< 1 Bakolinto 9 >

1 Boni, nazali nsomi te? Nazali ntoma te? Namona te Yesu, Nkolo na biso? Bozali mbuma ya mosala na ngai te kati na Nkolo?
ουκ ειμι ελευθερος ουκ ειμι αποστολος ουχι ιησουν τον κυριον ημων εορακα ου το εργον μου υμεις εστε εν κυριω
2 Soki, mpo na bato mosusu, nazali ntoma te, kasi mpo na bino, nazali solo ntoma, pamba te bino bozali kashe ya bontoma na ngai kati na Nkolo.
ει αλλοις ουκ ειμι αποστολος αλλα γε υμιν ειμι η γαρ σφραγις μου της αποστολης υμεις εστε εν κυριω
3 Tala eyano na ngai epai ya bato oyo basambisaka ngai:
η εμη απολογια τοις εμε ανακρινουσιν εστιν αυτη
4 Boni, tozangi makoki ya kolia mpe ya komela?
μη ουκ εχομεν εξουσιαν φαγειν και πειν
5 Tozangi makoki ya kotambola elongo na mwasi moklisto, ndenge bantoma mosusu mpe bandeko ya Nkolo mpe Petelo basalaka?
μη ουκ εχομεν εξουσιαν αδελφην γυναικα περιαγειν ως και οι λοιποι αποστολοι και οι αδελφοι του κυριου και κηφας
6 Boni, ezali kaka ngai mpe Barnabasi nde tosengeli kosala?
η μονος εγω και βαρναβας ουκ εχομεν εξουσιαν μη εργαζεσθαι
7 Nani asalaka mosala ya soda na mbongo na ye moko? Nani alonaka elanga ya vino mpo alia mbuma na yango te? Nani abatelaka etonga mpo amela miliki na yango te?
τις στρατευεται ιδιοις οψωνιοις ποτε τις φυτευει αμπελωνα και τον καρπον αυτου ουκ εσθιει {VAR1: [η] } {VAR2: η } τις ποιμαινει ποιμνην και εκ του γαλακτος της ποιμνης ουκ εσθιει
8 Boni, ezali kaka na bomoto nde nazali koloba bongo? Boni, mobeko elobi mpe bongo te?
μη κατα ανθρωπον ταυτα λαλω η και ο νομος ταυτα ου λεγει
9 Solo, ekomama kati na mobeko ya Moyize: « Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma. » Boni, bokanisi ete Nzambe azalaki nde komitungisa mpo na bangombe?
εν γαρ τω μωυσεως νομω γεγραπται ου {VAR1: φιμωσεις } {VAR2: κημωσεις } βουν αλοωντα μη των βοων μελει τω θεω
10 Ezali te mpo na biso nde alobaki bongo? Solo, ezali mpo na biso nde ekomamaki bongo; pamba te moto oyo azali kotimola asengeli kosala yango na elikya, mpe oyo azali kobeta mbuma asengeli kosala yango na elikya ete akozwa eteni na ye.
η δι ημας παντως λεγει δι ημας γαρ εγραφη οτι οφειλει επ ελπιδι ο αροτριων αροτριαν και ο αλοων επ ελπιδι του μετεχειν
11 Boni, soki tolonaki nkona ya molimo kati na bino, ezali penza mabe soki tobuki kati na bino mbuma ya biloko oyo maboko ekoki kosimba?
ει ημεις υμιν τα πνευματικα εσπειραμεν μεγα ει ημεις υμων τα σαρκικα θερισομεν
12 Soki bato mosusu bazali kosalela makoki wana ya kozwa biloko epai na bino, tosengeli te, biso, kosalela yango koleka? Nzokande, tosalelaki makoki yango te, tokangaka kaka motema na makambo nyonso, mpo ete tozala epekiselo te liboso ya Sango Malamu ya Klisto.
ει αλλοι της υμων εξουσιας μετεχουσιν ου μαλλον ημεις αλλ ουκ εχρησαμεθα τη εξουσια ταυτη αλλα παντα στεγομεν ινα μη τινα εγκοπην δωμεν τω ευαγγελιω του χριστου
13 Boyebi te ete bato oyo basalaka kati na Tempelo baliaka bilei kowuta na Tempelo, mpe ete ba-oyo basalaka na etumbelo bazwaka eteni na bango kati na mbeka oyo ebonzami na etumbelo?
ουκ οιδατε οτι οι τα ιερα εργαζομενοι {VAR1: τα } {VAR2: [τα] } εκ του ιερου εσθιουσιν οι τω θυσιαστηριω παρεδρευοντες τω θυσιαστηριω συμμεριζονται
14 Ndenge moko mpe, Nkolo apesaki mitindo ete bato oyo bateyaka Sango Malamu babika bomoi na bango na nzela ya Sango Malamu.
ουτως και ο κυριος διεταξεν τοις το ευαγγελιον καταγγελλουσιν εκ του ευαγγελιου ζην
15 Kasi ngai, nasaleli makoki na ngai ata moke te, mpe ezali te mpo na kosenga yango nde nakomeli bino mokanda oyo; pamba te nakosepela kutu kokufa na esika ete moto mosusu abebisa tina ya lokumu na ngai.
εγω δε ου κεχρημαι ουδενι τουτων ουκ εγραψα δε ταυτα ινα ουτως γενηται εν εμοι καλον γαρ μοι μαλλον αποθανειν η το καυχημα μου ουδεις κενωσει
16 Koteya Sango Malamu ezali likambo oyo ngai nasengeli te komikumisa na yango, pamba te mosala yango epesamelaki ngai na makasi. Mawa na ngai soki nateyi te Sango malamu!
εαν γαρ ευαγγελιζωμαι ουκ εστιν μοι καυχημα αναγκη γαρ μοι επικειται ουαι γαρ μοι εστιν εαν μη ευαγγελισωμαι
17 Soki mokano ya koteya ewutaki epai na ngai moko, nalingaki solo kozwa lifuti; kasi lokola mokano yango ewutaki epai na ngai te, nazali kaka kokokisa mosala oyo epesamelaki ngai.
ει γαρ εκων τουτο πρασσω μισθον εχω ει δε ακων οικονομιαν πεπιστευμαι
18 Bongo lifuti na ngai ezali penza nini? Ezali nde kokaba na ofele Sango Malamu oyo nazali koteya, na kozanga kozwa lifuti oyo Sango Malamu yango epesi ngai.
τις ουν μου εστιν ο μισθος ινα ευαγγελιζομενος αδαπανον θησω το ευαγγελιον εις το μη καταχρησασθαι τη εξουσια μου εν τω ευαγγελιω
19 Solo, atako nazali nsomi na miso ya bato nyonso, kasi namikomisa mowumbu ya bato nyonso, mpo ete namema bato ebele koleka epai ya Yesu-Klisto.
ελευθερος γαρ ων εκ παντων πασιν εμαυτον εδουλωσα ινα τους πλειονας κερδησω
20 Tango nazalaka elongo na Bayuda, nakomaka lokola Moyuda mpo ete namema bango epai ya Klisto; tango nazalaka elongo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko, nakomaka lokola moto oyo azali na se ya bokonzi ya Mibeko, mpo ete namema bango epai ya Klisto, atako ngai moko nazali na se ya bokonzi ya Mibeko te.
και εγενομην τοις ιουδαιοις ως ιουδαιος ινα ιουδαιους κερδησω τοις υπο νομον ως υπο νομον μη ων αυτος υπο νομον ινα τους υπο νομον κερδησω
21 Tango nazalaka elongo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko te, nakomaka mpe lokola moto oyo azali na se ya bokonzi ya Mibeko te, mpo ete namema bango epai ya Klisto; nzokande natosaka Mibeko ya Nzambe, pamba te natosaka Mibeko ya Klisto.
τοις ανομοις ως ανομος μη ων ανομος θεου αλλ εννομος χριστου ινα κερδανω τους ανομους
22 Tango nazalaka elongo na bato oyo balenda te na kondima, nakomaka lokola moto alenda te na kondima, mpo ete namema bango kati na kondima epai ya Klisto. Namikomisaka nyonso epai ya bato nyonso, mpo na kobikisa ndambo ya bato kati na bango.
εγενομην τοις ασθενεσιν ασθενης ινα τους ασθενεις κερδησω τοις πασιν γεγονα παντα ινα παντως τινας σωσω
23 Mpe nasalaka makambo wana nyonso mpo na Sango Malamu, mpo ete ngai mpe nazwa mapamboli na ngai kati na yango.
παντα δε ποιω δια το ευαγγελιον ινα συγκοινωνος αυτου γενωμαι
24 Boni, boyebi te ete bato oyo bakimaka mbangu kati na lisano ya kopota mbangu, bango nyonso bapotaka mbangu, kasi moto moko kaka nde azwaka mbano? Bino mpe bopota mbangu lokola ye, na lolenge ya kozwa mbano.
ουκ οιδατε οτι οι εν σταδιω τρεχοντες παντες μεν τρεχουσιν εις δε λαμβανει το βραβειον ουτως τρεχετε ινα καταλαβητε
25 Bato nyonso oyo basalaka masano bamipekisaka makambo ebele; basalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka; kasi biso, tosalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka te.
πας δε ο αγωνιζομενος παντα εγκρατευεται εκεινοι μεν ουν ινα φθαρτον στεφανον λαβωσιν ημεις δε αφθαρτον
26 Yango wana ngai, nazali kopota mbangu na bozoba te, nazali kobeta makofi bibetabeta te.
εγω τοινυν ουτως τρεχω ως ουκ αδηλως ουτως πυκτευω ως ουκ αερα δερων
27 Kasi nakonzaka nzoto na ngai, nakomisaka yango lokola mowumbu, pamba te nabangaka kozanga mbano sima na ngai koteya bato mosusu.
αλλα υπωπιαζω μου το σωμα και δουλαγωγω μη πως αλλοις κηρυξας αυτος αδοκιμος γενωμαι

< 1 Bakolinto 9 >