< 1 Bakolinto 4 >

1 Boye, tika ete bato bazwa biso lokola basali ya Klisto mpe lokola bakambi oyo bazwi mokumba ya koyebisa mabombami ya Nzambe.
Dafür halte man uns: für Diener Christi und Verwalter der Geheimnisse Gottes.
2 Nzokande, eloko oyo basengaka epai ya bakambi, ezali ete bazala sembo.
Übrigens sucht man hier an den Verwaltern, daß einer treu erfunden werde.
3 Mpo na ngai, nazali komisambisa na likambo moko te. Yango wana, ezala kosambisa na bino to kosambisa ya esambiselo ya bato, elobelaka ngai eloko moko te.
Mir aber ist es das Geringste, daß ich von euch oder von einem menschlichen Tage beurteilt werde; ich beurteile mich aber auch selbst nicht.
4 Motema na ngai ezali kosambisa ngai ata na likambo moko te; nzokande, yango te nde ezali kolongisa ngai. Oyo asambisaka ngai, ezali nde Nkolo.
Denn ich bin mir selbst nichts bewußt, aber dadurch bin ich nicht gerechtfertigt. Der mich aber beurteilt, ist der Herr.
5 Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.
So urteilet nicht etwas vor der Zeit, bis der Herr kommt, welcher auch das Verborgene der Finsternis ans Licht bringen und die Ratschläge der Herzen offenbaren wird; und dann wird einem jeden sein Lob werden von Gott.
6 Bandeko, nayebisi bino makambo oyo etali ngai moko mpe oyo etali Apolosi, mpo na bolamu na bino, mpo ete, na ndakisa na biso, boyekola likambo oyo: Bolekaka mondelo te ya makambo oyo ekomama; mpe mpo ete moko te kati na bino atonda na lolendo na kolanda moko mpe koyina mosusu.
Dies aber, Brüder, habe ich auf mich und Apollos gedeutet um euretwillen, auf daß ihr an uns lernet, nicht über das hinaus [zu denken], was geschrieben ist, auf daß ihr euch nicht aufblähet für den einen, wider den anderen.
7 Boni, nani azali kokesenisa yo na bato mosusu? Eloko nini ozali na yango, oyo bapesa yo te? Mpe lokola bapesa yo yango, mpo na nini komikumisa lokola nde bapesaki yo yango te?
Denn wer unterscheidet dich? Was aber hast du, das du nicht empfangen hast? Wenn du es aber auch empfangen hast, was rühmst du dich, als hättest du es nicht empfangen?
8 Bosili kotondisama na nyonso oyo bozalaka na makanisi ya kozwa! Bosili penza kokoma bato ya bomengo! Bobandi kokonza; bobandi kokonza elongo na biso te! Nalingaka ete bobanda penza kokonza, mpo ete biso mpe tokonza elongo na bino!
Schon seid ihr gesättigt, schon seid ihr reich geworden; ihr habt ohne uns geherrscht, und ich wollte wohl, daß ihr herrschtet, auf daß auch wir mit euch herrschen möchten.
9 Pamba te nakanisi ete, biso bantoma, Nzambe atia biso na suka ya molongo lokola bato oyo bakatela bango etumbu ya kufa na libanda ya masano. Mpo na mokili mobimba, mpo na ba-anjelu mpe mpo na bato, Nzambe akomisa biso lokola lisano ya kotala.
Denn mich dünkt, daß Gott uns, die Apostel, als die Letzten dargestellt hat, wie zum Tode bestimmt; denn wir sind der Welt ein Schauspiel geworden, sowohl Engeln als Menschen.
10 Biso, likolo ya Klisto, tozali bazoba; kasi bino, kati na Klisto, bozali bato ya mayele! Biso, tozali bato na bolembu; kasi bino, bozali bato makasi! Bino, bozali kozwa lokumu; kasi biso, tozali kotiolama!
Wir sind Narren um Christi willen, ihr aber seid klug in Christo; wir schwach, ihr aber stark; ihr herrlich, wir aber verachtet.
11 Kino sik’oyo, tozali konyokwama na nzala, na posa ya mayi, tozangi bilamba, tozali kobetama, tozali koyengayenga,
Bis auf die jetzige Stunde leiden wir sowohl Hunger als Durst und sind nackt und werden mit Fäusten geschlagen und haben keine bestimmte Wohnung und mühen uns ab,
12 mpe tozali kosala mosala makasi na maboko na biso. Tango bafingaka biso, topambolaka; tango banyokolaka biso, toyikelaka yango kaka mpiko;
mit unseren eigenen Händen arbeitend. Geschmäht, segnen wir; verfolgt, dulden wir;
13 tango bakoselaka biso makambo mpo na kobebisa lokumu na biso, tozongisaka kaka na maloba ya boboto. Mpe kino sik’oyo, tokomi lokola bosoto ya mokili, mpe lokola lisapo ya bato.
gelästert, bitten wir; als Auskehricht der Welt sind wir geworden, ein Auswurf aller bis jetzt.
14 Nazali kokoma makambo oyo mpo na koyokisa bino soni te, kasi mpo na kokebisa bino lokola bana na ngai ya bolingo.
Nicht euch zu beschämen schreibe ich dieses, sondern ich ermahne euch als meine geliebten Kinder.
15 Pamba te, ata soki bozalaki na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, kasi bozali na batata ebele te. Ngai nde nazali tata na bino kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu.
Denn wenn ihr zehntausend Zuchtmeister in Christo hättet, so doch nicht viele Väter; denn in Christo Jesu habe ich euch gezeugt durch das Evangelium.
16 Boye, nabondeli bino: bolanda ndakisa na ngai.
Ich bitte euch nun, seid meine Nachahmer!
17 Ezali na tina wana nde natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo, oyo azali sembo kati na Nkolo; akolobela bino lisusu banzela na ngai mpo na bomoi kati na Yesu-Klisto, ndenge kaka nateyaka yango bisika nyonso kati na Mangomba nyonso.
Dieserhalb habe ich euch Timotheus gesandt, der mein geliebtes und treues Kind ist in dem Herrn; der wird euch erinnern an meine Wege, die in Christo sind, gleichwie ich überall in jeder Versammlung lehre.
18 Bato mosusu kati na bino bakomi na lofundu, bakanisaka ete nakoya lisusu te epai na bino.
Etliche aber sind aufgeblasen, als ob ich nicht zu euch kommen würde.
19 Kasi, soki Nkolo alingi, nakoya epai na bino kala mingi te; mpe nakoyeba kaka te ndenge nini bato yango ya lofundu balobaka, kasi mpe nguya nini bazali na yango.
Ich werde aber bald zu euch kommen, wenn der Herr will, und werde erkennen, nicht das Wort der Aufgeblasenen, sondern die Kraft;
20 Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya maloba te, kasi likambo ya nguya.
denn das Reich Gottes besteht nicht im Worte, sondern in Kraft.
21 Bolingi nini? Naya epai na bino na fimbu to na bolingo mpe na molimo ya boboto?
Was wollt ihr? Soll ich mit der Rute zu euch kommen, oder in Liebe und im Geiste der Sanftmut?

< 1 Bakolinto 4 >