< 1 Masolo ya Kala 7 >

1 Isakari abotaki bana mibali minei: Tola, Puwa, Yashubi mpe Shimironi. Bango nyonso bazalaki minei.
Hijos de Isacar: Tolá, Fuá, Jasub y Simrón; cuatro.
2 Bana mibali ya Tola: Uzi, Refaya, Yeriyeli, Yamayi, Yibisami mpe Samuele. Bango nde babotamaki na nzela ya Tola mpe bazalaki bakambi ya mabota ya botata na bango. Kati na mabota na bango, bazalaki basoda ya mpiko nkoto tuku mibale na mibale na nkama motoba, na tango Davidi azalaki mokonzi.
Hijos de Tolá: Ucí, Refaías, Jeriel, Jahmai, Jibsam y Samuel, jefes de las casas paternas de Tola; valientes guerreros (inscriptos) en los registros genealógicos, siendo su número en los días de David veinte y dos mil seiscientos.
3 Bana mibali ya Uzi: Yiziraya. Bana mibali ya Yiziraya: Mikaeli, Abidiasi, Joeli mpe Yishiya. Bango nyonso mitano bazalaki bakambi.
Hijos de Ucí: Israhías. Hijos de Israhías: Micael, Obadías, Joel y Jesías, en total cinco jefes.
4 Kati na molongo na bango kolanda bituka na bango mpe mabota na bango ya botata; ezalaki na basoda ya mpiko nkoto tuku misato na motoba, pamba te bazalaki na basi mpe bana ebele.
Tenían, además, según sus linajes y sus casas paternas, divisiones de tropas de guerra, en número de treinta y seis mil; pues tenían muchas mujeres e hijos,
5 Bandeko mibali nyonso kati na bituka ya libota ya Isakari, oyo bakomamaki na buku ya mabota, bazalaki nkoto tuku mwambe na sambo. Bazalaki basoda ya mpiko.
Sus hermanos de todas las familias de Isacar, valientes guerreros, eran ochenta y siete mil, inscriptos todos ellos en los registros genealógicos.
6 Benjame abotaki bana mibali misato: Bela, Bekeri mpe Yediayeli.
Hijos de Benjamín: Bela, Béquer y Jediael; tres.
7 Bela abotaki bana mibali mitano: Etsiboni, Uzi, Uzieli, Yerimoti mpe Iri. Bazalaki bakambi ya bituka na bango mpe basoda ya mpiko. Motango ya bato oyo batangamaki ezalaki nkoto tuku mibale na mibale na tuku misato na minei.
Hijos de Bela: Esbón, Ucí, Uciel, Jerimor e Irí; cinco jefes de las casas paternas, valientes guerreros, inscriptos en los registros genealógicos en número de veinte y dos mil treinta y cuatro.
8 Bana mibali ya Bekeri: Zemira, Yoashi, Eliezeri, Eliowenayi, Omiri, Yeremoti, Abiya, Anatoti mpe Alemeti. Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Bekeri.
Hijos de Béquer: Semirá, Joás, Eliéser, Elioenai, Amrí, Jeremot, Abías, Anatot y Almat; todos estos hijos de Béquer.
9 Motango ya basoda ya mpiko, kolanda bituka na bango, ezalaki nkoto tuku mibale na nkama mibale.
Su registro genealógico, según sus linajes y jefes de sus casas paternas, abarcaba veinte mil doscientos valientes guerreros.
10 Bakitani ya Yediayeli: Bilani. Bana mibali ya Bilani: Yewushi, Benjame, Ewudi, Kenaana, Zetani, Tarsisi, Ayishaari.
Hijos de Jediael: Bilhán. Hijos de Bilhán: Jeús, Benjamín, Aod, Canaaná, Cetán, Tarsis y Ahisáhar:
11 Kati na molongo ya Yediayeli, bakitani nyonso bazalaki bakambi ya bituka na bango mpe basoda ya mpiko. Motango na bango ezalaki nkoto zomi na sambo na nkama mibale.
todos estos hijos de Jediael (contados) según los jefes de sus casas paternas, valientes guerreros en número de diez y siete mil doscientos, aptos para ir a la guerra.
12 Bana mibali ya Iri: Shupimi mpe Upime. Ushimi azalaki mwana mobali ya Aeri.
Supim y Hupim, hijos de Ir; y los Husim, hijos de Aher.
13 Bana mibali ya Nefitali: Yatseyeli, Guni, Yetseri mpe Shalumi. Bazalaki bakitani ya Bila.
Hijos de Neftalí: Jahaciel, Guní, Géser y Sellum; hijos de Bilhá.
14 Bakitani ya Manase: Asirieli na nzela ya makangu na ye, moto ya Arami. Abotelaki ye lisusu Makiri, tata ya bato ya Galadi.
Hijos de Manasés: Asriel. Su concubina siria dio a luz a Maquir, padre de Galaad.
15 Makiri abalaki Maaka oyo azalaki ndeko mwasi ya Upime mpe Shupimi. Kombo ya mwana mobali mosusu ya Manase ezalaki « Tselofikadi. » Tselofikadi abotaki kaka bana basi.
Maquir tomó mujer de Hupim y Supim. Su hermana se llamaba Maacá. El nombre del segundo era Saliehad, el cual tuvo hijas.
16 Maaka, mwasi ya Makiri, abotelaki ye lisusu mwana mobali oyo apesaki kombo « Peretsi. » Peretsi azalaki na ndeko mobali, Shereshi, oyo abotaki bana mibali oyo: Ulami mpe Rekemi.
Maacá, mujer de Maquir, dio a luz un hijo, y llamó su nombre Peres; el nombre del hermano de este fue Seres, y sus hijos fueron Ulam y Réquem.
17 Ulami abotaki: Bedani oyo azalaki mwana mobali. Bango nde bazalaki bakitani ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase.
Hijos de Ulam: Bedán. Estos son los hijos de Galaad, hijo de Maquir, hijo de Manasés.
18 Amoleketi, ndeko mwasi ya Manase, abotaki Ishodi, Abiezeri mpe Mala.
Su hermana Hamoléquet dio a luz a Ishod, a Abiéser y a Mahlá.
19 Bana mibali ya Shemida: Ayani, Sishemi, Liki mpe Aniami.
Los hijos de Semidá fueron Ahían, Siquem, Liquí y Aniam.
20 Bakitani ya Efrayimi: Efrayimi abotaki Shutela, Shutela abotaki Beredi, Beredi abotaki Taati, Taati abotaki Eleada, Eleada abotaki Taati,
Hijos de Efraím: Sutela; Bered, su hijo; Táhat, su hijo; Eladá, su hijo; Táhat, hijo de él.
21 Taati abotaki Zabadi, mpe Zabadi abotaki Shutela. Bankolo mboka oyo babotamaki na mokili ya Gati, babomaki Ezeri mpe Eleadi, pamba te balukaki kobotola bibwele ya bato ya Gati.
Zabad, su hijo; Sutela, su hijo; Éser y Elad, a quienes mataron los hombres de Gat, naturales del país; porque habían bajado allá para quitarles sus ganados.
22 Tata na bango Efrayimi alelaki bango mikolo ebele, mpe bandeko na ye bayaki kobondisa ye.
Su padre Efraím los lloró muchos días, y sus hermanos vinieron a consolarle.
23 Sima na yango, Efrayimi asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye oyo azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Boye Efrayimi apesaki ye kombo « Beria, » pamba te abotamaki tango pasi ezalaki kati na libota na ye.
Después entró a su mujer, la cual concibió y le dio un hijo, a quien llamó Berías, porque la desgracia estaba en su casa.
24 Efrayimi azalaki lisusu na mwana mwasi, Shera, oyo atongaki Beti-Oroni ya ngomba mpe ya lubwaku, mpe Uzeni-Shera.
Su hija fue Sara, la cual edificó a Bethorón, la de abajo y la de arriba; y también a Ucén-Sara.
25 Beria abotaki Refa, Refa abotaki Retsefi, Retsefi abotaki Tela, Tela abotaki Tayani,
También fueron sus hijos Refa, y Résef, y Tela, su hijo; Tahán, su hijo;
26 Taani abotaki Laedani, Laedani abotaki Amiwudi, Amiwudi abotaki Elishama, Elishama abotaki Nuni,
Ladán, su hijo; Amihud, su hijo; Elisamá, su hijo;
27 Nuni abotaki Jozue.
Nun, su hijo; Josué, su hijo.
28 Bakitani ya Efrayimi bazwaki lokola libula mpe bisika ya kovanda: Beteli mpe bamboka na yango ya mike, na ngambo ya este; Narani, na ngambo ya weste; Gezeri mpe bamboka na yango ya mike; Sishemi mpe bamboka na yango ya mike kino na Aya mpe bamboka na yango ya mike.
Las posesiones de ellos y sus moradas eran: Betel con sus aldeas; al oriente Naarán, y al occidente Guézer con sus villas, y Siquem con sus villas, hasta Gaza y sus aldeas,
29 Bakitani ya Manase bazwaki lokola libula: Beti-Sheani, Taanaki, Megido, Dori mpe bamboka na yango ya mike. Bakitani ya Jozefi, mwana mobali ya Isalaele, bazalaki kovanda na bingumba wana nyonso.
quedando en manos de los hijos de Manasés, Betseán con sus aldeas, Tanac con sus aldeas, Megidó con sus aldeas, Dor con sus aldeas. En estas ciudades habitaron los hijos de José, hijo de Israel.
30 Bana mibali ya Aseri: Yimina, Yishiva, Yishivi mpe Beria. Sera azalaki ndeko na bango ya mwasi.
Hijos de Aser: Imná, Isvá, Isví, Berías, y Sara, hermana de ellos.
31 Bana mibali ya Beria: Eberi mpe Malikieli oyo azalaki tata ya bato ya Biriza.
Hijos de Berías: Héber, y Malquiel, el cual fue padre de Birzavit.
32 Bana mibali ya Eberi: Yafeleti, Shomeri, Otami mpe ndeko na bango ya mwasi Shuwa.
Héber engendró a Jaflet, Somer, Jotam y Suá, hermana de ellos.
33 Bana mibali ya Yafeleti: Pasaki, Bimali mpe Ashivati. Bango nde bazalaki bana mibali ya Yafeleti.
Hijos de Jaflet: Pasac, Bimhal y Asvat. Estos son los hijos de Jaflet.
34 Bana mibali ya Shemeri: Ayi, Roega, Yewuba mpe Arami.
Hijos de Sémer: Ahí, Rohagá, Jehubá y Aram.
35 Bana mibali ya Elemi, ndeko mobali ya Shemeri: Tsofa, Yimina, Sheleshi mpe Amali.
Hijos de Hélem, su hermano: Zofah, Imná, Seles y Amal.
36 Bana mibali Tsofa: Suwa, Arineferi, Shuwali, Beri, Yimira,
Hijos de Zofah: Súah, Harnéfer, Sual, Berí, Imrá,
37 Betseri, Odi, Shama, Shilisha, Yitirani mpe Beera.
Béser, Hod, Sammá, Silsá, Itrán y Beerá.
38 Bana mibali ya Yeteri: Yefune, Pisipa mpe Ara.
Hijos de Jéter: Jefone, Pispa y Ara.
39 Bana mibali ya Ula: Ara, Anieli mpe Ritsiya.
Hijos de Ullá: Arah, Haniel, y Risiá.
40 Bango nyonso bazalaki bakitani ya Aseri: bazalaki bakambi ya mabota na bango, bato ya lokumu, basoda ya mpiko mpe bakambi ya bakambi ya bituka. Motango ya bato nyonso oyo bakomamaki na buku ya mabota mpe bakoki mpo na bitumba, ezalaki nkoto tuku mibale na motoba.
Todos estos eran hijos de Aser, jefes de casas paternas, hombres escogidos, valientes guerreros, jefes de príncipes. En los registros genealógicos estaban ellos inscriptos en número de veinte y seis mil hombres, aptos para el ejército y para la guerra.

< 1 Masolo ya Kala 7 >