< 1 Bakolinto 12 >
1 Bandeko, nakosepela ete bozala na boyebi na tina na makambo oyo etali makabo ya Molimo.
De spiritualibus autem, nolo vos ignorare fratres.
2 Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu Bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te.
Scitis quoniam cum gentes essetis, ad simulacra muta prout ducebamini euntes.
3 Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe, akoki koloba: « Tika ete Yesu alakelama mabe! » Mpe moto moko te akoki koloba: « Yesu azali Nkolo, » soki akambami na Molimo Mosantu te.
Ideo notum vobis facio, quod nemo in Spiritu Dei loquens, dicit anathema Jesu. Et nemo potest dicere, Dominus Jesus, nisi in Spiritu Sancto.
4 Makabo ezali ya ndenge na ndenge, kasi Molimo azali kaka moko.
Divisiones vero gratiarum sunt, idem autem Spiritus:
5 Misala ezali ya ndenge na ndenge, kasi Nkolo azali kaka moko.
et divisiones ministrationum sunt, idem autem Dominus:
6 Ezali na lolenge ebele ya kosalela Nkolo, kasi Nzambe azali kaka moko; mpe ezali Ye nde asalaka nyonso kati na bato nyonso.
et divisiones operationum sunt, idem vero Deus qui operatur omnia in omnibus.
7 Nzokande, Molimo amimonisaka epai na moko na moko mpo na bolamu ya bato nyonso.
Unicuique autem datur manifestatio Spiritus ad utilitatem.
8 Epai na moko, Molimo apesi liloba ya bwanya; epai na mosusu, liloba ya boyebi;
Alii quidem per Spiritum datur sermo sapientiæ: alii autem sermo scientiæ secundum eumdem Spiritum:
9 epai na mosusu kondima; epai na mosusu, likabo ya kobikisa babeli;
alteri fides in eodem Spiritu: alii gratia sanitatum in uno Spiritu:
10 epai na mosusu, nguya ya kosala bikamwa; epai na mosusu, likabo ya kosakola; epai na mosusu, likabo ya kososola milimo; epai na mosusu, likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge; epai na mosusu, likabo ya kolimbola nkota.
alii operatio virtutum, alii prophetia, alii discretio spirituum, alii genera linguarum, alii interpretatio sermonum.
11 Ezali Molimo kaka moko nde asalaka misala wana nyonso mpe akabolaka yango epai na moko na moko, ndenge Ye moko alingi.
Hæc autem omnia operantur unus atque idem Spiritus, dividens singulis prout vult.
12 Nzoto ezali kaka moko, kasi ezali na biteni ebele; mpe atako motango na yango ezali ebele, kasi ezali kosala kaka nzoto moko. Ezali mpe bongo mpo na Klisto.
Sicut enim corpus unum est, et membra habet multa, omnia autem membra corporis cum sint multa, unum tamen corpus sunt: ita et Christus.
13 Solo, biso nyonso tobatisamaki kati na Molimo moko mpo na kosala nzoto moko: ezala Bayuda to Bagreki, ezala bawumbu to bansomi. Mpe epesamelaki biso nyonso komela Molimo wana se moko.
Etenim in uno Spiritu omnes nos in unum corpus baptizati sumus, sive Judæi, sive gentiles, sive servi, sive liberi: et omnes in uno Spiritu potati sumus.
14 Nzoto ezali na eteni moko te, kasi ezali na biteni ebele.
Nam et corpus non est unum membrum, sed multa.
15 Soki lokolo elobi: « Lokola nazali loboko te, nazali kati na nzoto te; » boni, ekotika penza kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo?
Si dixerit pes: Quoniam non sum manus, non sum de corpore: num ideo non est de corpore?
16 Soki mpe litoyi elobi: « Lokola nazali liso te, nazali eteni ya nzoto te; » boni, ekotika penza kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo?
Et si dixerit auris: Quoniam non sum oculus, non sum de corpore: num ideo est de corpore?
17 Soki nzoto mobimba ezalaki kaka liso, nzoto yango elingaki koyoka ndenge nini? Soki nzoto mobimba ezalaki kaka litoyi, nzoto yango elingaki koyoka solo ndenge nini?
Si totum corpus oculus: ubi auditus? Si totum auditus: ubi odoratus?
18 Kasi Nzambe atiaki biteni kati na nzoto, mpe amonaki ete ezali malamu mpo na eteni moko na moko kozala na mosala na yango.
Nunc autem posuit Deus membra, unumquodque eorum in corpore sicut voluit.
19 Soki biteni nyonso ezalaki kaka eteni moko, boni, nzoto elingaki penza kozala nzoto?
Quod si essent omnia unum membrum, ubi corpus?
20 Solo, biteni ezali ebele, kasi nzoto ezali kaka moko.
Nunc autem multa quidem membra, unum autem corpus.
21 Yango wana, liso ekoki te koloba na loboko: « Nazali na posa na yo te; » moto mpe ekoki te koloba na makolo: « Nazali na posa na bino te. »
Non potest autem oculus dicere manui: Opera tua non indigeo: aut iterum caput pedibus: Non estis mihi necessarii.
22 Nzokande biteni ya nzoto, oyo emonanaka ete ezali na motuya moke, ezalaka na tina makasi;
Sed multo magis quæ videntur membra corporis infirmiora esse, necessariora sunt:
23 biteni oyo tozwaka na lokumu moke kati na nzoto, tobatelaka yango makasi; mpe biteni oyo toyokaka nkele, yango nde tobongisaka na lolenge malamu,
et quæ putamus ignobiliora membra esse corporis, his honorem abundantiorem circumdamus: et quæ inhonesta sunt nostra, abundantiorem honestatem habent.
24 wana biteni oyo ebetisaka mabaku te ezalaka na posa ya lolenge malamu yango te. Nzambe abongisa nzoto na lolenge ete basengeli kaka kozwaka na lokumu mingi, biteni oyo emonanaka lokola ezanga lokumu:
Honesta autem nostra nullius egent: sed Deus temperavit corpus, ei cui deerat, abundantiorem tribuendo honorem,
25 asalaki bongo mpo ete bokabwani ezala te kati na nzoto, kasi mpo ete biteni na yango esunganaka.
ut non sit schisma in corpore, sed idipsum pro invicem sollicita sint membra.
26 Soki eteni moko eyoki pasi, biteni nyonso esengeli koyoka pasi elongo na moko yango; soki mpe moko kaka nde esepeli, biteni nyonso esengeli kokabola esengo elongo na moko yango.
Et si quid patitur unum membrum, compatiuntur omnia membra: sive gloriatur unum membrum, congaudent omnia membra.
27 Nzokande bino, bozali nzoto ya Klisto, mpe moko na moko kati na bino azali eteni ya nzoto yango ya Klisto.
Vos autem estis corpus Christi, et membra de membro.
28 Mpe kati na Lingomba, Nzambe atiaki: ya liboso, bantoma; ya mibale, basakoli; ya misato, balakisi; mpe na sima, bato oyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, ba-oyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, ba-oyo bazali na likabo ya kosunga bato, ba-oyo bazali na likabo ya kokamba, mpe ba-oyo bazali na likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge.
Et quosdam quidem posuit Deus in ecclesia primum apostolos, secundo prophetas, exinde doctores, deinde virtutes, exinde gratias curationum, opitulationes, gubernationes, genera linguarum, interpretationes sermonum.
29 Boni, bango nyonso bazali bantoma? Bango nyonso bazali basakoli? Bango nyonso bazali balakisi? Bango nyonso basalaka bikamwa?
Numquid omnes apostoli? numquid omnes prophetæ? numquid omnes doctores?
30 Bango nyonso bazali na likabo ya kobikisa babeli? Bango nyonso balobaka nkota ya ndenge na ndenge? Bango nyonso balimbolaka nkota?
numquid omnes virtutes? numquid omnes gratiam habent curationum? numquid omnes linguis loquuntur? numquid omnes interpretantur?
31 Bozala na posa makasi ya kozala na makabo oyo eleki na monene. Mpo na yango, nakolakisa bino nzela oyo eleki malamu.
Æmulamini autem charismata meliora. Et adhuc excellentiorem viam vobis demonstro.