< 1 Bakolinto 5 >

1 Bato bazali koloba bipai nyonso ete pite ezali kosalema kati na bino, pite oyo emonanaka kutu te epai ya Bapagano: mobali moko kati na bino azali kosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye.
On entend dire de toutes parts qu'il y a parmi vous de l'impudicité, et même une telle impudicité, qu'entre les Gentils il n'est point fait mention de semblable; c'est que quelqu'un entretient la femme de son père.
2 Mpe bino, bozali lisusu komikumisa na yango! Nzokande bosengelaki koyoka mawa mpo na yango, mpe kosala ete balongola kati na bino moto oyo azali kosala likambo ya ndenge wana.
Et cependant vous êtes enflés [d'orgueil], et vous n'avez pas plutôt mené deuil, afin que celui qui a commis cette action fût retranché du milieu de vous.
3 Solo, mpo na ngai, atako nazali elongo na bino te na nzoto, kasi nazali elongo na bino na molimo. Mpe lokola moto oyo azali elongo na bino, na Kombo na Yesu, Nkolo na biso, nasili kokatela moto nyonso oyo azalaki kosala likambo yango etumbu.
Mais moi, étant absent de corps, mais présent en esprit, j'ai déjà ordonné comme si j'étais présent, touchant celui qui a ainsi commis une telle action.
4 Boye, tango bokosangana na Kombo na Yesu, Nkolo na biso, nakozala elongo na bino na molimo; mpe na nguya ya Yesu, Nkolo na biso,
Vous et mon esprit étant assemblés au Nom de notre Seigneur Jésus-Christ, [j'ai, dis-je, ordonné], par la puissance de notre Seigneur Jésus-Christ,
5 bokaba mobali yango na maboko ya Satana mpo ete nzoto na ye ebeba, mpe molimo na ye ebikisama na mokolo ya Nkolo.
Qu'un tel homme soit livré à satan, pour la destruction de la chair; afin que l'esprit soit sauvé au jour du Seigneur Jésus.
6 Lolendo na bino ezali kitoko te! Boyebi te ete mwa kisi moke ya mapa evimbisaka potopoto nyonso ya mapa?
Votre vanité est mal fondée; ne savez-vous pas qu'un peu de levain fait lever toute la pâte?
7 Bolongola kati na bino kisi nyonso ya kala ya mapa mpo ete bokoma peto lokola potopoto ya sika ya mapa, ndenge bozali penza. Pamba te Klisto, Mpate na biso ya Pasika, asilaki kopesama lokola mbeka.
Otez donc le vieux levain, afin que vous soyez une nouvelle pâte, comme vous êtes sans levain; car Christ, notre Pâque, a été sacrifié pour nous.
8 Yango wana, tosepela feti, na mapa ya bosembo mpe ya bosolo, mapa oyo ezangi kisi, kasi na kisi ya kala te ya mapa, kisi ya kindoki mpe ya makambo mabe.
C'est pourquoi faisons la fête, non point avec le vieux levain, ni avec un levain de méchanceté et de malice, mais avec les pains sans levain de la sincérité et de la vérité.
9 Kati na mokanda oyo nakomelaki bino, nayebisaki bino ete bozala lisanga moko te na bato oyo batambolaka na bomoi ya pite.
Je vous ai écrit dans [ma] Lettre, que vous ne vous mêliez point avec les fornicateurs.
10 Elingi koloba te ete bozala mosika na bato nyonso oyo, kati na mokili oyo, batambolaka na bomoi ya pite to bazali na lokoso ya mbongo to bazali miyibi to basambeli bikeko, pamba te soki ezalaki bongo, wana bosengeli kolongwa na mokili.
Mais non pas absolument avec les fornicateurs de ce monde, ou avec les avares, ou les ravisseurs, ou les idolâtres; car autrement certes, il vous faudrait sortir du monde.
11 Kasi nazali nde kokomela bino sik’oyo mpo na koyebisa bino ete bozala lisanga moko te na moto oyo amilobelaka ete azali ndeko Moklisto, kasi atambolaka na bomoi ya pite to azali na lokoso ya mbongo to azali mosambeli bikeko to mofingi bato to molangwi masanga to moyibi. Bosengeli kutu te kolia mesa moko elongo na moto ya lolenge oyo.
Or maintenant, je vous écris que vous ne vous mêliez point avec eux; c'est-à-dire, que si quelqu'un qui se nomme frère, est fornicateur, ou avare, ou idolâtre, ou médisant, ou ivrogne, ou ravisseur, vous ne mangiez pas même avec un tel homme.
12 Boni, mosala na ngai ezali ya kosambisa bato oyo bazali na libanda ya Lingomba? Boni, ezali bino te nde bosengeli kosambisa bato oyo bazali kati na Lingomba?
Car aussi qu'ai-je affaire de juger de ceux qui sont de dehors? ne jugez-vous pas de ceux qui sont de dedans?
13 Nzambe akosambisa bato oyo bazali na libanda ya Lingomba; kasi bino, bobengana moto mabe kati na bino.
Mais Dieu juge ceux qui sont de dehors. Otez donc d'entre vous-mêmes le méchant.

< 1 Bakolinto 5 >