< 1 Masolo ya Kala 9 >

1 Batangaki bana nyonso ya Isalaele mpe bakomaki bakombo na bango na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. Bato ya Yuda bakendeki na bowumbu na Babiloni mpo na kozanga boyengebene.
以色列人都按家譜計算,寫在以色列諸王記上。猶大人因犯罪就被擄到巴比倫。
2 Bato ya liboso kati na bana ya Isalaele oyo bazongaki lisusu kovanda na bingumba na bango, ezalaki: ndambo ya bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi mpe basali ya Tempelo ya Yawe.
先從巴比倫回來,住在自己地業城邑中的有以色列人、祭司、利未人、尼提寧的首領。
3 Nzokande, ndambo ya bana mibali ya Yuda, ya Benjame, ya Efrayimi mpe ya Manase bazalaki kovanda na Yelusalemi:
住在耶路撒冷的有猶大人、便雅憫人、以法蓮人、瑪拿西人。
4 Utayi, mwana mobali ya Amiwudi, mwana mobali ya Omiri, mwana mobali ya Imiri, mwana mobali ya Bani, moko kati na bakitani ya Peretsi, mwana mobali ya Yuda.
猶大兒子法勒斯的子孫中有烏太。烏太是亞米忽的兒子;亞米忽是暗利的兒子;暗利是音利的兒子;音利是巴尼的兒子。
5 Kati na bato ya Shiloni: Asaya, mwana ya liboso, mpe bana na ye ya mibali.
示羅的子孫中有長子亞帥雅和他的眾子。
6 Kati na bakitani ya Zera: Yeuweli. Mpe bandeko na bango bazalaki nkama motoba na tuku libwa.
謝拉的子孫中有耶烏利和他的弟兄,共六百九十人。
7 Kati na bakitani ya Benjame: Salu, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Odavia, mwana mobali ya Asenuwa;
便雅憫人中有哈西努的曾孫、何達威雅的孫子、米書蘭的兒子撒路,
8 Yibinea, mwana mobali ya Yeroami; Ela, mwana mobali ya Uzi mpe koko ya Mikiri; mpe Meshulami, mwana mobali ya Shefatia mpe koko ya Reweli, mwana mobali ya Yibiniya.
又有耶羅罕的兒子伊比尼雅,米基立的孫子、烏西的兒子以拉,伊比尼雅的曾孫、流珥的孫子、示法提雅的兒子米書蘭,
9 Motango ya bato ya Benjame kolanda ndenge bakomamaki na buku ya mabota na bango, ezalaki nkama libwa na tuku mitano na motoba. Bato oyo nyonso bazalaki bakambi ya bituka na bango.
和他們的族弟兄,按着家譜計算共有九百五十六名。這些人都是他們的族長。
10 Kati na Banganga-Nzambe: Yedaeya, Yeoyaribi, Yakini;
祭司中有耶大雅、耶何雅立、雅斤,
11 Azaria, mwana mobali ya Ilikia, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Merayoti, mwana mobali ya Ayitubi oyo azalaki mokambi ya Ndako ya Nzambe.
還有管理上帝殿希勒家的兒子亞薩利雅。希勒家是米書蘭的兒子;米書蘭是撒督的兒子;撒督是米拉約的兒子;米拉約是亞希突的兒子。
12 Ezalaki mpe na Adaya, mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Pashuri, mwana mobali ya Malikiya; mpe Maesayi, mwana mobali ya Adieli, mwana mobali ya Yazera, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Meshilemiti, mwana mobali ya Imeri.
有瑪基雅的曾孫、巴施戶珥的孫子、耶羅罕的兒子亞大雅,又有亞第業的兒子瑪賽;亞第業是雅希細拉的兒子;雅希細拉是米書蘭的兒子;米書蘭是米實利密的兒子;米實利密是音麥的兒子。
13 Banganga-Nzambe oyo bazalaki bakambi ya bituka, bazalaki nkoto moko na nkama sambo na tuku motoba; bazalaki na molende makasi mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe.
他們和眾弟兄都是族長,共有一千七百六十人,是善於做上帝殿使用之工的。
14 Kati na Balevi: Shemaya, mwana mobali ya Ashubi, mwana mobali ya Azirikami, mwana mobali ya Ashabia, mokitani ya Merari;
利未人米拉利的子孫中,有哈沙比雅的曾孫、押利甘的孫子、哈述的兒子示瑪雅。
15 mpe Bakibakari, Ereshi, Galali mpe Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zikiri, mwana mobali ya Azafi;
有拔巴甲、黑勒施、迦拉,並亞薩的曾孫、細基利的孫子、米迦的兒子瑪探雅,
16 Abidiasi, mwana mobali ya Shemaya, mwana mobali ya Galali, mwana mobali ya Yedutuni; Berekia, mwana mobali ya Asa, mwana mobali ya Elikana oyo azalaki kovanda na mboka Netofa.
又有耶杜頓的曾孫、迦拉的孫子、示瑪雅的兒子俄巴底,還有以利加拿的孫子、亞撒的兒子比利家。他們都住在尼陀法人的村莊。
17 Ezalaki mpe na bakengeli bikuke: Shalumi, Akubi, Talimoni, Ayimani mpe bandeko na bango ya mibali. Shalumi nde azalaki mokonzi na bango.
守門的是沙龍、亞谷、達們、亞希幔,和他們的弟兄;沙龍為長。
18 Kino lelo, bakitani ya Shalumi bakengelaka ekuke ya ngambo ya este ya Ndako ya Nzambe, ekuke oyo babengaka ekuke ya Mokonzi. Bango wana nde bakengeli bikuke kati na Balevi.
從前這些人看守朝東的王門,如今是利未營中守門的。
19 Shalumi, mwana mobali ya Kore, mwana mobali ya Ebiazafi, mwana mobali ya Kore elongo na bandeko na bango mosusu ya libota ya Kore, bazalaki na mokumba ya kokengela ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani ndenge bakoko na bango bazalaki kokengela ekuke ya molako ya Yawe.
可拉的曾孫、以比雅撒的孫子、可利的兒子沙龍,和他的族弟兄可拉人都管理使用之工,並守會幕的門。他們的祖宗曾管理耶和華的營盤,又把守營門。
20 Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, azalaki kala mokonzi na bango, bongo Yawe azalaki elongo na ye.
從前以利亞撒的兒子非尼哈管理他們,耶和華也與他同在。
21 Zakari, mwana mobali ya Meshelemia, azalaki mpe mokengeli ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
米施利米雅的兒子撒迦利雅是看守會幕之門的。
22 Bango nyonso oyo baponamaki mpo ete bazala bakengeli bikuke bazalaki nkama mibale na zomi na mibale. Bakomaki bakombo na bango na buku ya mabota kolanda bamboka na bango. Ezali Davidi mpe Samuele oyo azalaki momoni makambo nde batiaki bango na misala na bango.
被選守門的人共有二百一十二名。他們在自己的村莊,按着家譜計算,是大衛和先見撒母耳所派當這緊要職任的。
23 Boye, bango elongo na bana na bango bazalaki na mokumba ya kokengela bikuke ya Tempelo ya Yawe; elingi koloba bikuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
他們和他們的子孫按着班次看守耶和華殿的門,就是會幕的門。
24 Bakengeli bikuke bazalaki na bangambo minei: este, weste, nor mpe sude.
在東西南北,四方都有守門的。
25 Bandeko na bango ya mibali oyo bazalaki na bamboka na bango, basengelaki koyaka tango na tango kosunga bango mikolo sambo.
他們的族弟兄住在村莊,每七日來與他們換班。
26 Kasi bakonzi minei ya bakengeli bikuke bazalaki Balevi oyo bazalaki na mokumba ya kokengela bashambre mpe bomengo ya Ndako ya Nzambe.
這四個門領都是利未人,各有緊要的職任,看守上帝殿的倉庫。
27 Bazalaki kolekisa butu na zingazinga ya Ndako ya Nzambe mpo ete basengelaki kokengela yango mpe kofungola yango tongo nyonso.
他們住在上帝殿的四圍,是因委託他們守殿,要每日早晨開門。
28 Bamoko kati na bango bazalaki na mokumba ya kobatela bisalelo ya losambo mpe kotanga yango tango nyonso bazalaki kokotisa to kobimisa yango.
利未人中有管理使用器皿的,按着數目拿出拿入;
29 Bamosusu kati na bango bazalaki na mokumba ya kobatela bambeki mpe bisalelo nyonso ya Esika ya bule: farine, vino, mafuta, ansa mpe malasi.
又有人管理器具和聖所的器皿,並細麵、酒、油、乳香、香料。
30 Kasi bana mibali ya Banganga-Nzambe bazalaki kosala malasi.
祭司中有人用香料做膏油。
31 Moto moko kati na Balevi, Matitia, mwana mobali ya liboso ya Shalumi, moto ya Kore, azalaki na mokumba ya kotumba mapa na kikalungu.
利未人瑪他提雅是可拉族沙龍的長子,他緊要的職任是管理盤中烤的物。
32 Bamosusu kati na bango, bato ya Keati, bazalaki na mokumba ya kobongisa mapa na milongo mpo na basaba nyonso.
他們族弟兄哥轄子孫中,有管理陳設餅的,每安息日預備擺列。
33 Bayembi oyo bazalaki bakambi ya libota ya Levi, bazalaki tango nyonso kovanda na bashambre ya Ndako ya Nzambe. Bazalaki kosala mosala mosusu te kaka kosala kati na Ndako ya Nzambe butu mpe moyi.
歌唱的有利未人的族長,住在屬殿的房屋,晝夜供職,不做別樣的工。
34 Bango nyonso wana bazalaki bakambi ya libota ya Levi kolanda ndenge bakomamaki na buku ya mabota na bango; mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi.
以上都是利未人著名的族長,住在耶路撒冷。
35 Yeyeli, tata ya Gabaoni, azalaki kovanda na Gabaoni elongo na Maaka, mwasi na ye.
在基遍住的有基遍的父親耶利。他的妻名叫瑪迦;
36 Abidoni azalaki mwana na ye ya liboso; mpe sima, abotaki lisusu Tsuri, Kishi, Bala, Neri, Nadabi,
他長子是亞伯頓。他又生蘇珥、基士、巴力、尼珥、拿答、
37 Gedori, Ayiyo, Zakari mpe Mikiloti.
基多、亞希約、撒迦利雅、米基羅。
38 Mikiloti abotaki Shimeami. Bango mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi elongo na bandeko na bango ya mibali.
米基羅生示米暗。這些人和他們的弟兄在耶路撒冷對面居住。
39 Neri abotaki Kishi; Kishi abotaki Saulo; Saulo abotaki Jonatan, Maliki-Shuwa, Abinadabi mpe Eshibala.
尼珥生基士;基士生掃羅;掃羅生約拿單、麥基舒亞、亞比拿達、伊施‧巴力。
40 Jonatan abotaki mwana mobali, Meriba-Bala. Meriba-Bala abotaki Mishe.
約拿單的兒子是米力‧巴力;米力‧巴力生米迦。
41 Bana mibali ya Mishe: Pitoni, Meleki, Taereya mpe Akazi.
米迦的兒子是毗敦、米勒、他利亞、亞哈斯。
42 Akazi abotaki Yayera; Yayera abotaki Alemeti, Azimaveti mpe Zimiri; Zimiri abotaki Motsa;
亞哈斯生雅拉;雅拉生亞拉篾、亞斯瑪威、心利;心利生摩撒;
43 Motsa abotaki Bineya; Bineya abotaki Refaya; Refaya abotaki Eleasa; Eleasa abotaki Atseli.
摩撒生比尼亞;比尼亞生利法雅;利法雅的兒子是以利亞薩;以利亞薩的兒子是亞悉。
44 Atseli abotaki bana mibali motoba: Azirikami, Bokuru, Isimaeli, Shearia, Abidiasi mpe Anani. Bango nde bazalaki bana mibali ya Atseli.
亞悉有六個兒子,他們的名字是亞斯利干、波基路、以實瑪利、示亞利雅、俄巴底雅、哈難。這都是亞悉的兒子。

< 1 Masolo ya Kala 9 >