< 1 Bakolinto 2 >
1 Yango wana bandeko, tango ngai mpe nayaki epai na bino mpo na kosakola mabombami ya Nzambe, nasalelaki te boyebi makasi ya koloba to ya bwanya.
Kardeşler, Tanrı'yla ilgili bildiriyi duyurmak için size geldiğimde, söz ustalığıyla ya da üstün bilgelikle gelmedim.
2 Pamba te, wana nazalaki elongo na bino, nazwaki mokano ya koluka koyeba likambo mosusu te, longola kaka Yesu-Klisto mpe Yesu-Klisto oyo babakaki na ekulusu.
Aranızdayken, İsa Mesih'ten ve O'nun çarmıha gerilişinden başka hiçbir şey bilmemeye kararlıydım.
3 Mpe tango nayaki epai na bino, nazalaki kati na bolembu, na kobanga mpe na kolenga.
Size zayıflık ve korku içinde geldim, tir tir titriyordum!
4 Maloba mpe mateya na ngai ewutaki te na maloba ya bwanya ya bomoto mpo na kondimisa bino, kasi ewutaki na kotalisama ya Molimo mpe ya nguya,
Sözüm ve bildirim, insan bilgeliğinin ikna edici sözlerine değil, Ruh'un kanıtlayıcı gücüne dayanıyordu.
5 mpo ete moboko ya kondima na bino ezala te bwanya ya bomoto, kasi ezala nde nguya ya Nzambe.
Öyle ki, imanınız insan bilgeliğine değil, Tanrı gücüne dayansın.
6 Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi. (aiōn )
Gerçi olgun kişiler arasında bilgece sözler söylüyoruz; ama bu bilgelik ne şimdiki çağın, ne de bu çağın gelip geçici önderlerinin bilgeliğidir. (aiōn )
7 Te! Toteyaka nde mabombami ya bwanya ya Nzambe, bwanya oyo ebombama na miso ya bato ya mokili, bwanya oyo Nzambe abongisa mpo na nkembo na biso, liboso ete akela mokili. (aiōn )
Tanrı'nın saklı bilgeliğinden gizemli biçimde söz ediyoruz. Zamanın başlangıcından önce Tanrı'nın bizim yüceliğimiz için belirlediği bu, (aiōn )
8 Kati na bakonzi ya mokili oyo, moko te asosolaki yango; pamba te soki basosolaki yango, balingaki te kobaka Nkolo ya nkembo na ekulusu. (aiōn )
bilgeliği bu çağın önderlerinden hiçbiri anlamadı. Anlasalardı yüce Rab'bi çarmıha germezlerdi. (aiōn )
9 Kasi, kolanda ndenge ekomama: « Oyo liso etikala nanu komona te, oyo litoyi etikala nanu koyoka te, mpe oyo moto atikala nanu kokanisa te kati na motema na ye, yango nde Nzambe abongisi mpo na bato oyo balingaka Ye. »
Yazılmış olduğu gibi, “Tanrı'nın kendisini sevenler için hazırladıklarını Hiçbir göz görmedi, Hiçbir kulak duymadı, Hiçbir insan yüreği kavramadı.”
10 Nzokande, Nzambe atalisaki biso yango na nzela ya Molimo na Ye; pamba te Molimo ayebaka nyonso, ezala bozindo ya makanisi ya Nzambe.
Oysa Tanrı Ruh aracılığıyla bunları bize açıkladı. Çünkü Ruh her şeyi, Tanrı'nın derin düşüncelerini bile araştırır.
11 Nani kati na bato ayebi makanisi ya moto, soki kaka molimo oyo ezali kati na moto yango te? Ndenge moko mpe moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka Molimo na Ye.
İnsanın düşüncelerini, insanın içindeki ruhundan başka kim bilebilir? Bunun gibi, Tanrı'nın düşüncelerini de Tanrı'nın Ruhu'ndan başkası bilemez.
12 Nzokande biso, tozwaki molimo ya mokili te, kasi tozwaki Molimo kowuta na Nzambe, mpo ete tokoka kososola biloko oyo Nzambe apesi biso na nzela ya ngolu.
Tanrı'nın bize lütfettiklerini bilelim diye, bu dünyanın ruhunu değil, Tanrı'dan gelen Ruh'u aldık.
13 Ezali biloko yango nde tolobelaka, na maloba ya bwanya ya bomoto te kasi na maloba oyo Molimo alakisaka. Boye, tolobelaka makambo ya Molimo na nzela ya maloba oyo Molimo apesaka.
Ruhsal kişilere ruhsal gerçekleri açıklarken, Tanrı'nın lütfettiklerini insan bilgeliğinin öğrettiği sözlerle değil, Ruh'un öğrettiği sözlerle bildiririz.
14 Moto oyo azangi Molimo ya Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe, pamba te ezali lokola liboma na miso na ye; akoki mpe te koyeba yango, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo.
Doğal kişi, Tanrı'nın Ruhu'yla ilgili gerçekleri kabul etmez. Çünkü bunlar ona saçma gelir, ruhça değerlendirildikleri için bunları anlayamaz.
15 Moto oyo atambolisamaka na Molimo asosolaka makambo nyonso; kasi ye, bato basosolaka ye te, pamba te ekomama:
Ruhsal kişi her konuda yargı yürütebilir, ama kimse onun hakkında yargı yürütemez.
16 « Nani ayebi makanisi ya Nkolo mpo akoka kopesa Ye toli? » Nzokande biso, makanisi ya Klisto ezali kati na biso.
“Rab'bin düşüncesini kim bildi ki, O'na öğüt verebilsin?” Oysa biz Mesih'in düşüncesine sahibiz.