: « Lokola oponi kotambola bongo mpe obateli te boyokani na Ngai mpe mitindo oyo napesaki yo, nakobotola yo bokonzi mpe nakopesa yango na moko kati na basali na yo.
So the Lord told him, “Since this is what you have done, and since you have not kept my agreement and my laws that I commanded, I will definitely take the kingdom away from you and give it to your servant.
12 Nzokande, mpo na Davidi, tata na yo, nakosala yango te na tango oyo ozali nanu na bomoi; nakobotola yango nde na maboko ya mwana na yo ya mobali.
However, for the sake of your father David, I will not do this in your lifetime—I will take it away from your son.
13 Kasi nakobotola ye bokonzi nyonso te; nakotikela ye etuka moko mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, mpe mpo na Yelusalemi, engumba oyo napona. »
Even then I will not take away the whole kingdom. I will leave your son with one tribe for the sake of my servant David, and for the sake of my chosen city Jerusalem.”
14 Yawe abimisaki monguna moko mpo na kobundisa Salomo: Adadi, moto ya Edomi, mwana kati na libota ya bokonzi ya Edomi.
Then the Lord encouraged Hadad the Edomite of Edom's royal family to oppose Solomon.
15 Na kala, na tango oyo Davidi abundisaki mokili ya Edomi, Joabi mokonzi ya mampinga, oyo akendeki mpo na kokunda bibembe, abomaki mibali nyonso ya Edomi.
Previously, when David was in Edom, Joab the commander of the Israelite army had gone to bury some of his soldiers who had been killed, and had slaughtered every male in Edom.
16 Joabi mpe bato nyonso ya Isalaele batikalaki kuna basanza motoba kino tango basilisaki koboma mibali nyonso ya Edomi.
Joab and the whole Israelite army had spent six months there destroying them all.
17 Kasi Adadi oyo azalaki nanu elenge na tango wana akimaki na Ejipito elongo na ndambo ya bato ya Edomi oyo bazalaki basali ya tata na ye.
But Hadad and some Edomites who had been his father's officials had run away to Egypt—Hadad was just a boy at the time.
18 Balongwaki na Madiani mpe bakendeki na Parani. Wuta na Parani, bazwaki bato mpe bakendeki elongo na bango na Ejipito epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Faraon apesaki Adadi ndako, eteni ya mabele mpe bilei.
They left Midian and went to Paran. Then, along with some people from Paran, they went to Egypt, to Pharaoh king of Egypt. He provided Hadad with a house and food, and also assigned him land as a gift.
19 Lokola Faraon asepelaki na Adadi mingi, abalisaki ye semeki na ye ya mwasi, ndeko mwasi ya Takipenesi, mwasi ya mokonzi.
Pharaoh became very friendly with Hadad, and he gave him the sister of his own wife to marry, Queen Tahpenes' sister.
20 Ndeko mwasi ya Takipenesi abotelaki Adadi mwana moko ya mobali mpe apesaki ye kombo « Genubati. » Takipenesi abokolaki ye kati na ndako ya Faraon. Genubati avandaki kuna elongo na bana ya Faraon.
She gave birth to his son called Genubath. Tahpenes brought him up in Pharaoh's palace with Pharaoh's own children.
21 Wana Adadi azalaki na Ejipito, ayokaki ete Davidi mpe Joabi, mokonzi ya mampinga, bakufi. Boye, Adadi alobaki na Faraon: — Pesa ngai nzela ete nazonga na mokili na ngai.
However, when news reached Hadad in Egypt that both David and Joab, the commander of the army, had died, Hadad said to Pharaoh, “Let me leave and return to my own country.”
22 Faraon atunaki ye: — Ozangi eloko nini awa mpo ete oluka kozonga na mokili na yo? Adadi azongisaki: — Eloko moko te. Kasi tika ngai ete nakende kaka.
Pharaoh asked him, “Is there anything that you have lacked here with me that now you want to go back to your own country?” “No, there's nothing,” Hadad replied, “but please just let me go home.”
23 Nzambe abimisaki monguna mosusu mpo na kobundisa Salomo; kombo na ye: Rezoni. Rezoni Azalaki mwana mobali ya Eliyada, oyo akimaki nkolo na ye, Adadezeri, mokonzi ya Tsoba.
God also encouraged Rezon, son of Eliada, to oppose Solomon. He had run away from his master Hadadezer, king of Zobah. After David had destroyed Zobah's army,
24 Rezoni asangisaki mibali pene na ye mpe akomaki mokambi ya lisanga ya batomboki tango Davidi abomaki mampinga ya Tsoba. Bongo batomboki bakendeki na Damasi epai wapi bavandaki mpe bakomaki kokonza.
Rezon gathered around him a rebel band, and became their leader. They went and settled in Damascus, where they took over.
25 Rezoni azalaki monguna ya Isalaele na tango nyonso oyo Salomo azalaki na bokonzi. Wana Adadi azalaki kotia Isalaele mobulu, Rezoni akomaki mokonzi ya Siri mpe akomaki kokanela Isalaele.
Rezon was Israel's enemy throughout Solomon's lifetime which added to the trouble Hadad caused. Rezon really hated Israel, and was the ruler of Aram.
26 Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, moto ya Efrayimi ya Tsereda, moko kati na basali ya Salomo, atombokelaki mokonzi. Mama na ye azalaki mwasi akufisa mobali, mpe kombo na ye: Tseruya.
In addition, Jeroboam, son of Nebat, rebelled against the king. One of Solomon's officials, he was an Ephraimite from Zeredah. His mother was a widow called Zeruah.
27 Tala ndenge atombokelaki mokonzi: na tango oyo Salomo azalaki kotonga Milo mpe kokanga madusu ya mir ya engumba ya Davidi, tata na ye,
This is why he rebelled against the king: Solomon had built the terraces and had closed the gap in the wall of the city of his father David.
28 Jeroboami azalaki elenge mobali ya makasi mpe ya mpiko; lokola Salomo amonaki ndenge elenge mobali oyo azalaki kosala mosala na ye malamu, atiaki ye motambolisi misala nyonso ya makasi mpo na libota ya Jozefi.
Jeroboam was a man of ability, and when Solomon realized how successful he was in what he did, he placed him command of all the forced labor of the tribes of Joseph.
29 Mokolo moko, wana Jeroboami azalaki kobima na Yelusalemi, Ayiya, mosakoli ya Silo, akutanaki na ye na nzela mpe alataki kazaka ya sika. Bazalaki kaka bango mibale na libanda ya mboka, kati na esobe.
Around that time the prophet Ahijah the Shilonite met Jeroboam on the road as he was leaving Jerusalem.
30 Ayiya azwaki kazaka na ye ya sika oyo alataki, akataki yango na biteni zomi na mibale
Ahijah had wrapped himself in a new cloak, and the two of them were by themselves in the countryside. Ahijah took the new cloak he was wearing and ripped it up into twelve pieces.
31 mpe alobaki na Jeroboami: « Kamata biteni zomi mpo na yo, pamba te tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Nakobotola bokonzi na maboko ya Salomo mpe nakopesa yo bikolo zomi.
He said, “Jeroboam, take ten pieces. This is what the Lord God of Israel says. ‘Jeroboam, I am the Lord, the God of Israel, and I am going to take Solomon's kingdom from him and give you ten of the tribes.
32 Kasi mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, mpe mpo na engumba Yelusalemi oyo napona kati na mabota nyonso ya Isalaele, Salomo akozwa kaka libota moko.
One tribe will be left for the sake of my servant David and for the sake of Jerusalem, the city I chose from among all the tribes of Israel.
33 Nakosala bongo, pamba te basundolaki Ngai mpe bagumbamelaki Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni; Kemoshi, nzambe ya bato ya Moabi; mpe Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, batambolaki te na banzela na Ngai mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai, kobatela malako mpe mibeko na Ngai, ndenge Davidi, tata ya Salomo, asalaki.
This is because they have abandoned me and bowed down in worship of Ashtoreth, goddess of the Sidonians, Chemosh, god of the Moabites, and Molech, god of the Ammonites. They have not followed my ways; they have not done what is right in my sight; they have not kept my commandments and laws as David, Solomon's father, did.
34 Kasi nakobotola te bokonzi nyonso na maboko ya Salomo, nakotika ye nanu kokonza na mikolo nyonso oyo akozala na bomoi, mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, oyo naponaki mpe abatelaki mitindo mpe malako na Ngai.
Even so, I'm not going to take the whole kingdom from Solomon, because I made him ruler for his lifetime for the sake of my servant David. I chose him because he kept my commandments and laws.
35 Kasi nakobotola bokonzi na maboko ya mwana na ye ya mobali mpe nakopesa yo mabota zomi.
But I will take from his son's kingdom ten tribes and give them to you.
36 Nakopesa libota moko epai ya mwana na ye ya mobali mpo ete Davidi, mowumbu na Ngai, azala tango nyonso na mokitani liboso na Ngai kati na Yelusalemi, engumba oyo napona mpo na kotia Kombo na Ngai kati na yango.
I will give his son one tribe, so that my servant David will always have a descendant like a lamp before me in Jerusalem, the city where I chose to be honored.
37 Kasi mpo na yo, Jeroboami, nakozwa yo, mpe okokonza nyonso oyo motema na yo ekolinga mpe okozala mokonzi ya Isalaele.
I will take you, and you shall reign over everything that you want. You will be king over Israel.
38 Soki osali nyonso oyo Ngai nazali kotinda yo, soki otamboli na banzela na Ngai mpe osali makambo ya sembo na miso na Ngai, na kobatelaka mibeko mpe malako na Ngai ndenge Davidi, mowumbu na Ngai, asalaki, wana nakozala na yo elongo, nakosala ete bokonzi kati na libota na yo elendisama ndenge nasalaki epai ya Davidi, mpe nakopesa yo Isalaele.
If you accept everything that I command you, if you follow my ways, if you do what is right in my sight, keeping my laws and commandments as my servant David did, then I will be with you. I will set up for you a dynasty that lasts, just as I did for David, and I will give Israel to you.
39 Na bongo, nakoyokisa ndako ya Davidi soni, kasi mpo na libela te. › »
I will punish David's descendants because of this, but not forever.”
40 Salomo alukaki koboma Jeroboami, kasi Jeroboami akimaki na Ejipito epai ya Shishaki, mokonzi ya Ejipito, avandaki kuna kino na kufa ya Salomo.
So Solomon tried to kill Jeroboam. But Jeroboam ran away to Egypt, to Shishak king of Egypt. He remained there until Solomon's death.
41 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Salomo, misala na ye nyonso mpe bwanya na ye, ekomama kati na buku ya misala ya Salomo.
The record of the rest of the acts of Solomon, including everything he did, and his wisdom, are written in the Book of the Acts of Solomon.
42 Salomo akonzaki Isalaele mobimba mibu tuku minei, na Yelusalemi.
Solomon reigned in Jerusalem over all of Israel for a total of forty years.
43 Sima na yango, Salomo akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Mwana na ye, Roboami, akitanaki na ye na bokonzi.
Solomon died and was buried in the city of his father David. His son Rehoboam succeeded him as king.