< 1 Bakolinto 11 >

1 Bolanda ndakisa na ngai, ndenge ngai nalandaka ndakisa ya Klisto.
پس اقتدا به من نمایید چنانکه من نیز به مسیح می‌کنم.۱
2 Nakumisaka bino kati na makambo nyonso, pamba te bokanisaka ngai mpe bopengwaka te kati na malakisi oyo napesaki bino.
اما‌ای برادران شما را تحسین می‌نمایم ازاین جهت که در هرچیز مرا یاد می‌دارید و اخبار رابطوری که به شما سپردم، حفظ می‌نمایید.۲
3 Nzokande, nalingi boyeba ete Klisto azali Mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya mwasi, mpe Nzambe azali Mokonzi ya Klisto.
اما می‌خواهم شما بدانید که سر هر مرد، مسیح است و سر زن، مرد و سر مسیح، خدا.۳
4 Mobali nyonso oyo asambelaka to asakolaka, wana moto na ye ezali ya kozipama, ayokisaka Mokonzi na ye soni.
هرمردی که سرپوشیده دعا یا نبوت کند، سر خود رارسوا می‌نماید.۴
5 Kasi mwasi nyonso oyo asambelaka to asakolaka, wana moto na ye ezali polele, ayokisaka mokonzi na ye soni, pamba te azali lokola mwasi oyo bakokola suki.
اما هر زنی که سر برهنه دعا یانبوت کند، سر خود را رسوا می‌سازد، زیرا این چنان است که تراشیده شود.۵
6 Mwasi oyo alataka kitambala te na moto na ye asengeli kokokola suki na ye. Kasi soki ezali soni mpo na mwasi kokatisa to kokokola suki, ekoleka malamu mpo na ye kolata kitambala na moto na ye.
زیرا اگر زن نمی پوشد، موی را نیز ببرد؛ و اگر زن را موی بریدن یا تراشیدن قبیح است، باید بپوشد.۶
7 Mobali asengeli te kolata kitambala, pamba te azali elilingi mpe lokumu ya Nzambe; kasi mwasi azali lokumu ya mobali.
زیراکه مرد را نباید سر خود بپوشد چونکه او صورت و جلال خداست، اما زن جلال مرد است.۷
8 Pamba te mobali akelama te wuta na mwasi, kasi mwasi akelama wuta na mobali.
زیراکه مرد از زن نیست بلکه زن از مرد است.۸
9 Mobali akelama te mpo na mwasi, kasi mwasi akelama mpo na mobali.
و نیزمرد بجهت زن آفریده نشد، بلکه زن برای مرد.۹
10 Yango wana, likolo ya ba-anjelu, mwasi asengeli kozala na elembo ya bokonzi na moto na ye.
از این جهت زن می‌باید عزتی بر سر داشته باشد به‌سبب فرشتگان.۱۰
11 Nzokande, kati na Nkolo, mwasi azali te soki mobali azali te, mpe mobali azali te soki mwasi azali te.
لیکن زن از مرد جدانیست و مرد هم جدا از زن نیست در خداوند.۱۱
12 Pamba te ndenge mwasi akelamaki wuta na mobali, ndenge mpe mobali abotamaki na nzela ya mwasi. Kasi makambo nyonso ewutaka na Nzambe.
زیرا چنانکه زن از مرد است، همچنین مرد نیزبوسیله زن، لیکن همه‌چیز از خدا.۱۲
13 Botala nanu bino moko: boni, ezali malamu mpo na mwasi kosambela Nzambe moto polele?
در دل خود انصاف دهید: آیا شایسته است که زن ناپوشیده نزد خدا دعا کند؟۱۳
14 Boni, mokili yango moko eteyaka bino te ete ezali soni mpo na mobali kozala na suki milayi,
آیا خودطبیعت شما را نمی آموزد که اگر مرد موی درازدارد، او را عار می‌باشد؟۱۴
15 kasi ezali nde lokumu mpo na mwasi kozala na suki milayi? Pamba te suki epesama na mwasi lokola kitambala.
و اگر زن موی درازدارد، او را فخر است، زیرا که موی بجهت پرده بدو داده شد؟۱۵
16 Soki moto moko akanisi ete ezali malamu mpo na ye kotia tembe na tina na likambo oyo, biso elongo na Mangomba ya Nzambe tozalaka na ezaleli wana te.
و اگر کسی ستیزه گر باشد، ما وکلیساهای خدا را چنین عادتی نیست.۱۶
17 Kati na malako oyo ezali kolanda, nakokumisa bino te; pamba te mayangani na bino esungaka bino te mpo bokoma bato ya esengo koleka, kasi ekomisaka bino lisusu bato na pasi makasi.
لیکن چون این حکم را به شما می‌کنم، شمارا تحسین نمی کنم، زیرا که شما نه از برای بهتری بلکه برای بدتری جمع می‌شوید.۱۷
18 Liboso, nazali koyoka ete bozalaka na bokabwani kati na bino, tango boyaka na mayangani; mpe nazali kondima yango mwa moke.
زیرا اولاهنگامی که شما در کلیسا جمع می‌شوید، می‌شنوم که در میان شما شقاقها روی می‌دهد وقدری از آن را باور می‌کنم.۱۸
19 Solo, bokabwani esengeli kozala kati na bino mpo ete Baklisto ya solo bayebana kati na bino.
از آن جهت که لازم است در میان شما بدعتها نیز باشد تا که مقبولان از شما ظاهر گردند.۱۹
20 Boye, tango boyaka na mayangani, ezalaka lisusu te mpo na kolia bilei ya Nkolo;
پس چون شما دریک جا جمع می‌شوید، ممکن نیست که شام خداوند خورده شود،۲۰
21 pamba te emonanaka ete, soki kaka bokomi na mesa, moto na moto awelaka nanu kolia bilei na ye moko; mpe mpo na yango, bamoko batikalaka na nzala, mpe bamosusu balangwaka.
زیرا در وقت خوردن هرکس شام خود را پیشتر می‌گیرد و یکی گرسنه و دیگری مست می‌شود.۲۱
22 Boni, bozangi bandako oyo kati na yango bokoki kolia mpe komela? Boni, bosalaka bongo mpo na kotiola Lingomba ya Nzambe mpe kosambwisa bato oyo bazangi bilei? Nini nakoki koloba na bino? Nakumisa bino? Na likambo oyo, nakokumisa bino te!
مگر خانه‌ها برای خوردن و آشامیدن ندارید؟ یا کلیسای خدا راتحقیر می‌نمایید و آنانی را که ندارند شرمنده می‌سازید؟ به شما چه بگویم؟ آیا در این امر شمارا تحسین نمایم؟ تحسین نمی نمایم!۲۲
23 Pamba te, nateyaki bino makambo oyo nazwaki epai ya Nkolo: Nkolo Yesu, na butu oyo batekaki Ye, azwaki lipa;
زیرا من از خداوند یافتم، آنچه به شما نیزسپردم که عیسی خداوند در شبی که او را تسلیم کردند، نان را گرفت۲۳
24 mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe alobaki: « Oyo ezali nzoto na Ngai; epesami mpo na bino! Bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai. »
و شکر نموده، پاره کرد وگفت: «بگیرید بخورید. این است بدن من که برای شما پاره می‌شود. این را به یادگاری من به‌جاآرید.»۲۴
25 Ndenge moko mpe, sima na Ye kolia, azwaki kopo mpe alobaki: « Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai! Tango nyonso bokobanda komela yango, bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai. »
و همچنین پیاله را نیز بعد از شام وگفت: «این پیاله عهد جدید است در خون من. هرگاه این را بنوشید، به یادگاری من بکنید.»۲۵
26 Boye, tango nyonso bokozala kolia lipa oyo mpe komela kopo oyo, bokozala kosakola kufa ya Nkolo kino akozonga.
زیرا هرگاه این نان را بخورید و این پیاله رابنوشید، موت خداوند را ظاهر می‌نمایید تاهنگامی که بازآید.۲۶
27 Yango wana, moto nyonso oyo akolia lipa to akomela kopo ya Nkolo na lolenge oyo ebongi te, akomema ngambo epai ya nzoto mpe makila ya Nkolo.
پس هرکه بطور ناشایسته نان را بخورد وپیاله خداوند را بنوشد، مجرم بدن و خون خداوند خواهد بود.۲۷
28 Boye tika ete moto nyonso amitala malamu liboso ya kolia lipa mpe komela wuta na kopo!
اما هر شخص خود راامتحان کند و بدینطرز از آن نان بخورد و از آن پیاله بنوشد.۲۸
29 Pamba te moto oyo azali kolia lipa mpe komela, na kozanga kososola ete ezali nzoto ya Nkolo, azali komikatela etumbu na kolia mpe komela bongo.
زیرا هرکه می‌خورد و می‌نوشد، فتوای خود را می‌خورد و می‌نوشد اگر بدن خداوند را تمییز نمی کند.۲۹
30 Yango wana mingi kati na bino bakoma na bolembu mpe na bokono, mpe ebele kati na bino bakufa.
از این سبب بسیاری از شما ضعیف و مریض‌اند و بسیاری خوابیده‌اند.۳۰
31 Kasi soki tozalaki kososola oyo tozali, tolingaki kozwa etumbu te.
اما اگر برخود حکم می‌کردیم، حکم بر مانمی شد.۳۱
32 Nzokande, Nkolo apesaka biso etumbu mpo na kozongisa biso na nzela, mpo ete tozwa etumbu te elongo na mokili.
لکن هنگامی که بر ما حکم می‌شود، از خداوند تادیب می‌شویم مبادا با اهل دنیا بر ماحکم شود.۳۲
33 Boye bandeko na ngai, tango boyaka na mayangani mpo na kolia elongo, bozelanaka.
لهذا‌ای برادران من، چون بجهت خوردن جمع می‌شوید، منتظر یکدیگر باشید.۳۳
34 Moto nyonso oyo azali na nzala asengeli nanu kolia na ndako na ye, mpo ete mayangani na bino ememela bino etumbu te. Mpe na tina na makambo oyo etikali, nakopesela yango malako tango nakoya.
و اگرکسی گرسنه باشد، در خانه بخورد، مبادا بجهت عقوبت جمع شوید. و چون بیایم، مابقی را منتظم خواهم نمود.۳۴

< 1 Bakolinto 11 >