< 1 Masolo ya Kala 6 >
1 Bana mibali ya Levi: Gerishoni, Keati mpe Merari.
Synowie Lewiego: Gerson, Kaat, i Merary.
2 Bana mibali ya Keati: Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
A synowie Kaatowi: Amram, Izaar, i Hebron, i Husyjel.
3 Bana ya Amirami: Aron, Moyize mpe Miriami. Bana mibali ya Aron: Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
A synowie Amramowi: Aaron, i Mojżesz, i córka Maryja; a synowie Aaronowi: Nadab, i Abiju, Eleazar, i Itamar.
4 Eleazari abotaki Pineasi; Pineasi abotaki Abishuwa;
Eleazer spłodził Fineesa; Finees spłodził Abisua.
5 Abishuwa abotaki Buki; Buki abotaki Uzi;
Abissue spłodził Bokki, a Bokki spłodził Uzy.
6 Uzi abotaki Zerakia; Zerakia abotaki Merayoti;
A Uzy spłodził Zerachyjasza, a Zerachyjasz spłodził Merajota.
7 Merayoti abotaki Amaria; Amaria abotaki Ayitubi;
Merajot spłodził Amaryjasza, a Amaryjasz spłodził Achytoba.
8 Ayitubi abotaki Tsadoki; Tsadoki abotaki Ayimaatsi;
A Achytob spłodził Sadoka, a Sadok spłodził Achymaasa.
9 Ayimaatsi abotaki Azaria; Azaria abotaki Yoanani;
Achymaas spłodził Azaryjasza, a Azaryjasz spłodzi× Johanana.
10 Yoanani abotaki Azaria oyo azalaki Nganga-Nzambe kati na Tempelo oyo Salomo atongaki na Yelusalemi.
A Johanan spłodził Azaryjasz; tenci jest, który kapłański urząd sprawował w domu, który zbudował Salomon w Jeruzalemie.
11 Azaria abotaki Amaria; Amaria abotaki Ayitubi;
Spłodził też Azaryjasz Amaryjasza, a Amaryjasz spłodził Achytoba.
12 Ayitubi abotaki Tsadoki, mpe Tsadoki abotaki Shalumi;
A Achytob spłodził Sadoka, a Sadok spłodził Salluma.
13 Shalumi abotaki Ilikia; Ilikia abotaki Azaria;
A Sallum spłodził Helkijasza, a Helkijasz spłodził Azaryjasza.
14 Azaria abotaki Seraya; Seraya abotaki Yeotsadaki.
A Azaryjasz spłodził Sarajasza, a Sarajasz spłodził Jozedeka.
15 Yeotsadaki akendeki na bowumbu tango Yawe akabaki Yelusalemi mpe Yuda na maboko ya Nabukodonozori.
Ale Jozedek poszedł w niewolę, gdy Pan przeniósł Judę i Jeruzalem przez Nabuchodonozora.
16 Bana mibali ya Levi: Gerishoni, Keati mpe Merari.
Synowie Lewi: Gierson, Kaat, i Merary.
17 Bana mibali ya Gerishoni: Libini mpe Shimei.
A teć są imiona synów Giersonowych: Lobni i Semei.
18 Bana mibali ya Keati: Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
A synowie Kaatowi: Amram i Izaar, i Hebron, i Husyjel.
19 Bana mibali ya Merari: Maali mpe Mushi. Tala bakitani ya Levi kolanda batata na bango:
Synowie Merarego: Macheli, i Muzy. A teć są domy Lewitów według ojców ich.
20 Mpo na Gerishoni: Gerishoni abotaki Libini; Libini abotaki Yaati; Yaati abotaki Zima;
Giersonowi: Lobni syn jego, Jachat syn jego, Zamma syn jego;
21 Zima abotaki Yoa; Yoa abotaki Ido; Ido abotaki Zera; Zera abotaki Yeatirayi.
Joach syn jego, Iddo syn jego, Zara syn jego, Jetraj syn jego.
22 Mpo na Keati: Keati abotaki Aminadabi; Aminadabi abotaki Kore; Kore abotaki Asiri;
Synowie Kaatowi: Aminadab syn jego, Kore syn jego, Aser syn jego.
23 Asiri abotaki Elikana; Elikana abotaki Ebiazafi; Ebiazafi abotaki Asiri;
Elkana syn jego, i Abiazaf syn jego, i Assyr syn jego;
24 Asiri abotaki Taati; Taati abotaki Urieli; Urieli abotaki Uzia; Uzia abotaki Saulo.
Tachat syn jego, Uryjel syn jego, Ozyjasz syn jego, i Saul syn jego.
25 Bana mibali ya Elikana: Amasayi, Ayimoti.
A synowie Elkamowi: Amasaj i Achymot.
26 Elikana abotaki Tsofayi; Tsofayi abotaki Naati;
Elkana. Synowie Elkanowi: Sofaj syn jego, i Nahat syn jego;
27 Naati abotaki Eliabi; Eliabi abotaki Yeroami; Yeroami abotaki Elikana, mpe Elikana abotaki Samuele.
Elijab syn jego, Jerobam syn jego, Elkana syn jego.
28 Bana mibali ya Samuele: Joeli, mwana ya liboso; mpe Abiya, mwana ya mibale.
A synowie Samuelowi: Pierworodny Wassni i Abijas.
29 Bakitani ya Merari kolanda batata na bango: Merari abotaki Maali; Maali abotaki Libini; Libini abotaki Shimei; Shimei abotaki Uza;
Synowie Merarego: Mahali; Lobni syn jego, Symej syn jego, Uza syn jego;
30 Uza abotaki Shimea; Shimea abotaki Agiya; Agiya abotaki Asaya.
Symha syn jego, Haggijasz syn jego, Asajasz syn jego.
31 Tala Balevi oyo Davidi apesaki mokumba ya kotambolisa banzembo kati na Tempelo ya Yawe, wuta tango Sanduku ya Yawe ezwaki kuna esika ya bopemi.
Ci są, których postanowił do śpiewania w domu Pańskim, gdy tam postawiono skrzynię.
32 Balevi oyo basalaki mosala na bango na nzela ya banzembo liboso ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, kino tango Salomo atongaki Tempelo ya Yawe na Yelusalemi, kolanda mibeko oyo bapesaki bango.
I służyli przed przybytkiem namiotu zgromadzenia, śpiewając, aż zbudował Salomon dom Pański w Jeruzalemie, i stali według porządku swego na służbie swojej.
33 Tala bato oyo bazalaki kosala mosala yango, elongo na bana na bango ya mibali: Kati na bana mibali ya Keati: Moyembi Emani, mwana mobali ya Joeli, mwana mobali ya Samuele,
A cić są, którzy stali i synowie ich z synów Kaatowych: Heman śpiewak syn Joela, syna Samuelowego,
34 mwana mobali ya Elikana, mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Elieli, mwana mobali ya Towa,
Syna Elkanowego, syna Jerohamowego, syna Elijelowego, syna Tohu,
35 mwana mobali ya Tsufi, mwana mobali ya Elikana, mwana mobali ya Maalati, mwana mobali ya Amasayi,
Syna Sufowego, syna Elkanowego, syna Machatowego, syna Amasajowego,
36 mwana mobali ya Elikana, mwana mobali ya Joeli, mwana mobali ya Azaria, mwana mobali ya Sofoni,
Syna Elkanowego, syna Joelowego, syna Azaryjaszowego, syna Sofonijaszowego,
37 mwana mobali ya Taati, mwana mobali ya Asiri, mwana mobali ya Ebiazafi, mwana mobali ya Kore,
Syna Tachatowego, syna Assyrowego, syna Abijasowego,
38 mwana mobali ya Yitseari, mwana mobali ya Keati, mwana mobali ya Levi, mwana mobali ya Isalaele.
Syna Korego, syna Isarowego, syna Kaatowego, syna Lewiego, syna Izraelowego.
39 Na ngambo ya loboko ya mobali ya Emani, Azafi nde azalaki kotelema wana mpe azalaki libota moko na Emani. Azafi, mwana mobali ya Berekia, mwana mobali ya Shimea,
A brat jego Asaf, który stawał po prawicy jego. Asaf, syn Barachyjaszowy, syna Samaowego,
40 mwana mobali ya Mikaeli, mwana mobali ya Baaseya, mwana mobali ya Malikiya,
Syna Michaelowego, syna Basejaszowego, syna Malchyjaszowego,
41 mwana mobali ya Etini, mwana mobali ya Zera, mwana mobali ya Adaya,
Syna Etny, syna Zerachowego, syna Adajowego,
42 mwana mobali ya Etani, mwana mobali ya Zima, mwana mobali ya Shimei,
Syna Etanowgo, syna Symmowego,
43 mwana mobali ya Yaati, mwana mobali ya Gerishoni, mwana mobali ya Levi.
Syna Semejowego, syna Jachatowego, syna Giersonowego, syna Lewiego.
44 Na ngambo ya loboko ya mwasi, bandeko na bango, bana mibali ya Merari nde bazalaki kotelema wana na bokambami ya Etani, mwana mobali ya Kishi, mwana mobali ya Abidi, mwana mobali ya Maluki,
A synowie Merarego i bracia ich stawali po lewej stronie: Etan, syn Kuzego, syna Abdego, syna Malluchowego,
45 mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Amatsia, mwana mobali ya Ilikia,
Syna Hasabijaszowego, syna Amazyjaszowego, syna Helkijaszowego.
46 mwana mobali Amitsi, mwana mobali ya Bani, mwana mobali ya Shemeri,
Syna Amsego, syna Banego, syna Semmerowego,
47 mwana mobali ya Maali, mwana mobali ya Mushi, mwana mobali ya Merari, mwana mobali ya Levi.
Syna Moholi, syna Musego, syna Merarego, syna Lewiego.
48 Bandeko na bango ya mibali, bana mosusu ya Levi, baponamaki mpo na kosala misala mosusu liboso ya Mongombo, kati na Esika ya bule ya Nzambe.
A bracia ich Lewitowie postawieni są ku wszelakiej posłudze przybytku domu Bożego.
49 Kasi Aron mpe bana na ye ya mibali bapesamelaki mokumba ya kotumba mbeka na likolo ya etumbelo ya nyama mpe etumbelo ya malasi. Bazalaki kosala misala nyonso oyo etali Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe mosala ya bolimbisi masumu ya Isalaele kolanda mitindo nyonso oyo Moyize, mosali na Nzambe, apesaki.
Ale Aaron i synowie jego palili na ołtarzu całopalenia, i na ołtarzu kadzenia przy każdej posłudze świątyni świętych, i ku oczyszczaniu Izraela podług wszystkiego, jako był przykazał Mojżesz, sługa Boży.
50 Tala bakitani ya Aron: Aron abotaki Eleazari, Eleazari abotaki Pineasi, Pineasi abotaki Abishuwa,
A ci są synowie Aaronowi: Eleazar syn jego, Finees syn jego,
51 Abishuwa abotaki Buki, Buki abotaki Uzi, Uzi abotaki Zerakia,
Abisua syn jego, Bokki syn jego, Uzy syn jego, Zerachyjasz syn jego,
52 Zerakia abotaki Merayoti, Merayoti abotaki Amaria, Amaria abotaki Ayitubi,
Merajot syn jego, Amaryjasz syn jego, Achytob syn jego,
53 Ayitubi abotaki Tsadoki, mpe Tsadoki abotaki Ayimaatsi.
Sadok syn jego, Achymaas syn jego.
54 Tala bamboka oyo epesamaki na libota ya Aron kati na etuka ya Keati kolanda bandelo ya mabele na bango; pamba te bato ya Keati nde bazalaki bato ya liboso ya kozwa libula ya mabele na nzela ya Zeke:
A te są mieszkania ich, według pałaców ich w granicy ich, to jest, synów Aaronowych według rodzaju Kaatytów: bo to był ich los.
55 engumba ya Ebron, kati na mokili ya Yuda, elongo na bamboka na yango ya zingazinga.
Przetoż dali im Hebron w ziemi Judzkiej, i przedmieścia jego około niego;
56 Kasi bilanga mpe bamboka oyo ezingelaki engumba, epesamaki na Kalebi, mwana mobali ya Yefune.
Ale pole miejskie i wsi ich dali Kalebowi, synowie Jefunowemu.
57 Boye tala bingumba oyo bapesaki na bana mibali ya Aron lokola bingumba ya kokimela: Ebron mpe bamboka na yango ya mike, Libina mpe bamboka na yango ya mike; Yatiri, Eshitemoa mpe bamboka na yango ya mike;
Synom zaś Aaronowym dali z miast Judzkich miasta ucieczki Hebron, i Lobne i przedmieścia jego, i Jeter, i Estemoa, i z przedmieściami jego;
58 Ileni mpe bamboka na yango ya mike; Debiri mpe bamboka na yango ya mike;
I Holon i przedmieścia jego, i Dabir i przedmieścia jego;
59 Ashani mpe bamboka na yango ya mike, Beti-Shemeshi mpe bamboka na yango ya mike.
I Asan i przedmieścia jego, i Betsemes i przedmieścia jego.
60 Kati na etuka ya Benjame, bapesaki bango lokola bingumba ya kokimela: Geba mpe bamboka na yango ya mike, Alemeti mpe Anatoti elongo na bamboka na yango ya mike. Bingumba nyonso oyo epesamelaki kati na bituka na bango ezalaki zomi na misato.
A z pokolenia Benjaminowego: Gabae i przedmieścia jego, i Almat i przedmieścia jego, i Anatot i przedmieścia jego. Wszystkich miast ich trzynaście miast według domów ich.
61 Bana mosusu ya Keati bazwaki na nzela ya zeke bingumba zomi kati na etuka ya Efrayimi, ya Dani mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
A synom Kaatowym, pozostałym z rodzaju tegoż pokolenia, dostało się w połowie pokolenia Manasesowego losem miast dziesięć.
62 Bana ya Gerishoni, kolanda etuka na bango, bazwaki bingumba zomi na misato kati na libota ya Isakari, ya Aseri, ya Nefitali mpe kati na libota ya Manase oyo ezalaki na Bashani.
A synom Giersonowym według domów ich dostało się w pokoleniu Isascharowem, i w pokoleniu Aserowem, i w pokoleniu Neftalimowem, i w pokoleniu Manasesowem w Bazan miast trzynaście.
63 Bana ya Merari, kolanda bituka na bango, bazwaki na nzela ya zeke, bingumba zomi na mibale kati na libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Zabuloni.
Synom Merarego według domów ich dostało się w pokoleniu Rubenowem, i w pokoleniu Gadowem, i w pokoleniu Zabulonowem losem miast dwanaście.
64 Boye bana ya Isalaele bapesaki epai ya bana ya Levi, bingumba wana mpe bamboka na yango ya mike.
Dali też synowie Izraelscy Lewitom miasta i przedmieścia ich;
65 Bapesaki bango bingumba wana na nzela ya zeke: balongolaki ndambo ya bingumba yango kati na mabota ya Yuda, ya Simeoni mpe ya Benjame; bongo bakomaki kobenga yango na bakombo ya mabota wana.
A dali je losem w pokoleniu synów Judowych, i w pokoleniu synów Symeonowych, i w pokoleniu synów Benjaminowych, miasta te, które nazwali imiony swemi.
66 Bituka mosusu ya bana ya Keati bazwaki bingumba ya kokimela kati na libota ya Efrayimi.
A tym, którzy byli z rodu synów Kaatowych, (a były miasta i granice ich w pokoleniu Efraim.)
67 Bapesaki bango lokola engumba ya kokimela: Sishemi mpe bamboka na yango ya mike, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, Gezeri mpe bamboka na yango ya mike,
Tym dali z miast ucieczki Sychem i przedmieścia jego na górze Efraim, i Gazer i przedmieścia jego.
68 Yokimeami mpe bamboka na yango ya mike, Beti-Oroni mpe bamboka na yango ya mike,
I Jekmaan i przedmieścia jego, i Betoron i przedmieścia jego;
69 Ayaloni mpe bamboka na yango ya mike, Gati-Rimoni mpe bamboka na yango ya mike.
I Ajalon i przedmieścia jego, i Gatrymon i przedmieścia jego.
70 Mpe kati na etuka ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki: Aneri mpe bamboka na yango ya mike, Bileami mpe bamboka na yango ya mike. Bingumba nyonso oyo elongo na bamboka na yango ya mike epesamaki epai ya bituka mosusu ya bana ya Keati.
A w połowie pokolenia Manasesowego: Aner i przedmieścia jego, Balam i przedmieścia jego. To dali rodzajowi pozostałemu synów Kaatowych.
71 Bakitani ya Gerishoni bazwaki: Kati na etuka ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki bingumba oyo: Golani kati na Bashani mpe bamboka na yango ya mike, Ashitaroti mpe bamboka na yango ya mike.
Synom też Giersonowym z rodu połowy pokolenia Manasesowego dali Golan w Bazan i przedmieścia jego, i Astarot i przedmieścia jego;
72 Kati na libota ya Isakari, bazwaki: Kedeshi mpe bamboka na yango ya mike, Dabirati mpe bamboka na yango ya mike,
A w pokoleniu Isascharowem Kades i przedmieścia jego, Daberet i przedmieścia jego.
73 Ramoti mpe bamboka na yango ya mike, Anemi mpe bamboka na yango ya mike.
I Ramot i przedmieścia jego, i Anam i przedmieścia jego.
74 Kati na libota ya Aseri, bazwaki: Mashali mpe bamboka na yango ya mike, Abidoni mpe bamboka na yango ya mike,
A w pokoleniu Aserowem Masal i przedmieścia jego, i Abdon i przedmieścia jego,
75 Ukoki mpe bamboka na yango ya mike, Reobi mpe bamboka na yango ya mike.
I Hukok i przedmiescia jego, i Rohob i przedmieścia jego.
76 Kati na libota ya Nefitali, bazwaki: Kedeshi kati na Galile mpe bamboka na yango ya mike, Amoni mpe bamboka na yango ya mike, Kiriatayimi mpe bamboka na yango ya mike.
A w pokoleniu Neftalimowem: Kades w Galilei, i przedmieścia jego, i Hammon i przedmieścia jego, i Kiryjataim i przedmieścia jego.
77 Bana mosusu ya Merari bazwaki bingumba oyo: kati na libota ya Zabuloni: Rimono mpe bamboka na yango ya mike, Tabori mpe bamboka na yango ya mike.
Synom Merarego, pozostałym z pokolenia Zabulon, dane są Remmon i przedmieścia jego, Tabor i przedmieścia jego.
78 Kati na libota ya Ribeni, kuna na ngambo ya este ya Yordani, pembeni ya Jeriko, bazwaki bingumba oyo: Betseri, kati na esobe, mpe bamboka na yango ya mike; Yakatsi mpe bamboka na yango ya mike,
A za Jordanem u Jerycha na wschód słońca od Jordanu, dane są w pokoleniu Rubenowem: Besor na puszczy, i przedmieścia jego, i Jahasa i przedmieścia jego.
79 Kedemoshi mpe bamboka na yango ya mike, Mefati mpe bamboka na yango ya mike.
I Kiedemot i przedmieścia jego, i Mefaat i przedmieścia jego.
80 Kati na libota ya Gadi, bazwaki: Ramoti kati na Galadi mpe bamboka na yango ya mike, Maanayimi mpe bamboka na yango ya mike,
A w pokoleniu Gadowem Ramot w Galaad i przedmieścia jego; i Mahanaim i przedmieścia jego.
81 Eshiboni mpe bamboka na yango ya mike, Yaezeri mpe bamboka na yango ya mike.
Hesebon i przedmieścia jego, i Jazer i przedmieścia jego.