< 1 Bakolinto 8 >

1 Mpo na oyo etali misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, toyebi malamu ete biso nyonso tozali na boyebi. Boyebi epesaka lolendo, kasi bolingo elendisaka.
De iis autem quæ idolis sacrificantur, scimus quia omnes scientiam habemus. Scientia inflat, caritas vero ædificat.
2 Moto oyo akanisaka ete azali na boyebi ya makambo ayebi nanu eloko te na ndenge esengeli.
Si quis autem se existimat scire aliquid, nondum cognovit quemadmodum oporteat eum scire.
3 Kasi moto oyo alingaka Nzambe, Nzambe ayebi ye.
Si quis autem diligit Deum, hic cognitus est ab eo.
4 Boye, na tina na likambo ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, toyebi malamu ete nzambe ya ekeko ezali eloko pamba kati na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka se moko.
De escis autem quæ idolis immolantur, scimus quia nihil est idolum in mundo, et quod nullus est Deus, nisi unus.
5 Solo, ezali na bikelamu ebele oyo ebengami banzambe, ezala na likolo to na mabele; yango nde esalaka ete banzambe mpe bankolo bazala ebele.
Nam etsi sunt qui dicantur dii sive in cælo, sive in terra (siquidem sunt dii multi, et domini multi):
6 Kasi mpo na biso, Nzambe azali kaka se moko, Ye nde azali Tata mpe Mokeli na nyonso, mpe biso tozali na bomoi mpo na Ye. Mpe Nkolo azali kaka se moko, Ye nde Yesu-Klisto. Nyonso esalema na nzela na Ye, mpe biso tozali na bomoi mpo na Ye.
nobis tamen unus est Deus, Pater, ex quo omnia, et nos in illum: et unus Dominus Jesus Christus, per quem omnia, et nos per ipsum.
7 Nzokande, bato nyonso bazali na boyebi oyo te; bato mosusu bazali nanu na momesano ya kosambela banzambe ya bikeko kino sik’oyo. Boye wana baliaka misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bakanisaka ete ezali penza mbeka oyo babonzeli banzambe wana; mpe mitema na bango, oyo elenda te ekomaka mbindo.
Sed non in omnibus est scientia. Quidam autem cum conscientia usque nunc idoli, quasi idolothytum manducant: et conscientia ipsorum cum sit infirma, polluitur.
8 Nzokande, ezali bilei te nde ememaka biso pene ya Nzambe; soki tolie yango te, tokobungisa eloko moko te; soki mpe tolie yango, tokozwa eloko moko te.
Esca autem nos non commendat Deo. Neque enim si manducaverimus, abundabimus: neque si non manducaverimus, deficiemus.
9 Kasi bosala keba ete bonsomi na bino ekoma libaku te mpo na bato oyo balenda te kati na kondima.
Videte autem ne forte hæc licentia vestra offendiculum fiat infirmis.
10 Pamba te soki moko kati na bato oyo balenda te kati na kondima amoni yo, yo oyo ozali na boyebi, ozali kolia kati na tempelo ya banzambe ya bikeko, boni, motema na ye ekozanga solo kotindika ye mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu?
Si enim quis viderit eum, qui habet scientiam, in idolio recumbentem: nonne conscientia ejus, cum sit infirma, ædificabitur ad manducandum idolothyta?
11 Boye, ndeko oyo alenda te kati na kondima, ye oyo Klisto akufelaki, akopengwa likolo ya boyebi na yo.
Et peribit infirmus in tua scientia, frater, propter quem Christus mortuus est?
12 Tango bozali kobetisa bandeko na bino mabaku na ndenge wana, mpe bozali kozokisa mitema na bango, oyo elenda te, bozali kosala masumu liboso ya Klisto.
Sic autem peccantes in fratres, et percutientes conscientiam eorum infirmam, in Christum peccatis.
13 Yango wana, soki mpo na bilei na ngai, ndeko na ngai azali kokweya na masumu, nakotikala kolia lisusu misuni te mpo ete nazala libaku te, oyo ekokweyisa ye na masumu. (aiōn g165)
Quapropter si esca scandalizat fratrem meum, non manducabo carnem in æternum, ne fratrem meum scandalizem. (aiōn g165)

< 1 Bakolinto 8 >