< 1 Bakolinto 3 >

1 Bandeko, nakokaki te koloba na bino lokola na bato oyo batambolisamaka na Molimo, kasi lokola na bato oyo batambolisamaka kolanda baposa ya nzoto, lokola na bana mike kati na Klisto.
But I, my friends, could not speak to you as people with spiritual insight, but only as worldly-minded – mere infants in the faith of Christ.
2 Napesaki bino miliki, kasi bilei ya makasi te, pamba te bolingaki te kokoka kolia yango. Ezala sik’oyo, bokokoka na bino mpe kaka te kolia yango,
I fed you with milk, not with solid food, for you were not then able to take it. No, and even now you are not able; you are still worldly.
3 pamba te bozali nanu kotambolisama kolanda baposa ya nzoto. Lokola likunya mpe koswana ezali kati na bino, boni, bozali te kotambolisama kolanda baposa ya nzoto? Bozali kaka kosala lokola moto nyonso te?
While there exist among you jealousy and party feeling, is it not true that you are worldly, and are acting merely as other people do?
4 Tango moko azali koloba: « Ngai nazali moto ya Polo, » mpe mosusu: « Ngai nazali moto ya Apolosi, » boni, bozali kaka kosala lokola moto nyonso te?
When one says ‘I follow Paul,’ and another ‘I follow Apollos,’ aren’t you like other people?
5 Boni, Apolosi azali nani? Polo mpe azali nani? Bazali kaka basali oyo, na nzela na bango, bondimelaki Nzambe, kolanda mosala oyo Nkolo apesaki na moko na moko kati na bango.
What, I ask, is Apollos? Or what is Paul? Servants through whom you were led to accept the faith; and that only as the Lord helped each of you.
6 Ngai nalonaki, Apolosi asopaki mayi, kasi Nzambe azalaki kokolisa.
I planted, and Apollos watered, but it was God who caused the growth.
7 Ezala moto oyo alonaki to moto oyo asopaki mayi, moko te azali na tina; ezali kaka Nzambe oyo akolisaka nde azali na tina.
Therefore neither the one who plants, nor the one who waters, counts for anything, but only God who causes the growth.
8 Moto oyo aloni mpe moto oyo asopi mayi bazali kaka ndenge moko, mpe moko na moko akozwa lifuti na ye moko kolanda mosala na ye.
In this the person who plants and the person who waters are one; yet each will receive their own reward in proportion to their own labor.
9 Pamba te biso, tozali basali elongo na Nzambe; mpe bino, bozali elanga ya Nzambe, Ndako ya Nzambe.
For we are God’s fellow workers; you are God’s harvest field, God’s building.
10 Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki moboko lokola mobongisi ya mayele, mpe moto mosusu azali kotonga na likolo na yango. Boye tika ete moko na moko asala keba na lolenge na ye ya kotonga na likolo ya moboko.
In fulfillment of the charge which God had entrusted to me, I laid the foundation like a skillful master; but someone else is now building on it. Let everyone take care how they build;
11 Pamba te moko te akoki kotonga moboko mosusu, longola kaka oyo esili kotongama, oyo ezali Yesu-Klisto.
for no one can lay any other foundation than the one already laid – Jesus Christ.
12 Nzokande, soki moto asaleli wolo to palata to mabanga ya talo to mabaya to makasa to mpe matiti mpo na kotonga na likolo ya moboko yango,
Whatever is used by those who build on this foundation, whether gold, silver, costly stones, wood, hay, or straw,
13 mokolo ya kosambisama ekomonisa mosala na ye polele; pamba te ekozala mokolo ya moto, mpe moto ekomeka mosala ya moto na moto.
the quality of each man’s work will become known, for the day will make it plain; because that day is to be ushered in with fire, and the fire itself will test the quality of every man’s work.
14 Soki mosala ya moto oyo atongaki na likolo ya moboko eziki te, motongi yango akozwa lifuti.
If anyone’s work, which they have built on that foundation, still remains, they will gain a reward.
15 Kasi soki eziki, motongi akozwa eloko te. Ye moko kaka nde akobika, kasi ekozala lokola moto oyo asili kobika na likama ya moto.
If anyone’s work is burnt up, they will suffer loss; though they themselves will escape, but only as one who has passed through fire.
16 Boni, boyebi te ete bozali Tempelo ya Nzambe, mpe ete Molimo ya Nzambe avandaka kati na bino?
Don’t you know that you are God’s Temple, and that God’s Spirit has his home in you?
17 Soki moto abebisi Tempelo ya Nzambe, Nzambe mpe akoboma ye; pamba te Tempelo ya Nzambe ezali bule, bongo bino bozali nde Tempelo yango.
If any one destroys the Temple of God, God will destroy them; for the Temple of God is sacred, and so also are you.
18 Bomikosa te: soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya kati na mokili oyo, tika ete akoma lokola zoba mpo ete akoma penza moto ya bwanya. (aiōn g165)
Let no one deceive himself. If any one among you imagines that, as regards this world, they are wise, they should become a ‘fool,’ that they may become wise. (aiōn g165)
19 Pamba te bwanya ya mokili ezali bozoba na miso ya Nzambe. Kolanda ndenge ekomama: « Akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele mabe na bango; »
For in God’s sight this world’s wisdom is folly. Scripture tells of – ‘One who catches the wise in their own craftiness,’
20 mpe lisusu: « Nkolo ayebi ete makanisi ya bato ya bwanya ezali na tina te, »
And it says again – ‘The Lord sees how fruitless are the deliberations of the wise.’
21 yango wana tika ete moko te aluka lokumu kati na bato, pamba te nyonso ezali ya bino:
Therefore let no one boast about people; for all things are yours –
22 ezala Polo, Apolosi, Petelo, mokili, bomoi, kufa, tango oyo tozali sik’oyo to tango oyo ezali koya. Nyonso ezali ya bino;
whether Paul, or Apollos, or Cephas, or the world, or life, or death, or the present, or the future – all things are yours!
23 kasi bino, bozali bato ya Klisto, mpe Klisto azali ya Nzambe.
But you are Christ’s and Christ is God’s.

< 1 Bakolinto 3 >