< 1 Yoane 3 >
1 Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te: ezali mpo ete eyebi Nzambe te.
わたしたちが神の子と呼ばれるためには、どんなに大きな愛を父から賜わったことか、よく考えてみなさい。わたしたちは、すでに神の子なのである。世がわたしたちを知らないのは、父を知らなかったからである。
2 Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka.
愛する者たちよ。わたしたちは今や神の子である。しかし、わたしたちがどうなるのか、まだ明らかではない。彼が現れる時、わたしたちは、自分たちが彼に似るものとなることを知っている。そのまことの御姿を見るからである。
3 Moto nyonso oyo azali na elikya ya ndenge wana kati na Klisto amipetolaka, ndenge Klisto azali peto.
彼についてこの望みをいだいている者は皆、彼がきよくあられるように、自らをきよくする。
4 Moto nyonso oyo asalaka masumu abukaka mibeko ya Nzambe; pamba te kosala lisumu ezali: kobuka mibeko ya Nzambe.
すべて罪を犯す者は、不法を行う者である。罪は不法である。
5 Nzokande, boyebi malamu ete Klisto ayaki mpo na kolongola masumu; mpe kati na Ye, lisumu ezali te.
あなたがたが知っているとおり、彼は罪をとり除くために現れたのであって、彼にはなんらの罪がない。
6 Moto nyonso oyo azali moko na Klisto asalaka masumu te, mpe moto nyonso oyo asalaka masumu atikala nanu te komona mpe koyeba Yesu.
すべて彼におる者は、罪を犯さない。すべて罪を犯す者は彼を見たこともなく、知ったこともない者である。
7 Bana na ngai, tika ete moto moko te akosa bino. Moto oyo atambolaka na bosembo azali sembo ndenge Ye moko Klisto azali sembo.
子たちよ。だれにも惑わされてはならない。彼が義人であると同様に、義を行う者は義人である。
8 Moto oyo amipesaka na masumu azali ya Satana, pamba te Satana asalaka masumu wuta na ebandeli. Nzokande Mwana na Nzambe ayaki penza mpo na kobebisa misala ya Satana.
罪を犯す者は、悪魔から出た者である。悪魔は初めから罪を犯しているからである。神の子が現れたのは、悪魔のわざを滅ぼしてしまうためである。
9 Moto nyonso oyo akoma mwana na Nzambe akobaka te kosala masumu, pamba te nguya ya bomoi ya bonzambe ezali kosala kati na ye; akoki te kokoba kosala masumu, pamba te azali mwana na Nzambe.
すべて神から生れた者は、罪を犯さない。神の種が、その人のうちにとどまっているからである。また、その人は、神から生れた者であるから、罪を犯すことができない。
10 Tala ndenge nini bana na Nzambe bakeseni na bana ya Satana: moto nyonso oyo atambolaka te na bomoi ya sembo mpe alingaka ndeko na ye te azali mwana na Nzambe te.
神の子と悪魔の子との区別は、これによって明らかである。すなわち、すべて義を行わない者は、神から出た者ではない。兄弟を愛さない者も、同様である。
11 Pamba te, tala Sango Malamu oyo boyokaki wuta na ebandeli: Tolinganaka biso na biso.
わたしたちは互に愛し合うべきである。これが、あなたがたの初めから聞いていたおとずれである。
12 Boye tika ete moko te azala lokola Kayina oyo azalaki moto ya Satana mpe abomaki ndeko na ye. Mpo na nini Kayina abomaki Abeli, ndeko na ye? Ezali mpo ete misala ya Kayina ezalaki mabe, kasi misala ya Abeli, ndeko na ye, ezalaki sembo.
カインのようになってはいけない。彼は悪しき者から出て、その兄弟を殺したのである。なぜ兄弟を殺したのか。彼のわざが悪く、その兄弟のわざは正しかったからである。
13 Bandeko na ngai, bokamwa te soki mokili ezali koyina bino.
兄弟たちよ。世があなたがたを憎んでも、驚くには及ばない。
14 Toyebi ete tosila kolongwa na kufa mpe tokoma na bomoi mpo ete tolingaka bandeko na biso. Moto oyo alingaka ndeko na ye te azali nanu na se ya bokonzi ya kufa.
わたしたちは、兄弟を愛しているので、死からいのちへ移ってきたことを、知っている。愛さない者は、死のうちにとどまっている。
15 Moto nyonso oyo ayinaka ndeko na ye azali mobomi; mpe boyebi malamu ete mobomi ata moko te azali na bomoi ya seko kati na ye. (aiōnios )
あなたがたが知っているとおり、すべて兄弟を憎む者は人殺しであり、人殺しはすべて、そのうちに永遠のいのちをとどめてはいない。 (aiōnios )
16 Tala ndenge nini toyebi ndimbola ya bolingo: Yesu-Klisto akabaki bomoi na Ye mpo na biso. Boye biso mpe tosengeli kokaba bomoi na biso mpo na bandeko na biso.
主は、わたしたちのためにいのちを捨てて下さった。それによって、わたしたちは愛ということを知った。それゆえに、わたしたちもまた、兄弟のためにいのちを捨てるべきである。
17 Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye?
世の富を持っていながら、兄弟が困っているのを見て、あわれみの心を閉じる者には、どうして神の愛が、彼のうちにあろうか。
18 Bana na ngai, tika ete bolingo na biso esukaka kaka te na lolemo to na maloba ya sukali; kasi tika ete emonisamaka nde na misala mpe na solo.
子たちよ。わたしたちは言葉や口先だけで愛するのではなく、行いと真実とをもって愛し合おうではないか。
19 Ezali na ndenge wana nde tokoyeba ete tozali kati na solo, mpe mitema na biso ekotonda na elikya liboso ya Nzambe;
それによって、わたしたちが真理から出たものであることがわかる。そして、神のみまえに心を安んじていよう。
20 pamba te soki ata mitema na biso elongisi biso te, toyebi ete Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi nyonso.
なぜなら、たといわたしたちの心に責められるようなことがあっても、神はわたしたちの心よりも大いなるかたであって、すべてをご存じだからである。
21 Balingami na ngai, soki mpe mitema na biso elongisi biso, tokozala kaka na elikya makasi na Nzambe.
愛する者たちよ。もし心に責められるようなことがなければ、わたしたちは神に対して確信を持つことができる。
22 Apesaka biso nyonso oyo tosengaka epai na Ye, pamba te totosaka mibeko na Ye mpe tosalaka makambo oyo esepelisaka Ye.
そして、願い求めるものは、なんでもいただけるのである。それは、わたしたちが神の戒めを守り、みこころにかなうことを、行っているからである。
23 Mpe tala mobeko oyo apesa biso: kondima Yesu-Klisto, Mwana na Ye, mpe kolingana biso na biso, ndenge atindaki biso.
その戒めというのは、神の子イエス・キリストの御名を信じ、わたしたちに命じられたように、互に愛し合うべきことである。
24 Moto oyo atosaka mibeko na Ye awumelaka kati na Nzambe, mpe Nzambe awumelaka kati na ye. Bongo ndenge nini toyebaka ete Nzambe azali kowumela kati na biso? Ezali na nzela ya Molimo Mosantu oyo apesaki biso.
神の戒めを守る人は、神におり、神もまたその人にいます。そして、神がわたしたちのうちにいますことは、神がわたしたちに賜わった御霊によって知るのである。