< 1 Yoane 2 >

1 Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete bosala masumu te. Kasi soki esali ete moko kati na bino akweyi na lisumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata: Yesu-Klisto, Nkolo-Na-Bosembo.
My little children, I write these things to you so that you may not sin. If anyone sins, we have a Counsellor with the Father, Jesus Christ, the righteous.
2 Amikabaki lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso; mpo na masumu na biso kaka te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.
And he is the atoning sacrifice for our sins, and not for ours only, but also for the whole world.
3 Tala ndenge nini tososolaka ete toyebi Nzambe: ezali mpo ete totosaka mibeko na Ye.
This is how we know that we know him: if we keep his commandments.
4 Moto nyonso oyo alobaka: « Nayebi Nzambe, » kasi atosaka te mibeko ya Nzambe azali mokosi mpe solo ezali kati na ye te.
One who says, “I know him,” and doesn’t keep his commandments, is a liar, and the truth isn’t in him.
5 Moto oyo atosaka Liloba na Nzambe azalaka penza na bolingo ya kokoka mpo na Nzambe kati na ye. Ezali ndenge wana nde tososolaka ete tozali moko na Ye.
But God’s love has most certainly been perfected in whoever keeps his word. This is how we know that we are in him:
6 Moto nyonso oyo alobaka ete azali kati na Nzambe asengeli mpe kotambola ndenge Yesu atambolaki.
he who says he remains in him ought himself also to walk just like he walked.
7 Balingami na ngai, nazali kokomela bino mobeko ya sika te, kasi mobeko ya kala kaka, mobeko oyo bozwaki wuta na ebandeli. Mobeko yango ya kala ezali liloba oyo boyokaki.
Brothers, I write no new commandment to you, but an old commandment which you had from the beginning. The old commandment is the word which you heard from the beginning.
8 Nzokande, nazali mpe kokomela bino mobeko ya sika, mpe sika na yango emonani kati na Yesu mpe kati na bino, pamba te molili ezali kolimwa mpe pole ya solo esili kobanda kongenga.
Again, I write a new commandment to you, which is true in him and in you, because the darkness is passing away and the true light already shines.
9 Moto nyonso oyo alobaka ete azali kati na pole kasi ayinaka ndeko na ye, azali nanu kati na molili.
He who says he is in the light and hates his brother is in the darkness even until now.
10 Moto nyonso oyo alingaka ndeko na ye azali kati na pole; mpe ezali na eloko moko te kati na ye, oyo ekoki kobetisa ye libaku.
He who loves his brother remains in the light, and there is no occasion for stumbling in him.
11 Kasi moto oyo ayinaka ndeko na ye azali kati na molili mpe azali kotambola kati na molili; ayebi te epai azali kokende, pamba te molili esila koboma ye miso.
But he who hates his brother is in the darkness, and walks in the darkness, and doesn’t know where he is going, because the darkness has blinded his eyes.
12 Bana, nazali kokomela bino, pamba te masumu na bino elimbisamaki mpo na Kombo na Yesu-Klisto.
I write to you, little children, because your sins are forgiven you for his name’s sake.
13 Batata, nazali kokomela bino, pamba te boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nazali kokomela bino, pamba te bolongaki Satana.
I write to you, fathers, because you know him who is from the beginning. I write to you, young men, because you have overcome the evil one. I write to you, little children, because you know the Father.
14 Bana, nakomeli bino mpo ete boyebi Tata. Batata, nakomeli bino mpo ete boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino mpo ete bozali makasi, Liloba na Nzambe ezali kowumela kati na bino, mpe bolongaki Satana.
I have written to you, fathers, because you know him who is from the beginning. I have written to you, young men, because you are strong, and the word of God remains in you, and you have overcome the evil one.
15 Bolingaka mokili te; bolingaka mpe te nyonso oyo ezali kati na mokili. Moto oyo alingaka mokili azalaka na bolingo ya Tata te kati na ye,
Don’t love the world or the things that are in the world. If anyone loves the world, the Father’s love isn’t in him.
16 pamba te nyonso oyo ezali kati na mokili, lokola baposa mabe ya nzoto, posa makasi ya konduka biloko oyo miso ezali kolula, mpe lofundu mpo na biloko; ewuti na Tata te, kasi ewuti na mokili.
For all that is in the world—the lust of the flesh, the lust of the eyes, and the pride of life—isn’t the Father’s, but is the world’s.
17 Mokili mpe baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe awumelaka tango nyonso. (aiōn g165)
The world is passing away with its lusts, but he who does God’s will remains forever. (aiōn g165)
18 Bana, tokomi na tango ya suka; ndenge kaka boyokaki ete monguna ya Klisto azali koya, nzokande banguna ya Klisto basili koya sik’oyo ebele, ndenge wana mpe tosengeli koyeba ete tokomi na tango ya suka.
Little children, these are the end times, and as you heard that the Antichrist is coming, even now many antichrists have arisen. By this we know that it is the final hour.
19 Banguna yango babimelaki kati na biso, kasi bazalaki penza bato na biso te. Pamba te soki bazalaki bato na biso, balingaki kotikala na biso; kasi batikaki biso mpo ete emonana polele ete bango nyonso bazali bato na biso te.
They went out from us, but they didn’t belong to us; for if they had belonged to us, they would have continued with us. But they left, that they might be revealed that none of them belong to us.
20 Nzokande bino, bozali na epakolami kowuta na Molimo Mosantu, mpe bino nyonso bozali na boyebi ya nyonso.
You have an anointing from the Holy One, and you all have knowledge.
21 Ngai nakomeli bino mpo ete boyebi yango mpe mpo ete lokuta moko te ewutaka na solo; kasi ezali te mpo boyebi yango te.
I have not written to you because you don’t know the truth, but because you know it, and because no lie is of the truth.
22 Boye nani mokosi? Mokosi azali moto oyo awangani ete Yesu azali Klisto. Mpe moto ya ndenge wana azali monguna ya Klisto: awanganaka Tata mpe Mwana.
Who is the liar but he who denies that Jesus is the Christ? This is the Antichrist, he who denies the Father and the Son.
23 Moto nyonso oyo awangani Yesu azali mpe na Tata te. Moto oyo atatoli Yesu azali mpe na Tata.
Whoever denies the Son doesn’t have the Father. He who confesses the Son has the Father also.
24 Kasi bino, bosimba makasi makambo oyo boyokaki wuta na ebandeli. Soki ezali penza kowumela kati na bino, bokowumela mpe kati na Mwana mpe kati na Tata.
Therefore, as for you, let that remain in you which you heard from the beginning. If that which you heard from the beginning remains in you, you also will remain in the Son, and in the Father.
25 Mpe tala elaka oyo apesaki biso: bomoi ya seko. (aiōnios g166)
This is the promise which he promised us, the eternal life. (aiōnios g166)
26 Nazali kokomela bino makambo oyo na tina na bato oyo bazali komeka kopengwisa bino.
These things I have written to you concerning those who would lead you astray.
27 Kasi mpo na bino, epakolami ya Molimo oyo bozwaki kowuta na Klisto ezali kowumela kati na bino. Boye, bozali lisusu na posa te ete bapesa bino malakisi. Kasi lokola Molimo ya Klisto apesaka bino malakisi na tina na makambo nyonso, lokola mpe apesaka malakisi ya solo kasi ya lokuta te, bowumela kati na malakisi yango ndenge kaka bapesaki bino yango.
As for you, the anointing which you received from him remains in you, and you don’t need for anyone to teach you. But as his anointing teaches you concerning all things, and is true, and is no lie, and even as it taught you, you will remain in him.
28 Sik’oyo, bana na ngai, bowumela ya kokangama na Klisto mpo ete, na ngonga nyonso oyo akomimonisa, tozala na elikya mpe toyoka soni te na liboso na Ye tango akoya.
Now, little children, remain in him, that when he appears, we may have boldness and not be ashamed before him at his coming.
29 Boyebi malamu ete Klisto azali sembo; boye bosengeli mpe koyeba ete moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo azali mwana na Nzambe.
If you know that he is righteous, you know that everyone who practices righteousness has been born of him.

< 1 Yoane 2 >