< 1 Yoane 5 >
1 Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Klisto azali mwana na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka Tata alingaka mpe Mwana na Ye.
Každý, kdož věří, že Ježíš jest Kristus, z Boha se narodil; a každý, kdož miluje toho, kterýž zplodil, milujeť i toho, kterýž zplozen jest z něho.
2 Tala ndenge nini toyebaka ete tolingaka bana na Nzambe: ezali na nzela ya kolinga Nzambe mpe ya kotosa mibeko na Ye.
Po tomť poznáváme, že milujeme syny Boží, když Boha milujeme a přikázání jeho ostříháme.
3 Pamba te kolinga Nzambe ezali: kotosa mibeko na Ye. Mpe mibeko na Ye ezali pasi te,
Nebo toť jest láska Boží, abychom přikázaní jeho ostříhali; a přikázání jeho nejsou těžká.
4 pamba te mwana nyonso ya Nzambe alongaka mokili, mpe elonga oyo elongaki mokili ezali: kondima na biso.
Všecko zajisté, což se narodilo z Boha, přemáhá svět; a toť jest to vítězství, kteréž přemáhá svět, víra naše.
5 Nani oyo alongaka mokili? Ezali kaka moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe.
Kdo jest, ješto přemáhá svět, jediné, kdož věří, že Ježíš jest Syn Boží?
6 Yesu-Klisto azali Ye oyo ayaki na nzela ya mayi mpe makila; ayaki na nzela ya mayi kaka te, kasi na nzela ya mayi mpe makila. Mpe ezali Molimo nde atatoli bongo, pamba te Molimo azali solo.
Toť jest ten, kterýž přišel vyznamenán jsa skrze vodu a krev, totiž Ježíš Kristus, ne u vodě toliko, ale u vodě a ve krvi. A Duch jest, jenž svědectví vydává, že Duch jest pravda.
7 Nzokande, batatoli bazali misato:
Nebo tři jsou, kteříž svědectví vydávají na nebi: Otec, Slovo, a Duch Svatý, a ti tři jedno jsou.
8 Molimo, mayi mpe makila; mpe bango misato balobaka ndenge moko.
A tři jsou, jenž svědectví vydávají na zemi: Duch, a Voda, a Krev, a ti tři jedno jsou.
9 Tondimaka matatoli ya bato, kasi litatoli ya Nzambe eleki motuya, pamba te yango nde Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye.
Poněvadž svědectví lidské přijímáme, svědectvíť Boží větší jest. Nebo totoť svědectví jest Boží, kteréž vysvědčil o Synu svém.
10 Moto oyo andimelaka Mwana na Nzambe azali na litatoli yango kati na motema na ye; moto oyo andimelaka Nzambe te akomisi Nzambe mokosi, pamba te andimaka te litatoli oyo Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye.
Kdož věří v Syna Božího, máť svědectví sám v sobě. Kdož pak nevěří Bohu, lhářem jej učinil; nebo neuvěřil tomu svědectví, kteréž vysvědčil Bůh o Synu svém.
11 Mpe litatoli yango ezali: Nzambe apesa biso bomoi ya seko, mpe bomoi yango ezali kati na Mwana na Ye. (aiōnios )
A totoť jest svědectví to, že život věčný dal nám Bůh, a ten život v Synu jeho jest. (aiōnios )
12 Moto oyo azali na Mwana azali na bomoi, kasi moto oyo azangi Mwana na Nzambe azangi mpe bomoi.
Kdožť má Syna Božího, máť život; kdož nemá Syna Božího, života nemá.
13 Bino oyo bondimelaka Kombo ya Mwana na Nzambe, nakomeli bino makambo oyo mpo boyeba ete bozali na bomoi ya seko. (aiōnios )
Tyto věci psal jsem vám věřícím ve jméno Syna Božího, abyste věděli, že máte věčný život, a abyste věřili ve jméno Syna Božího. (aiōnios )
14 Mpe tala elikya oyo tozali na yango liboso ya Nzambe: soki tosengi eloko kolanda mokano na Ye, ayoki biso.
A totoť jest to smělé doufání, kteréž máme k němu, že začež bychom koli prosili podle vůle jeho, slyší nás.
15 Mpe soki toyebi ete ayoki biso, toyebi lisusu ete tozali na eloko oyo tosengi epai na Ye.
A kdyžť víme, že nás slyší, prosili-li bychom zač, tedyť víme, že máme některé prosby naplněné, kteréž jsme předkládali jemu.
16 Soki omoni ndeko na yo kosala lisumu oyo ememaka na kufa te, osengeli kobondela mpo na ye, mpe Nzambe akopesa ye bomoi. Nazali koloba nde na tina na bato oyo basalaka lisumu oyo ememaka na kufa te. Kasi ezali na lisumu oyo ememaka na kufa; ezali te na tina na lisumu yango nde nazali kosenga na bino kobondela.
Viděl-li by kdo bratra svého hřešícího hříchem ne k smrti, modliž se za něj, a dáť jemu Bůh život, totiž hřešícím ne k smrti. Jestiť hřích k smrti; ne za ten, pravím, aby se modlil.
17 Solo, lisumu ezali: kobuka mobeko; kasi ezali na lisumu oyo ememaka na kufa te.
Každá nepravost jestiť hřích, ale jestiť hřích ne k smrti.
18 Toyebi ete moto nyonso oyo abotami na bomoi ya bonzambe akobaka te kosala lisumu; Ye moko Mwana na Nzambe abatelaka ye, mpe Satana akoki kosala ye mabe te.
Víme, že každý, kdož se narodil z Boha, nehřeší; ale ten, jenž narozen jest z Boha, ostříhá sebe samého, a ten zlostník se ho nedotýká.
19 Toyebi ete tozali bana na Nzambe, mpe ete mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya Satana.
Víme, že z Boha jsme, ale svět všecken ve zlém leží.
20 Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko. (aiōnios )
A vímeť, že Syn Boží přišel, a dal nám smysl, abychom poznali Toho Pravého, a jsmeť v tom Pravém, i v Synu jeho Ježíši Kristu. Onť jest ten pravý Bůh a život věčný. (aiōnios )
21 Bana na ngai, bomibatelaka mosika na banzambe ya bikeko.
Synáčkové, vystříhejte se modl. Amen.