< 1 Bakolinto 10 >

1 Bandeko, nalingi boyeba malamu likambo oyo: Bakoko na biso bazalaki bango nyonso na se ya lipata, bakatisaki bango nyonso ebale monene,
Or mes frères, je ne veux pas que vous ignoriez que nos pères ont tous été sous la nuée, et qu'ils ont tous passé par la mer;
2 babatisamaki bango nyonso mpo na Moyize kati na lipata mpe kati na ebale monene,
Et qu'ils ont tous été baptisés par Moïse en la nuée et en la mer;
3 baliaki bango nyonso bilei ya molimo ya ndenge moko,
Et qu'ils ont tous mangé d'une même viande spirituelle;
4 mpe bamelaki bango nyonso mayi ya molimo ya ndenge moko; pamba te bazalaki komela na libanga ya molimo, oyo ezalaki kotambola elongo na bango; mpe libanga yango ezalaki Klisto.
Et qu'ils ont tous bu d'un même breuvage spirituel: car ils buvaient [de l'eau] de la pierre spirituelle qui [les] suivait; et la pierre était Christ.
5 Nzokande, Nzambe asepelaki te na mingi kati na bango; solo, babomaki bango kati na esobe.
Mais Dieu n'a point pris plaisir en plusieurs d'eux; car ils ont été accablés au désert.
6 Ezali bandakisa mpo na biso, mpo ete tolula makambo mabe te ndenge bango balulaki.
Or ces choses ont été des exemples pour vous, afin que nous ne convoitions point des choses mauvaises, comme eux-mêmes les ont convoitées;
7 Bozala basambeli ya banzambe ya bikeko te, ndenge bamosusu kati na bango bazalaki, kolanda ndenge ekomama: « Bato bavandaki mpo na kolia mpe mpo na komela, mpe batelemaki mpo na kosakana. »
Et que vous ne deveniez point idolâtres, comme quelques-uns d'eux; ainsi qu'il est écrit: le peuple s'est assis pour manger et pour boire; et puis ils se sont levés pour jouer.
8 Tosengeli te kosala pite, ndenge bamosusu kati na bango basalaki; mpe, na mokolo moko, bato nkoto tuku mibale na misato bakufaki.
Et afin que nous ne nous laissions point aller à la fornication, comme quelques-uns d'eux s'y sont abandonnés, et il en est tombé en un jour vingt-trois mille.
9 Tosengeli mpe te komeka Klisto, ndenge bamosusu kati na bango basalaki; mpe banyoka ebomaki bango mpo ete eswaki bango.
Et que nous ne tentions point Christ, comme quelques-uns d'eux [l'] ont tenté, et ont été détruits par les serpents.
10 Boyimaka-yimaka te ndenge bamosusu kati na bango bayimaki-yimaki, mpe anjelu mobebisi abomaki bango.
Et que vous ne murmuriez point, comme quelques-uns d'eux ont murmurés, et sont péris par le destructeur.
11 Makambo wana nyonso ekweyelaki bango mpo ete ezala ndakisa mpo na biso, mpe ekomamaki mpo na kokebisa biso oyo tokomi na tango ya suka. (aiōn g165)
Or toutes ces choses leur arrivaient en exemple, et elles sont écrites pour notre instruction, comme [étant] ceux [auxquels] les derniers temps sont parvenus. (aiōn g165)
12 Yango wana, tika ete moto oyo azali kokanisa ete azali ya kotelema asala keba ete akweya te!
Que celui donc qui croit demeurer debout, prenne garde qu'il ne tombe.
13 Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso; mpe Nzambe azali Moyengebene; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.
[Aucune] tentation ne vous a éprouvés, qui n'ait été une [tentation] humaine; et Dieu est fidèle, qui ne permettra point que vous soyez tentés au-delà de vos forces, mais avec la tentation il vous en fera trouver l'issue, afin que vous la puissiez soutenir.
14 Yango wana, balingami na ngai, bokima kosambela banzambe ya bikeko.
C'est pourquoi, mes bien-aimés, fuyez l'idolâtrie.
15 Nazali koloba na bino lokola na bato ya mayele; botala bino moko soki makambo oyo nazali koloba ezali malamu to mabe.
Je [vous] parle comme à des personnes intelligentes; jugez vous-mêmes de ce que je dis.
16 Boni, kopo ya elambo oyo, mpo na yango, tozongisaka matondi epai ya Nzambe, ekomisaka biso te moko na makila ya Klisto? Lipa oyo tokataka ekomisaka biso te moko na nzoto ya Klisto?
La coupe de bénédiction, laquelle nous bénissons, n'est-elle pas la communion du sang de Christ? et le pain que nous rompons, n'est-il pas la communion du corps de Christ?
17 Lokola lipa ezali kaka moko, biso nyonso tozali kosala nzoto kaka moko atako tozali ebele, pamba te biso nyonso tokabolaka lipa yango kaka moko.
Parce qu'il n'y a qu'un seul pain, nous qui sommes plusieurs, sommes un seul corps; car nous sommes tous participants du même pain.
18 Bokanisa nanu Isalaele! Boni, bato oyo baliaka banyama oyo epesami lokola mbeka bazalaka moko te na etumbelo?
Voyez l'Israël selon la chair, ceux qui mangent les sacrifices, ne sont-ils pas participants de l'autel?
19 Nalingi koloba nini? Nalingi koloba ete misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe yango moko nzambe ya ekeko, ezali na tina?
Que dis-je donc? que l'idole soit quelque chose? ou que ce qui est sacrifié à l'idole, soit quelque chose? [Non].
20 Te! Kasi lokola babonzaka bambeka na bango epai ya milimo mabe mpe epai ya oyo ezali Nzambe te, naboyi ete bozala moko na milimo mabe.
Mais je dis que les choses que les Gentils sacrifient, ils les sacrifient aux démons, et non pas à Dieu; or je ne veux pas que vous soyez participants des démons.
21 Bokoki te komela oyo ezali kati na kopo ya Nkolo mpe komela lisusu oyo ezali kati na kopo ya milimo mabe; bokoki te kolia na mesa ya Nkolo mpe kolia lisusu na mesa ya milimo mabe.
Vous ne pouvez boire la coupe du Seigneur, et la coupe des démons; vous ne pouvez être participants de la table du Seigneur, et de la table des démons.
22 Boni, tolingi nde kotumbola zuwa ya Nkolo? Boni, tozali makasi koleka Ye?
Voulons-nous inciter le Seigneur à la jalousie? sommes-nous plus forts que lui?
23 Bolobaka: « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso ezali na litomba te; « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso elendisaka te.
Toutes choses me sont permises, mais toutes choses ne sont pas convenables; toutes choses me sont permises, mais toutes choses n'édifient pas.
24 Tika ete moto moko te aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya moto mosusu!
Que personne ne cherche ce qui lui est propre, mais que chacun [cherche] ce qui est pour autrui.
25 Boliaka nyonso oyo etekamaka na zando, na komipesa mituna te na tina na yango, noki te bobebisa mitema na bino.
Mangez de tout ce qui se vend à la boucherie, sans vous en enquérir pour la conscience:
26 Pamba te mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Nkolo.
Car la terre [est] au Seigneur, avec tout ce qu'elle contient.
27 Soki moto oyo azali mondimi te abengisi yo, mpe ondimi kokende epai na ye, lia nyonso oyo bakopesa yo, na komipesa mituna te, noki te obebisa motema na yo.
Que si quelqu'un des infidèles vous convie, et que vous y vouliez aller, mangez de tout ce qui est mis devant vous, sans vous en enquérir pour la conscience.
28 Kasi soki moto moko alobi na yo: « Mosuni oyo ebonzamaki lokola mbeka epai ya nzambe ya ekeko, » kolia yango te, likolo ya moto oyo akebisi yo mpe mpo ete obebisa te motema na yo.
Mais si quelqu'un vous dit: cela est sacrifié aux idoles, n'en mangez point à cause de celui qui vous en a avertis, et à cause de la conscience; car la terre [est] au Seigneur, avec tout ce qu'elle contient.
29 Awa, nazali koloba te na tina na motema na yo, kasi na tina na motema ya moto yango, pamba te mpo na nini motema ya moto mosusu elandela bonsomi na ngai?
Or je dis la conscience, non pas la tienne, mais celle de l'autre; car pourquoi ma liberté serait-elle condamnée par la conscience d'un autre?
30 Soki naliaka na kozongisa matondi epai ya Nzambe, mpo na nini kopamela ngai na tina na oyo, ngai, nazongiselaka matondi epai ya Nzambe?
Et si par la grâce j'en suis participant, pourquoi suis-je blâmé [pour une chose] dont je rends grâces?
31 Boye, ezala kolia to komela, nyonso oyo bokoki kozala kosala, bosalaka nyonso mpo na lokumu ya Nzambe.
Soit donc que vous mangiez, soit que vous buviez, ou que vous fassiez quelque autre chose, faites tout à la gloire de Dieu.
32 Bozalaka libaku te, ezala mpo na Bayuda, mpo na Bagreki to mpo na Lingomba ya Nzambe.
Soyez tels que vous ne donniez aucun scandale ni aux Juifs, ni aux Grecs, ni à l'Eglise de Dieu.
33 Yango wana, ngai, kati na makambo nyonso, nasalaka makasi mpo na kosepelisa bato nyonso; nalukaka litomba na ngai moko te, kasi nalukaka bolamu ya bato ebele, mpo ete babika.
Comme aussi je complais à tous en toutes choses, ne cherchant point ma commodité propre, mais celle de plusieurs, afin qu'ils soient sauvés.

< 1 Bakolinto 10 >