< 1 Bakolinto 15 >
1 Bandeko na ngai, nalingi sik’oyo kozongisa lisusu na makanisi na bino, Sango Malamu oyo nateyaki bino, oyo boyambaki, oyo bomipesi na yango,
Звіщаю ж вам, браттє, благовістє, що я благовіствував вам, котре й прийняли ви, і в котрому встояли,
2 mpe oyo na nzela na yango bosili kobika, soki kaka bosimbi makasi Liloba oyo nateyaki bino; pamba te soki ezali bongo te, wana bondimelaki na bino kaka pamba.
котрим і спасаєтесь, коли памятаєте, яким словом я благовіствував вам, хиба що марно увірували.
3 Liboso na nyonso, nateyaki bino mateya oyo ngai moko nazwaki: Klisto akufaki mpo na masumu na biso, kolanda Makomi;
Бо я передав вам найперш, що й прийняв, що Христос умер за наші гріхи по писанням,
4 bakundaki Ye, mpe asekwaki na mokolo ya misato, ndenge Makomi elobaki yango liboso.
і що поховано Його, і що встав третього дня по писанням,
5 Amonanaki epai ya Petelo; sima, epai ya bantoma zomi na mibale.
і що явив ся Кифі, а опісля дванайцятьом.
6 Sima na yango, amonanaki epai ya bandeko koleka nkama mitano na mbala moko; mpe mingi kati na bango bazali nanu na bomoi kino na tango oyo, kasi bamosusu basila kokufa.
Після того явив ся більш пяти сотень братам разом, з котрих більше живуть і досі, инші ж і впокоїлись,
7 Bongo amonanaki epai ya Jake, mpe epai ya bantoma nyonso.
Після того явив ся Якову, а потім усім апостолам.
8 Sima na bango nyonso, amonanaki mpe epai na ngai, lokola epai ya mwana matsombe,
На останок же всїх, мов якому недорідку, явивсь і менї.
9 pamba te nazali moke penza kati na bantoma; mpe nakoki kutu te kobengama ntoma, mpo ete nanyokolaki Lingomba ya Nzambe.
Я бо останнїй з апостолів, котрий недостоєн зватись апостолом, бо гонив церкву Божу.
10 Kasi na ngolu ya Nzambe, nazali oyo nazali lelo; mpe ngolu na Ye epai na ngai ezali ya pamba te. Kutu, nasalaki mosala mingi koleka bango nyonso; nzokande, ezali ngai te, kasi ezali nde ngolu ya Nzambe, oyo ezali elongo na ngai.
Благодаттю ж Божою я те, що є; і благодать Його до мене була не марна, а більш усїх їх працював я; не я ж, а благодать Божа, що зо мною.
11 Na mokuse, ezala ngai to bango, biso nyonso toteyaka kaka Sango Malamu oyo, mpe ezali Sango Malamu yango nde bondimaki.
Чи то ж я, чи то вони, так проповідуємо, і так ви увірували.
12 Nzokande, soki toteyaka ete Klisto asekwaki kati na bakufi, ndenge nini bato mosusu kati na bino balobaka ete bakufi bakosekwa te?
Коли ж про Христа проповідуеть ся, що Він з мертвих устав, то як се деякі між вами кажуть, що нема воскресення мертвих?
13 Soki bakufi bakosekwa te, wana Klisto mpe asekwaki te.
Коли ж воскресення мертвих нема, то й Христос не воскрес;
14 Mpe soki Klisto asekwaki te, wana mateya na biso ezali na tina te, mpe kondima na bino ezali pamba.
коли ж Христос не воскрес, то марна проповідь наша, марна ж і віра ваша.
15 Mpe lisusu, soki ezali penza ya solo ete bakufi bakosekwa te, wana tozali batatoli ya lokuta na tina na Nzambe, pamba te totatoli lokuta na tina na Nzambe ete asekwisaki Klisto kati na bakufi. Nzokande soki ezali penza bongo ete bakufi bakosekwa te, wana Nzambe asekwisaki Yesu te.
І ми являємось кривими сьвідками Божими, бо сьвідкували про Бога; що воскресив Христа, котрого не воскресив, - коли мертві не встають.
16 Solo, soki bakufi bakosekwa te, wana Klisto mpe asekwaki te;
Бо коли мертві не встають, то й Христос не встав.
17 mpe soki Klisto asekwaki te, wana kondima na bino ezali na tina te, bozali nanu kati na masumu na bino,
А коли Христос не встав, то марна віра ваша: ви ще в гріхах ваших
18 mpe bato oyo bakufi kati na Klisto babungi mpo na libela.
Тоді й померші в Христї погибли.
19 Soki totiaka elikya na Klisto kaka mpo na bomoi oyo, tozali penza bato na mawa koleka bato nyonso.
Коли тільки в сьому житті вповаємо на Христа, то окаяннїшї (нещасливійші) ми всіх людей.
20 Kasi, solo, Klisto asekwaki kati na bakufi: azali Mosekwi ya liboso kati na bakufi.
Тепер же Христос устав з мертвих; первістком між мертвими став ся.
21 Solo, lokola kufa eyaki na nzela ya moto moko, lisekwa mpe eyaki na nzela ya moto moko;
Яко ж бо через чоловіка (прийшла) смерть, так через чоловіка й воскресеннє з мертвих.
22 ndenge bato nyonso bakufaka kati na Adamu, ndenge wana mpe bato nyonso bakozwa bomoi kati na Klisto;
Як бо в Адамі всі вмирають, так і в Христї всі оживають.
23 kasi moto na moto na tango na ye: Klisto akosekwa moto ya liboso; sima, tango akoya, bato oyo bazali ya Klisto bakosekwa.
Кожен своїм порядком: Первісток Христос, а потім Христові у приході Його.
24 Sima na yango nde suka ekoya, tango Klisto akozongisa bokonzi na maboko ya Ye oyo azali Nzambe mpe Tata, sima na Ye kobebisa lokumu nyonso, bokonzi nyonso mpe nguya nyonso.
Тоді (прийде) конець, як передасть царство Богу й Отцеві, як зруйнує всяке старшинуваннє і всяку власть і силу.
25 Pamba te Klisto asengeli kokonza kino Nzambe akotia banguna na Ye nyonso na se ya matambe na Ye.
Мусить бо Він царювати, доки положить усїх ворогів під ноги Його.
26 Kufa nde ezali monguna ya suka, oyo ekobebisama.
Останній ворог зруйнуєть ся - смерть.
27 Pamba te atiaki biloko nyonso na se ya matambe na Ye. Kasi wana alobi: « Nyonso ezali na se ya bokonzi na Ye, » etalisami polele ete esengeli te kotanga Nzambe oyo atiaki nyonso na se ya bokonzi na Ye.
Усе бо впокорив під ноги Його. Коли ж рече, що все впокорено, то явно, що окрім Того, хто покорив Йому все.
28 Mpe sima na Nzambe kotia nyonso na se ya bokonzi na Ye, Ye moko Mwana akomitia na se ya bokonzi ya Nzambe oyo atiaki nyonso na se ya bokonzi na Ye, mpo ete Nzambe azala nyonso kati na bato nyonso.
Коли ж упокорить ся Йому все, тодї і сам Син упокорить ся Тому, хто впокорив Йому все, щоб Бог був усе у всьому.
29 Soki lisekwa ezali te, bato oyo bazwaka libatisi mpo na bakufi bakosala nini? Soki bakufi bakosekwa te, mpo na nini bato bazwaki libatisi mpo na bango?
Ато що робити муть ті, хто хрестить ся ради мертвих, коли зовсім мертві не встають? чого ж і хрестять ся ради мертвих?
30 Bongo biso, mpo na nini tokutanaka na makama tango nyonso?
Чого ж і ми небезпечимось всякого часу?
31 Bandeko na ngai, mokolo na mokolo, nandimaka kokufa, wana namikumisaka na tina na bino kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Що-дня вмираю; так (по правді нехай буде) мені ваша похвала, що маю в Христї Ісусї, Господі нашому.
32 Soki ezali kaka mpo na makambo ya bomoto nde nabundisaki banyama ya zamba kati na Efeso, litomba nini nazwaki? Soki bakufi bakosekwa te, « wana tika ete tolia mpe tomela, pamba te, lobi, tokokufa! »
Коли б я чоловічим робом боров ся з зьвірями в ЄФесї, то яка менї користь, коли мертві не встають? Нумо їсти й пити, бо завтра помремо.
33 Bomikosa te: « Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu! »
Не обманюйте себе: ледачі бесіди псують добрі звичаї.
34 Bozongela makanisi ya malamu na ndenge ekoki mpe botika kosala masumu, pamba te bato mosusu kati na bino bayebi Nzambe te; nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni.
Протверезїть ся праведно та не грішить; бо деякі не знають Бога. На сором вам глаголю.
35 Kasi bato mosusu bakoki kotuna: « Bakufi bakosekwa ndenge nini? Bakozonga na bomoi na nzoto nini? »
Та хто-небудь скаже: Як у стануть мертві? і в якому тїлї прийдуть?
36 Bozangi nde mayele! Nkona oyo oloni ekoki te kozongela bomoi soki ekufi te.
Безумний! що ти сієш, не оживе, коли не вмре.
37 Mpe nkona oyo oloni ezali te nzoto oyo nzete ekozala na yango tango ekobima; kasi ezali mbuma ya pamba, tango mosusu mbuma ya ble to mbuma mosusu.
І що сїєш, не тіло будуче сієш, а голе зерно, як лучить ся, пшеничне, або яке инше.
38 Kasi ezali Nzambe nde apesaka yango nzoto oyo Ye moko abongisa, mpe apesaka nkona moko na moko nzoto na yango.
Бог же дає йому тіло, яке схоче, і кожному насїнню своє тіло.
39 Bikelamu nyonso ya bomoi ezalaka na lolenge moko te ya nzoto: ezali na bokeseni kati na nzoto ya bato, ya banyama, ya bandeke mpe ya mbisi.
Не кожне тїло таке саме тїло; тільки инше тїло в людей, инше тїло в скотини, инше у риб, инше ж у птаства.
40 Ezali mpe na banzoto ya Likolo mpe na banzoto ya se; mpe kongenga ya banzoto ya Likolo ekeseni na kongenga ya banzoto ya se:
(Єсть) і тіла небесні й тіла земні, та инша слава небесних, а инша земних.
41 moyi ezali na kongenga na yango, sanza ezali na kongenga na yango, minzoto mpe ezali na kongenga na yango; kutu monzoto moko ekeseni na monzoto mosusu na kongenga.
Инша слава сонця, а инша слава місяця, і инша слава зір; зоря бо від зори відрізняєть ся славою.
42 Boye, ezali mpe ndenge moko mpo na lisekwa ya bakufi: ekundami nzoto oyo epolaka, kasi ekosekwa nzoto oyo epolaka te;
Так і воскресеннє мертвих. Сїєть ся у зотлїннє, устає у нетлінню.
43 ekundami nzoto ya soni, kasi ekosekwa nzoto ya lokumu; ekundami nzoto ya bolembu, kasi ekosekwa nzoto ya nguya;
Сїєть ся в безчестю, устає в славі; сїєть ся в немочі, устає в силї.
44 ekundami nzoto ya bomoto, kasi ekosekwa nzoto ya molimo. Soki nzoto ya bomoto ezali, nzoto ya molimo mpe ezali.
Сїєть ся тїло душевне, устає тіло духовне; єсть тїло душевне і єсть тїло духовне.
45 Yango wana ekomama: « Moto ya liboso, Adamu, akomaki ekelamu na bomoi, azalaki na bomoi ya bomoto; » kasi Adamu ya suka akomaki Molimo oyo apesaka bomoi.
Так і написано: Став ся первий чоловік Адам душею живою, а останній Адам духом животворящим.
46 Ezali te bomoi ya molimo nde eyaki liboso, ezali nde bomoi ya bomoto; bomoi ya molimo eyaki na sima.
Тільки перш не духовне (було), а душевне, духовне ж потім.
47 Moto ya liboso asalemaki na putulu ya mabele, azali moto ya mabele; kasi moto ya mibale awutaka na Likolo.
Первий чоловік із землї земний; другий чоловік Господь з неба.
48 Ndenge moto ya mabele azali, ndenge wana mpe bato ya mabele bazali; mpe ndenge moto ya Lola azali, ndenge wana mpe bato ya Lola bazali.
Який земний, такі й земні; і який небесний, такі й небесні.
49 Mpe lokola tolataki elilingi ya moto ya mabele, tokolata mpe elilingi ya moto ya Lola.
І яко ж носили ми образ земного, так носити мем і образ небесного.
50 Bandeko na ngai, nazali koyebisa bino ete nzoto ya mosuni mpe makila ekoki te kokota na Bokonzi ya Nzambe, mpe oyo epolaka ekoki te kosangana na oyo epolaka te.
Се ж глаголю, браттє, що тїло і кров царства Божого наслїдити не може; і зотлїннє незотлїння не наслїдить.
51 Boyoka, nazali kotalisa bino mabombami: Biso nyonso, tokokufa te; kasi biso nyonso, tokobongolama,
Ось тайну вам глаголю: Всі нї впокоїмось, всі ж перемінимось.
52 na mbalakata, noki penza, tango kelelo ya suka ekobeta. Pamba te kelelo ekobeta, bakufi bakosekwa na nzoto oyo epolaka te; bongo biso, tokobongolama.
У хвилину, у миг ока, за останньою трубою - бо затрубить, і мертві повстають нетлїнними, і ми попереміняємось.
53 Solo, oyo epolaka esengeli kolata kozanga kopola, mpe oyo ekufaka esengeli kolata kozanga kokufa.
Треба бо тлінному сьому одягнутись у нетлїннє, і смертному сьому одягнутись у безсмерте.
54 Tango oyo epolaka ekolata kozanga kopola, mpe oyo ekufaka ekolata kozanga kokufa, na tango wana nde Liloba oyo ya Makomi ekokokisama: « Elonga emeli kufa.
Як же тлінне се одягнеть ся в нетлїннє і смертне се одягнеть ся в безсмертє, тоді станеть ся написане слово: Пожерта смерть побідою.
55 Oh kufa, wapi elonga na yo? Oh kufa, wapi nguya na yo? » (Hadēs )
Де в тебе, смерте, жоло? де в тебе, пекло, побіда? (Hadēs )
56 Nguya ya kufa ezali masumu, mpe nguya ya masumu ezali Mibeko.
Жоло ж смерти - гріх, а сила гріха - закон.
57 Kasi tika ete Nzambe apesamela matondi, pamba te apesaka biso elonga na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto!
Богу ж дяка, що дав нам побіду через Господа нашого Ісуса Христа.
58 Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.
Тимже, браттє моє любе, бувайте тверді, стійкі, надто збогачуючисі у дїлї Господньому завсїди, знаючи що праця ваша не марна перед Господем.