< 1 Bakolinto 7 >
1 Sik’oyo, nazali kopesa biyano na tina na makambo oyo bokomelaki ngai. Eleki malamu mpo na mobali ete abala mwasi te.
Teď ještě k dalším otázkám vašeho dopisu. Dokáže-li si muž odepřít ženu, prospěje mu to.
2 Kasi mpo na kokima pite, tika ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye.
Než však své síly přecenit a podlehnout pak pokušení s cizí ženou, je lépe, aby muž měl svou manželku a žena svého manžela. Pohlavní touha je přirozená a její naplnění by si manželé neměli vzájemně odepírat.
3 Tika ete mobali akokisa posa ya mwasi na ye, mpe tika ete mwasi akokisa posa ya mobali na ye.
4 Pamba te mwasi azali na bokonzi te na nzoto na ye, ezali nde mobali na ye; ndenge moko mpe, mobali azali na bokonzi te na nzoto na ye, kasi ezali nde mwasi na ye.
V manželství nemá ani muž ani žena právo nakládat se svým tělem bez ohledu na toho druhého.
5 Bopimelanaka nzoto te, longola kaka soki, na boyokani mpe mpo na mwa tango moke, bolingi tango mosusu komipesa na losambo. Kasi sima na tango yango, bozongela kosangisa nzoto mpo ete Satana akozwa nzela te ya komeka bino likolo ya bozangi makoki ya komikanga.
Proto se jeden druhému neodpírejte, leda po vzájemné dohodě a jen na čas, kvůli modlitbám; pak se zase jeden druhému odevzdejte, jinak byste se vystavovali nebezpečným pokušením.
6 Awa nazali koloba bongo, nazali na ngai kaka kopesa likanisi, kasi mobeko te.
Tím samozřejmě manželství nikomu nenařizuji, jenom k němu vyslovuji souhlas.
7 Nakokaki kosepela ete mibali nyonso bazala lokola ngai; nzokande, moto na moto azali na likabo na ye ya ngolu, oyo azwi kowuta na Nzambe: moko azali na likabo oyo, mosusu azali na likabo wana.
Pochopitelně bych byl rád, kdyby měl každý takovou svobodu zříci se ho, jako mám já. Ale Bůh nedává všem stejný dar: jednomu dá to, jinému ono.
8 Na yango, nazali koloba na bato oyo babali nanu te mpe na basi oyo bakufisa mibali, ete ezali malamu mpo na bango kokoba kozala ya kobala te lokola ngai.
Osamělým a zejména vdovám doporučuji, aby do manželství už nevstupovali.
9 Kasi soki bakoki te komikanga, tika ete babala; pamba te eleki malamu kobala, na esika ya kozika na posa ya nzoto.
Jestliže jim však zdrženlivost dělá potíže, ať se raději ožení či vdají. Je lepší se vdát a oženit, než se trápit neukojenou touhou.
10 Epai ya bato oyo babala, nazali kopesa mitindo, ngai te kasi Nkolo: Mwasi asengeli te kokabwana na mobali na ye;
Pro manžele však platí jednoznačně – a to není příkaz můj, nýbrž Kristův: žena ať od svého muže neodchází;
11 kasi soki akabwani na mobali na ye, asengeli kobala lisusu te to asengeli koyokana na mobali na ye; mpe mobali asengeli te kobengana mwasi na ye na libala.
pokud už odešla a nechce se k němu vrátit, musí zůstat neprovdána. Stejně ani muž se nesmí se ženou rozvést.
12 Epai ya bato mosusu, nazali koloba, Nkolo te kasi ngai: Soki ndeko mobali Moklisto abali mwasi oyo azali mondimi te, bongo mwasi yango andimi kowumela elongo na ye, tika ete abengana mwasi yango te;
O dalších problémech se Kristus sám nevyjádřil. Já bych však radil toto: když se stal křesťanem jen jeden z manželů, ale ten druhý s ním chce žít dál, ať se nerozcházejí. Nemusíte mít strach, že by vaše děti byly nečisté.
13 soki mpe mwasi azali na mobali oyo azali mondimi te, mpe mobali yango andimi kowumela elongo na ye na libala, tika ete mwasi akabwana te na mobali na ye.
14 Pamba te, mobali oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mwasi na ye, mpe mwasi oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mobali na ye. Soki ezalaki bongo te, bana na bino balingaki kozala mbindo, nzokande bazali bule.
Víra i jen jednoho z manželů má v tomto případě očistný účinek i na druhého nevěřícího.
15 Kasi soki ye oyo azali mondimi te alingi koboma libala, tika ete aboma na ye! Na likambo ya boye, ndeko mobali to ndeko mwasi azali ya kokangama te. Nzambe abenga bino mpo na kobika bomoi kati na kimia.
Ale chce-li nevěřící z manželů odejít, nechte ho odejít. Nejste přece povinni držet se ho za každou cenu, jako byste byli jeho otrokem. Nebo máte nějakou záruku, že ho zachráníte, když rozchod odmítnete?
16 Oyebi nini kati na likambo yango? Tango mosusu, yo mwasi, okobikisa mobali na yo! Tango mosusu, yo mobali, okobikisa mwasi na yo!
17 Lisusu, tika ete moto na moto atambola na lolenge oyo Nkolo abongisela ye, ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye. Yango nde mobeko oyo napesi na Mangomba nyonso.
Každý by měl zůstat v tom postavení, v jakém ho zastihlo Boží povolání. Tak to vykládám ve všech křesťanských obcích.
18 Boni, moto moko azalaki akatama ngenga tango Nzambe abengaki ye? Tika ete atikala akatama ngenga! Boni, moto moko azalaki akatama ngenga te tango Nzambe abengaki ye? Tika ete atikala akatama ngenga te!
Kdo se například nechal po židovském způsobu obřezat, nemusí si z toho dělat těžkou hlavu, když se stal křesťanem. A kdo nebyl obřezán, nemusí ten obřad podstupovat ani nyní.
19 Kokatama ngenga to kokatama ngenga te ezali na tina te; likambo ya tina ezali nde kobatela mibeko ya Nzambe.
Pro křesťana není důležité, zda podstoupil obřad obřízky či nikoliv. Důležité je, aby vyplnil Boží příkazy.
20 Tika ete moko na moko atikala ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye!
Zůstaň tedy tím, čím jsi byl, když jsi uslyšel Boží hlas.
21 Boni, ozalaki mowumbu tango Nzambe abengaki yo? Komitungisa na yango te! Ezala soki okoki kokoma nsomi, salela nde malamu lolenge na yo.
Zastihl tě v otroctví? Nic si z toho nedělej; otroctví hříchu je daleko strašnější – a z toho jsi přece vysvobozen. Občanskými svobodami ovšem nepohrdej, když jich můžeš využít.
22 Pamba te moto oyo azalaki mowumbu tango abengamaki mpo na kosalela Nkolo azali mokangolami ya Nkolo; ndenge moko mpe, moto oyo azalaki nsomi tango Nzambe abengaki ye azali mowumbu ya Klisto.
A naopak, jestliže jsi svobodný občan, pamatuj, že Kristus tě povolal, aby ses stal jeho otrokem.
23 Bosikolamaki na motuya makasi! Boye, bokoma te bawumbu ya bato.
On tě koupil a draze zaplatil. Jak by tě mohlo zotročit ještě něco jiného?
24 Bandeko, tika ete moko na moko awumela, na miso ya Nzambe ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye!
Nehledej tedy únik z postavení, ve kterém jsi se nacházel, když tě Kristus povolal. On je tam přece s tebou.
25 Mpo na oyo etali baseka, nazali na mobeko te kowuta na Nkolo; kasi na mawa ya Nkolo, lokola moto oyo bakoki kotiela motema, nazali kopesa likanisi na ngai.
O neprovdaných dívkách mi Kristus žádné zvláštní pokyny nedal. Když mi však Bůh dal vaši důvěru, řeknu vám své osobní mínění.
26 Nakanisi ete, mpo na pasi ya tango oyo, ezali malamu mpo na moto kotikala ndenge azali.
Myslím, že vzhledem k soužením, která jsou před námi, je moudřejší se nevdávat.
27 Ozali na mwasi? Koluka kokabwana na ye te. Ozali na mwasi te? Koluka mpe mwasi te.
Vdané a ženatí ať se kvůli tomu ovšem nerozcházejí, ale svobodní ať do manželství nespěchají.
28 Kasi soki mpe obali, osali lisumu te; soki moseka abali, asali lisumu te. Nzokande, bato oyo babala bakokutana na pasi mingi kati na bomoi na bango; mpe ngai, nalingi nde kosunga bino mpo bokutana na pasi yango te.
Kdo se přes všechna nebezpečí rozhodne do manželství vstoupit, ten samozřejmě nehřeší; musí však počítat s tím, že mu z toho rozhodnutí vzejdou nemalé problémy, kterých bych vás rád právě nyní ušetřil.
29 Bandeko na ngai, nazali koloba boye: tango ekomi moke; kobanda sik’oyo, tika ete mibali oyo bazali na basi bazala lokola nde bazali na basi te;
Hlavně nesmíme zapomínat, že před sebou nemáme už mnoho času. Ať tedy manželku máš nebo nemáš,
30 tika ete bato oyo bazali kolela bazala lokola nde bazali kolela te; tika ete ba-oyo bazali kosepela bazala lokola nde bazali kosepela te; tika ete ba-oyo bazali kosomba bazala lokola nde bazali na eloko te;
ať jsi smutný nebo se raduješ, nedej se tím zdržovat od Božího díla.
31 tika ete ba-oyo bazali kosalela biloko ya mokili bazala lokola nde bazali kosalela yango te; pamba te mokili oyo, na lolenge na yango ya sik’oyo, ezali koleka!
Užívej s radostí všeho dobrého, co svět nabízí, ale mysli na to, že nic z toho nepotrvá věčně, a nezabydluj se ve světě, který dnes je a zítra být nemusí.
32 Nalingi ete bomitungisaka te. Mobali oyo azali ya kobala te atiaka makanisi na ye kati na makambo ya Nkolo, alukaka ndenge nini kosepelisa Nkolo.
Byl bych rád, abyste si sami nepřidávali starostí. Svobodný může věnovat svůj čas Božímu dílu,
33 Mobali oyo abala atiaka makanisi na ye kati na makambo ya mokili, alukaka ndenge nini kosepelisa mwasi na ye,
kdežto ženatý se musí starat o ženu a rodinu, a tak dělit své myšlenky mezi Boha a pozemské věci.
34 mpe motema na ye ezali ya kokabwana. Ndenge moko mpe, mwasi oyo azangi mobali, lokola moseka, atiaka makanisi na ye kati na makambo ya Nkolo mpo ete azala bule kati na nzoto mpe kati na molimo. Kasi mwasi oyo abala atiaka makanisi na ye kati na makambo ya mokili, alukaka ndenge nini kosepelisa mobali na ye.
Stejné problémy má vdaná žena: starost o svůj zevnějšek, o domácnost, jak vyhovět mužovým zálibám a vrtochům. Naproti tomu svobodná dívka a neprovdaná žena má spíš možnost pečovat o krásu ducha, která se líbí Bohu.
35 Nazali koloba makambo oyo mpo na bolamu na bino; ezali te mpo na kotiela bino motambo, kasi ezali nde mpo ete bosala oyo ezali malamu koleka mpe bomipesa mobimba na Nkolo.
To všechno vám říkám, abych vám pomohl, ne abych vás odradil od sňatku. Chci vám ukázat, jak sloužit Pánu co nejlépe a co všechno by vás od toho mohlo odvádět.
36 Soki elenge mobali amoni ete akokoka lisusu te komikanga liboso ya mwasi mobandami na ye na libala, soki akanisi kosangisa na ye nzoto mpe ete asengeli kaka kosala bongo, wana bazali kotambola kati na likanisi ya kobalana, tika ete asala kolanda posa na ye, azali kosala lisumu te. Tika ete babalana!
37 Kasi mobali oyo azwi mokano kati na motema na ye, na kotindikama te mpe na bososoli nyonso, ya kosangisa nzoto te na mwasi mobandami na ye na libala, asali malamu.
Kdo si nedovede představit život bez manželství, ať do něj vstoupí, není na tom nic špatného. Kdo však má sám sebe tak dalece v moci, že dokáže svou touhu udržet na uzdě, a rozhodne se zůstat svobodný, učinil moudré rozhodnutí. Zkrátka a dobře; obojí je správné, ale to druhé je lepší.
38 Boye, mobali oyo abali mwasi mobandami na ye na libala asali malamu, kasi oyo abali ye te asali malamu koleka.
39 Mwasi ya libala azalaka ya kokangama na mobali na ye na tango nyonso oyo mobali yango azali na bomoi. Soki mobali na ye akufi, mwasi akomi nsomi mpo na kobalana na mobali nyonso oyo ye alingi, kasi mobali yango asengeli kozala Moklisto.
Žena je vázána věrností, pokud její muž žije. Jestliže věřící žena ovdoví, je volná a může se znovu provdat, ovšem jen za křesťana. Bude však šťastnější, když to neudělá.
40 Nzokande, na makanisi na ngai, akozala mwasi ya esengo koleka soki atikali ndenge azali; mpe nakanisi ete, ngai mpe, nazali na Molimo ya Nzambe.
To je moje rada a domnívám se, že i já se smím odvolávat na vedení Božím Duchem.