< 1 Bakolinto 16 >

1 Mpo na makambo oyo etali makabo ya kokongola mpo na basantu, bosalaka, bino mpe, kolanda mitindo oyo napesaki Mangomba ya Galatia.
Περὶ δὲ τῆς λογίας τῆς εἰς τοὺς ἁγίους ὥσπερ διέταξα ταῖς ἐκκλησίαις τῆς Γαλατίας, οὕτως καὶ ὑμεῖς ποιήσατε.
2 Tika ete moko na moko kati na bino, na mokolo ya liboso ya poso, abomba ndambo ya mbongo kati na ndako na ye, kolanda ezweli na ye, mpo ete bazela te kokoma na ngai mpo na kokongola makabo yango.
κατὰ μίαν σαββάτου ἕκαστος ὑμῶν παρ᾽ ἑαυτῷ τιθέτω θησαυρίζων ὅ τι ἐὰν εὐοδῶται, ἵνα μή, ὅταν ἔλθω, τότε λογίαι γίνωνται.
3 Tango nakoya, nakotinda elongo na mikanda, bato oyo bino moko bokopona, mpo ete bamema makabo na bino kuna na Yelusalemi.
ὅταν δὲ παραγένωμαι, οὓς ἂν δοκιμάσητε, δι᾽ ἐπιστολῶν τούτους πέμψω ἀπενεγκεῖν τὴν χάριν ὑμῶν εἰς Ἱερουσαλήμ·
4 Soki ekomonana malamu ete ngai mpe nakende, wana tokokende na bango nzela moko.
ἐὰν δὲ ἄξιον ᾖ τοῦ κἀμὲ πορεύεσθαι, σὺν ἐμοὶ πορεύσονται.
5 Sima na ngai kolekela na Masedwane, nakoya kotala bino, pamba te nasengeli kolekela kuna.
ἐλεύσομαι δὲ πρὸς ὑμᾶς, ὅταν Μακεδονίαν διέλθω· Μακεδονίαν γὰρ διέρχομαι,
6 Tango mosusu, nakovanda mwa mikolo epai na bino to nakolekisa kuna tango ya malili, mpo ete bopesa ngai, bino moko, makoki oyo nasengeli na yango mpo na kokoba mobembo na ngai kino epai nakokende.
πρὸς ὑμᾶς δὲ τυχὸν παραμενῶ ἢ καὶ παραχειμάσω, ἵνα ὑμεῖς με προπέμψητε οὗ ἐὰν πορεύωμαι.
7 Na mbala oyo, naboyi komona bino na koleka, pamba te nazali na elikya ya kovanda mwa mikolo elongo na bino, soki Nkolo alingi.
οὐ θέλω γὰρ ὑμᾶς ἄρτι ἐν παρόδῳ ἰδεῖν· ἐλπίζω γὰρ χρόνον τινὰ ἐπιμεῖναι πρὸς ὑμᾶς, ἐὰν ὁ κύριος ἐπιτρέψῃ.
8 Kasi nakotikala awa, na Efeso, kino na mokolo ya Pantekoti,
ἐπιμενῶ δὲ ἐν Ἐφέσῳ ἕως τῆς πεντηκοστῆς·
9 pamba te nakutani na libaku malamu ya kosakola Sango Malamu, mpe bayini bazali ebele.
θύρα γάρ μοι ἀνέῳγεν μεγάλη καὶ ἐνεργής, καὶ ἀντικείμενοι πολλοί.
10 Soki Timote akomi, bosala nyonso ete azala na kimia kati na bino, pamba te asalaka mosala ya Nkolo, lokola ngai.
Ἐὰν δὲ ἔλθῃ Τιμόθεος, βλέπετε, ἵνα ἀφόβως γέ νηται πρὸς ὑμᾶς· τὸ γὰρ ἔργον κυρίου ἐργάζεται ὡς κἀγώ.
11 Tika ete moto moko te atala ye lokola eloko ya pamba! Bopesa ye makoki mpo ete asala mobembo ya malamu kino epai na ngai, pamba te nazali kozela ye elongo na bandeko.
μή τις οὖν αὐτὸν ἐξουθενήσῃ· προπέμψατε δὲ αὐτὸν ἐν εἰρήνῃ, ἵνα ἔλθῃ πρὸς ἐμέ· ἐκδέχομαι γὰρ αὐτὸν μετὰ τῶν ἀδελφῶν.
12 Mpo na oyo etali Apolosi, ndeko na biso, nalendisaki ye makasi ete aya kotala bino elongo na bandeko, kasi aboyi kosala yango sik’oyo; akoya kaka tango akokutana na libaku ya malamu.
περὶ δὲ Ἀπολλὼ τοῦ ἀδελφοῦ, πολλὰ παρεκάλεσα αὐτὸν ἵνα ἔλθῃ πρὸς ὑμᾶς μετὰ τῶν ἀδελφῶν· καὶ πάντως οὐκ ἦν θέλημα ἵνα νῦν ἔλθῃ, ἐλεύσεται δὲ ὅταν εὐκαιρήσῃ.
13 Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.
γρηγορεῖτε, στήκετε ἐν τῇ πίστει, ἀνδρίζεσθε, κραταιοῦσθε.
14 Bosalaka makambo nyonso na bolingo.
πάντα ὑμῶν ἐν ἀγάπῃ γινέσθω.
15 Bandeko na ngai, nazali lisusu kopesa bino etinda. Boyebi malamu ete Stefanasi mpe libota na ye bazalaki bato ya liboso ya kobongola mitema kati na Akayi, mpe ete bakomaki kosalela basantu.
Παρακαλῶ δὲ ὑμᾶς, ἀδελφοί· οἴδατε τὴν οἰκίαν Στεφανᾶ, ὅτι ἐστὶν ἀπαρχὴ τῆς Ἀχαΐας καὶ εἰς διακονίαν τοῖς ἁγίοις ἔταξαν ἑαυτούς·
16 Bino mpe, botosaka bato ya ndenge wana mpe moto nyonso oyo asalaka elongo na bango.
ἵνα καὶ ὑμεῖς ὑποτάσσησθε τοῖς τοιούτοις καὶ παντὶ τῷ συνεργοῦντι καὶ κοπιῶντι.
17 Nasepeli mingi komona Stefanasi, Fortinatisi mpe Akayikisi; pamba te esali lokola namoni bino nyonso.
χαίρω δὲ ἐπὶ τῇ παρουσίᾳ Στεφανᾶ καὶ Φορτουνάτου καὶ Ἀχαϊκοῦ, ὅτι τὸ ὑμέτερον ὑστέρημα οὗτοι ἀνεπλήρωσαν·
18 Balendisaki ngai, ndenge basalaka yango mbala na mbala mpo na bino. Boye, boyebaka kondima bato ya boye.
ἀνέπαυσαν γὰρ τὸ ἐμὸν πνεῦμα καὶ τὸ ὑμῶν. ἐπιγινώσκετε οὖν τοὺς τοιούτους.
19 Mangomba ya Azia etindeli bino mbote. Akilasi mpe Prisika, elongo na Lingomba oyo esanganaka kati na ndako na bango, bapesi bino mbote mingi kati na Nkolo.
Ἀσπάζονται ὑμᾶς αἱ ἐκκλησίαι τῆς Ἀσίας· ἀσπάζονται ὑμᾶς ἐν κυρίῳ πολλὰ Ἀκύλας καὶ Πρίσκα σὺν τῇ κατ᾽ οἶκον αὐτῶν ἐκκλησίᾳ·
20 Bandeko nyonso batindeli bino mbote. Bopesanaka bino na bino mbote na nzela ya beze ya bule.
ἀσπάζονται ὑμᾶς οἱ ἀδελφοὶ πάντες. ἀσπάσασθε ἀλλήλους ἐν φιλήματι ἁγίῳ.
21 Ezali ngai, Polo, moto nazali kokoma mbote oyo, na loboko na ngai moko.
Ὁ ἀσπασμὸς τῇ ἐμῇ χειρὶ Παύλου·
22 Soki ezali na moto oyo alingaka Nkolo te, tika ete alakelama mabe! Oh Nkolo, yaka!
εἴ τις οὐ φιλεῖ τὸν κύριον, ἤτω ἀνάθεμα. μαρὰν ἀθά.
23 Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na bino!
ἡ χάρις τοῦ κυρίου Ἰησοῦ μεθ᾽ ὑμῶν.
24 Bolingo na ngai ezali elongo na bino nyonso kati na Yesu-Klisto. Amen!
ἡ ἀγάπη μου μετὰ πάντων ὑμῶν ἐν χριστῷ Ἰησοῦ. ΠΡΟΣ ΚΟΡΙΝΘΙΟΥΣ Αʹ.

< 1 Bakolinto 16 >