< 1 Yoane 1 >
1 Oyo ezalaki wuta na ebandeli, oyo toyokaki, oyo tomonaki na miso na biso, oyo totalaki malamu, mpe oyo maboko na biso esimbaki, yango nde tozali kotatola na tina na Liloba na bomoi.
Tubawandiikira ku Kigambo ow’obulamu, eyaliwo okuva ku lubereberye, gwe twawulira, gwe twalaba n’amaaso gaffe, era gwe twakwatako n’engalo zaffe.
2 Bomoi emimonisaki; tomoni yango, tozali kotatola na tina na yango mpe kosakola epai na bino bomoi ya seko oyo ezalaki elongo na Tata mpe emimonisi epai na biso. (aiōnios )
Obulamu bwalabisibwa, era tubulabye, tubuweerako obujulirwa, era tubategeeza obulamu obutaggwaawo obwali ne Kitaffe, era ne bulabisibwa gye tuli. (aiōnios )
3 Tozali kosakola epai na bino makambo oyo tomoni mpe toyoki, mpo ete bino mpe bozala moko na biso. Nzokande, biso tozali moko na Tata mpe na Yesu-Klisto, Mwana na Ye.
Tubategeeza ekyo kye twawulira era kye twalaba, mulyoke mutwegatteko, mubeere bumu naffe, era mussekimu ne Kitaffe awamu n’Omwana we Yesu Kristo.
4 Yango wana tozali kokomela bino makambo oyo mpo na kokomisa esengo na biso ya kokoka.
Era tubawandiikira ebintu bino essanyu lyaffe liryoke lituukirire.
5 Tala makambo oyo toyoki na tina na Ye mpe tozali koyebisa bino: Nzambe azali pole, mpe molili ezali te kati na Ye.
Buno bwe bubaka bwe twafuna okuva gy’ali: tubategeeza nti, Katonda musana; mu ye temuliimu kizikiza n’akatono.
6 Soki tolobi ete tozali moko na Ye, nzokande tozali kotambola kati na molili, wana tozali bakosi mpe tozali kotambola na solo te.
Noolwekyo bwe twogera nti tussakimu naye, ate ne tutambulira mu kizikiza, tuba balimba era tetuba ba mazima.
7 Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.
Naye bwe tutambulira mu musana nga ye bw’ali omusana, olwo tussakimu buli muntu ne munne, n’omusaayi gwa Yesu Omwana we, gutunaazaako buli kibi kyonna.
8 Soki tolobi ete tozali na masumu te, wana tozali komikosa biso moko mpe solo ezali te kati na biso.
Bwe twogera nti tetulina kibi, twerimba ffekka, era n’amazima tegaba mu ffe.
9 Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.
Naye bwe twatula ebibi byaffe, ye mwesigwa era mutuukirivu okutusonyiwa n’okutunaazaako obutali butuukirivu bwonna.
10 Soki tolobi ete tosalaka masumu te, wana tokomisi Nzambe mokosi mpe Liloba na Ye ezali te kati na biso.
Bwe tugamba nti tetulina kibi, tumufuula mulimba era nga n’ekigambo kye tekiri mu ffe.