< 1 Bakolinto 2 >

1 Yango wana bandeko, tango ngai mpe nayaki epai na bino mpo na kosakola mabombami ya Nzambe, nasalelaki te boyebi makasi ya koloba to ya bwanya.
And I, brethren, when I came to you, came not with excellency of speech (logos) or of wisdom, declaring unto you the testimony of God.
2 Pamba te, wana nazalaki elongo na bino, nazwaki mokano ya koluka koyeba likambo mosusu te, longola kaka Yesu-Klisto mpe Yesu-Klisto oyo babakaki na ekulusu.
For I determined not to know any thing among you, save Jesus Christ, and him crucified.
3 Mpe tango nayaki epai na bino, nazalaki kati na bolembu, na kobanga mpe na kolenga.
And I was with you in weakness, and in fear, and in much trembling.
4 Maloba mpe mateya na ngai ewutaki te na maloba ya bwanya ya bomoto mpo na kondimisa bino, kasi ewutaki na kotalisama ya Molimo mpe ya nguya,
And my speech (logos) and my preaching was not with enticing words (logos) of man's wisdom, but in demonstration of the Spirit (pneuma) and of power:
5 mpo ete moboko ya kondima na bino ezala te bwanya ya bomoto, kasi ezala nde nguya ya Nzambe.
That your faith should not stand in the wisdom of men, but in the power of God.
6 Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi. (aiōn g165)
Nevertheless we speak wisdom among them that are perfect: yet not the wisdom of this world, nor of the princes of this world, that come to nothing: (aiōn g165)
7 Te! Toteyaka nde mabombami ya bwanya ya Nzambe, bwanya oyo ebombama na miso ya bato ya mokili, bwanya oyo Nzambe abongisa mpo na nkembo na biso, liboso ete akela mokili. (aiōn g165)
But we speak the wisdom of God in a mystery, even the hidden wisdom, which God ordained before the world unto our glory: (aiōn g165)
8 Kati na bakonzi ya mokili oyo, moko te asosolaki yango; pamba te soki basosolaki yango, balingaki te kobaka Nkolo ya nkembo na ekulusu. (aiōn g165)
Which none of the princes of this world knew: for had they known it, they would not have crucified the Lord of glory. (aiōn g165)
9 Kasi, kolanda ndenge ekomama: « Oyo liso etikala nanu komona te, oyo litoyi etikala nanu koyoka te, mpe oyo moto atikala nanu kokanisa te kati na motema na ye, yango nde Nzambe abongisi mpo na bato oyo balingaka Ye. »
But as it is written, Eye has not seen, nor ear heard, neither have entered into the heart of man, the things which God has prepared for them that love him.
10 Nzokande, Nzambe atalisaki biso yango na nzela ya Molimo na Ye; pamba te Molimo ayebaka nyonso, ezala bozindo ya makanisi ya Nzambe.
But God has revealed them unto us by his Spirit: (pneuma) for the Spirit (pneuma) searches all things, yea, the deep things of God.
11 Nani kati na bato ayebi makanisi ya moto, soki kaka molimo oyo ezali kati na moto yango te? Ndenge moko mpe moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka Molimo na Ye.
For what man knows the things of a man, save the spirit (pneuma) of man which is in him? even so the things of God knows no man, but the Spirit (pneuma) of God.
12 Nzokande biso, tozwaki molimo ya mokili te, kasi tozwaki Molimo kowuta na Nzambe, mpo ete tokoka kososola biloko oyo Nzambe apesi biso na nzela ya ngolu.
Now we have received, not the spirit (pneuma) of the world, but the spirit (pneuma) which is of God; that we might know the things that are freely given to us of God.
13 Ezali biloko yango nde tolobelaka, na maloba ya bwanya ya bomoto te kasi na maloba oyo Molimo alakisaka. Boye, tolobelaka makambo ya Molimo na nzela ya maloba oyo Molimo apesaka.
Which things also we speak, not in the words (logos) which man's wisdom teaches, but which the Holy Spirit (pneuma) teaches; comparing spiritual things with spiritual.
14 Moto oyo azangi Molimo ya Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe, pamba te ezali lokola liboma na miso na ye; akoki mpe te koyeba yango, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo.
But the natural man receives not the things of the Spirit (pneuma) of God: for they are foolishness unto him: neither can he know them, because they are spiritually discerned.
15 Moto oyo atambolisamaka na Molimo asosolaka makambo nyonso; kasi ye, bato basosolaka ye te, pamba te ekomama:
But he that is spiritual judges all things, yet he himself is judged of no man.
16 « Nani ayebi makanisi ya Nkolo mpo akoka kopesa Ye toli? » Nzokande biso, makanisi ya Klisto ezali kati na biso.
For who has known the mind of the Lord, that he may instruct him? But we have the mind of Christ.

< 1 Bakolinto 2 >