< 1 Bakolinto 13 >

1 Soki nalobi nkota ya bato to ya ba-anjelu, kasi nazangi bolingo, nazali kaka lokola ngonga oyo ezali kobeta to lokola manzanza oyo ezali kotia makelele.
εαν ταισ γλωσσαισ των ανθρωπων λαλω και των αγγελων αγαπην δε μη εχω γεγονα χαλκοσ ηχων η κυμβαλον αλαλαζον
2 Soki nazali na likabo ya kosakola, ya kososola mabombami nyonso mpe ya koyeba makambo nyonso; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba.
και εαν εχω προφητειαν και ειδω τα μυστηρια παντα και πασαν την γνωσιν και εαν εχω πασαν την πιστιν ωστε ορη μεθιστανειν αγαπην δε μη εχω ουθεν ειμι
3 Soki napesi biloko na ngai nyonso epai ya babola, mpe nakabi nzoto na ngai mpo ete batumba yango, kasi nazangi bolingo, nakozwa ata litomba moko te.
και εαν ψωμισω παντα τα υπαρχοντα μου και εαν παραδω το σωμα μου ινα καυθησωμαι αγαπην δε μη εχω ουδεν ωφελουμαι
4 Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te,
η αγαπη μακροθυμει χρηστευεται η αγαπη ου ζηλοι η αγαπη ου περπερευεται ου φυσιουται
5 ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe.
ουκ ασχημονει ου ζητει τα εαυτησ ου παροξυνεται ου λογιζεται το κακον
6 Bolingo eyokaka mawa liboso ya bozangi bosembo, kasi esepelaka na bosolo.
ου χαιρει επι τη αδικια συγχαιρει δε τη αληθεια
7 Tango nyonso mpe na makambo nyonso, bolingo elimbisaka, endimaka, ezalaka na elikya, eyikaka mpiko.
παντα στεγει παντα πιστευει παντα ελπιζει παντα υπομενει
8 Bolingo ekotikala kokufa te. Kasi masakoli ekokatana, nkota ekosila, boyebi ekolimwa.
η αγαπη ουδεποτε εκπιπτει ειτε δε προφητειαι καταργηθησονται ειτε γλωσσαι παυσονται ειτε γνωσισ καταργηθησεται
9 Pamba te toyebaka kaka moke, mpe tosakolaka kaka moke.
εκ μερουσ δε γινωσκομεν και εκ μερουσ προφητευομεν
10 Kasi tango kokokisama ekokoma, oyo ezali moke ekolimwa.
οταν δε ελθη το τελειον τοτε το εκ μερουσ καταργηθησεται
11 Tango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, nazalaki kokanisa lokola mwana moke, mpe nazalaki na mayele lokola ya mwana moke; kasi tango nakomaki mokolo, natikaki oyo ekoki na mwana moke.
οτε ημην νηπιοσ ωσ νηπιοσ ελαλουν ωσ νηπιοσ εφρονουν ωσ νηπιοσ ελογιζομην οτε δε γεγονα ανηρ κατηργηκα τα του νηπιου
12 Solo, sik’oyo, tozali komona kaka elilingi, lokola kati na talatala; kasi mokolo ezali, mokolo oyo tokomona penza ndenge esengeli. Sik’oyo nayebi kaka moke; kasi mokolo ezali, mokolo oyo nakoyeba penza nyonso, ndenge Nzambe ayebi ngai.
βλεπομεν γαρ αρτι δι εσοπτρου εν αινιγματι τοτε δε προσωπον προσ προσωπον αρτι γινωσκω εκ μερουσ τοτε δε επιγνωσομαι καθωσ και επεγνωσθην
13 Boye sik’oyo, makambo oyo misato ezali kowumela: kondima, elikya mpe bolingo; kasi kati na yango, likambo oyo eleki monene ezali nde bolingo.
νυνι δε μενει πιστισ ελπισ αγαπη τα τρια ταυτα μειζων δε τουτων η αγαπη

< 1 Bakolinto 13 >