< 1 Masolo ya Kala 4 >

1 Libota ya Yuda: Peretsi, Etsironi, Karimi, Wuri mpe Shobali.
בני יהודה פרץ חצרון וכרמי וחור ושובל׃
2 Reaya, mwana mobali ya Shobali, azalaki tata ya Yaati, mpe Yaati azalaki tata ya Awumayi mpe ya Laadi. Bango nde bazalaki bakoko ya bituka ya bato ya Tsorea.
וראיה בן שובל הוליד את יחת ויחת הליד את אחומי ואת להד אלה משפחות הצרעתי׃
3 Tala bana mibali ya Etami: Jizireyeli, Yishima mpe Yidibashi. Kombo ya ndeko na bango ya mwasi ezalaki Atseleliponi.
ואלה אבי עיטם יזרעאל וישמא וידבש ושם אחותם הצללפוני׃
4 Penueli azalaki tata ya Gedori, mpe Ezeri azalaki tata ya Usha. Bango nde bazalaki bakitani ya Wuri, mwana liboso ya Efrata, tata ya Beteleemi.
ופנואל אבי גדר ועזר אבי חושה אלה בני חור בכור אפרתה אבי בית לחם׃
5 Ashiwuri, tata ya Tekoa, azalaki na basi mibale: Eleya mpe Nara.
ולאשחור אבי תקוע היו שתי נשים חלאה ונערה׃
6 Nara abotelaki ye bana mibali oyo: Awuzami, Eferi, Temeni mpe Ahashitari.
ותלד לו נערה את אחזם ואת חפר ואת תימני ואת האחשתרי אלה בני נערה׃
7 Eleya abotelaki ye bana mibali oyo: Tsereti, Tsoari mpe Etinani.
ובני חלאה צרת יצחר ואתנן׃
8 Kotsi azalaki tata ya Anubi mpe Atsobeba, mpe koko ya mabota ya Aareyeli, mwana mobali ya Arumi.
וקוץ הוליד את ענוב ואת הצבבה ומשפחות אחרחל בן הרום׃
9 Yaebetsi azalaki na lokumu mingi koleka bandeko na ye ya mibali. Mama na ye apesaki ye kombo « Yaebetsi » mpo na koloba: « Nabotaki yo na pasi. »
ויהי יעבץ נכבד מאחיו ואמו קראה שמו יעבץ לאמר כי ילדתי בעצב׃
10 Yaebetsi abelelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele; alobaki: « Oh Yawe! Soki okoki kopambola ngai mpe koyeisa mabele na ngai monene! Tika ete loboko na Yo ezala likolo na ngai! Bomba ngai mosika ya mabe mpo ete namona pasi te. » Mpe Nzambe ayanolaki libondeli na ye.
ויקרא יעבץ לאלהי ישראל לאמר אם ברך תברכני והרבית את גבולי והיתה ידך עמי ועשית מרעה לבלתי עצבי ויבא אלהים את אשר שאל׃
11 Kelubi, ndeko mobali ya Shuwa, azalaki tata ya Meyiri oyo azalaki tata ya Eshitoni.
וכלוב אחי שוחה הוליד את מחיר הוא אבי אשתון׃
12 Eshitoni azalaki tata ya Beti-Rafa, Paseya mpe Teyina oyo atongaki engumba Naashi. Bango nde bazalaki kovanda na engumba Reka.
ואשתון הוליד את בית רפא ואת פסח ואת תחנה אבי עיר נחש אלה אנשי רכה׃
13 Bana mibali ya Kenazi: Otinieli mpe Seraya. Bana mibali ya Otinieli: Atati mpe Meonotayi.
ובני קנז עתניאל ושריה ובני עתניאל חתת׃
14 Meonotayi abotaki Ofira. Seraya abotaki Joabi, tata ya Ge-Arashimi. Bazalaki kobenga ye bongo, pamba te bato na ye bazalaki kosala misala ya maboko, ya kotula bibende na moto.
ומעונתי הוליד את עפרה ושריה הוליד את יואב אבי גיא חרשים כי חרשים היו׃
15 Bana mibali ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune: Iru, Ela mpe Naame. Mwana mobali ya Ela: Kenazi.
ובני כלב בן יפנה עירו אלה ונעם ובני אלה וקנז׃
16 Mwana mobali ya Yealeyeli: Zifi, Zifa, Tiria mpe Asareli.
ובני יהללאל זיף וזיפה תיריא ואשראל׃
17 Bana mibali ya Esidrasi: Yeteri, Meredi, Eferi mpe Yaloni. Moko kati na basi ya Meredi abotaki Miriami, Shamayi mpe Yishiba, tata ya Eshitemoa.
ובן עזרה יתר ומרד ועפר וילון ותהר את מרים ואת שמי ואת ישבח אבי אשתמע׃
18 Mwasi na ye, moto ya Yuda, abotaki Yeredi, tata ya Gedori; Eberi, tata ya Soko mpe Yekutieli, tata ya Zanoa. Bango nde bazalaki bana mibali ya Bitiya, mwana mwasi ya Faraon, oyo Meredi abalaki.
ואשתו היהדיה ילדה את ירד אבי גדור ואת חבר אבי שוכו ואת יקותיאל אבי זנוח ואלה בני בתיה בת פרעה אשר לקח מרד׃
19 Bana mibali ya mwasi ya Odia, ndeko mwasi ya Naami: tata ya Keila, moto ya Garima; mpe Eshitemoa, moto ya mboka Maakati.
ובני אשת הודיה אחות נחם אבי קעילה הגרמי ואשתמע המעכתי׃
20 Bana mibali ya Simona: Aminoni, Rina, Beni-Anani mpe Tiloni. Bana mibali ya Yisheyi: Zoeti mpe Beni-Zoeti.
ובני שימון אמנון ורנה בן חנן ותולון ובני ישעי זוחת ובן זוחת׃
21 Bana mibali ya Shela, mwana mobali ya Yuda: Eri, tata ya Leka; Laeda, tata ya Maresha; mpe mabota ya basali bilamba ya lino, na Beti-Asheba.
בני שלה בן יהודה ער אבי לכה ולעדה אבי מרשה ומשפחות בית עבדת הבץ לבית אשבע׃
22 Yokimi, bato ya Kozeba, Joasi mpe Sarafi oyo bazalaki bakambi kati na Moabi mpe engumba Yashubi-Leemi. Nyonso oyo ezali makambo ya kala.
ויוקים ואנשי כזבא ויואש ושרף אשר בעלו למואב וישבי לחם והדברים עתיקים׃
23 Bazalaki basali mbeki oyo bazalaki kovanda na Netayimi mpe na Gedera; batikalaki kuna mpo na kosalela mokonzi.
המה היוצרים וישבי נטעים וגדרה עם המלך במלאכתו ישבו שם׃
24 Bana mibali ya Simeoni: Nemueli, Yamini, Yaribi, Zera; Saulo, tata ya Shalumi;
בני שמעון נמואל וימין יריב זרח שאול׃
25 Shalumi, tata ya Mibisami; Mibisami, tata ya Mishima.
שלם בנו מבשם בנו משמע בנו׃
26 Bana mibali ya Mishima: Amueli, Zakuri mpe Shimei.
ובני משמע חמואל בנו זכור בנו שמעי בנו׃
27 Shimei azalaki na bana mibali zomi na motoba mpe bana basi motoba; kasi bandeko na ye ya mibali babotaki bana mingi te, yango wana etuka na bango ezalaki na bato ebele te lokola libota ya Yuda.
ולשמעי בנים ששה עשר ובנות שש ולאחיו אין בנים רבים וכל משפחתם לא הרבו עד בני יהודה׃
28 Bazalaki kovanda na Beri-Sheba, na Molada, na Atsari-Shuwali,
וישבו בבאר שבע ומולדה וחצר שועל׃
29 na Bila, na Etsemi, na Toladi,
ובבלהה ובעצם ובתולד׃
30 na Betweli, na Orima, na Tsikilagi,
ובבתואל ובחרמה ובציקלג׃
31 na Beti-Marikaboti, na Atsari-Suzimi, na Beti-Birei mpe na Shaarayimi: nyonso oyo ezalaki bingumba na bango kino na tango ya bokonzi ya Davidi.
ובבית מרכבות ובחצר סוסים ובבית בראי ובשערים אלה עריהם עד מלך דויד׃
32 Tala bingumba mitano mike oyo ezalaki zingazinga na yango: Etami, Ayini, Rimoni, Tokeni mpe Ashani;
וחצריהם עיטם ועין רמון ותכן ועשן ערים חמש׃
33 bakisa bamboka mike mosusu oyo ezingelaki bingumba yango kino na Baalati. Oyo nde ezalaki bisika na bango ya kovanda mpe molongo ya mbotama ya bakoko na bango.
וכל חצריהם אשר סביבות הערים האלה עד בעל זאת מושבתם והתיחשם להם׃
34 Meshobabi; Yamileki; Yosha, mwana mobali ya Amatsia;
ומשובב וימלך ויושה בן אמציה׃
35 Joeli; Jewu, mwana mobali ya Yoshibia, mwana mobali ya Seraya, mwana mobali ya Asieli;
ויואל ויהוא בן יושביה בן שריה בן עשיאל׃
36 Eliowenayi; Yakoba; Yeshoaya; Asaya; Adieli; Yesimieli; Benaya;
ואליועיני ויעקבה וישוחיה ועשיה ועדיאל וישימאל ובניה׃
37 Ziza, mwana mobali ya Shifeyi, mwana mobali ya Aloni, mwana mobali ya Yedaya, mwana mobali ya Shimiri, mwana mobali ya Shemaya.
וזיזא בן שפעי בן אלון בן ידיה בן שמרי בן שמעיה׃
38 Bato oyo batangamaki na bakombo bazalaki bakambi ya bituka na bango. Mabota na bango ekomaki minene
אלה הבאים בשמות נשיאים במשפחותם ובית אבותיהם פרצו לרוב׃
39 mpe bakendeki na zingazinga ya Gedori, na ngambo ya este ya lubwaku, mpo na koluka matiti ya koleisa bibwele na bango.
וילכו למבוא גדר עד למזרח הגיא לבקש מרעה לצאנם׃
40 Bakutaki kuna: matiti kitoko mpo na koleisa bibwele, mokili moko ya monene, ya kimia mpe ezanga mobulu. Bato oyo bazalaki kovanda kuna na tango ya kala, bazalaki bakitani ya Cham.
וימצאו מרעה שמן וטוב והארץ רחבת ידים ושקטת ושלוה כי מן חם הישבים שם לפנים׃
41 Na tango Ezekiasi azalaki mokonzi ya Yuda, bato oyo bakombo na bango ekomami, bakomaki na mokili yango. Babundisaki bakitani ya Cham mpe babebisaki bandako na bango; mpe lisusu, basilisaki koboma bato ya Mewuni oyo bazalaki kovanda kuna, ndenge yango ezali komonana lelo. Na sima, bavandaki na bisika na bango, mpo ete mokili yango ezalaki na matiti mpo na koleisa bibwele na bango.
ויבאו אלה הכתובים בשמות בימי יחזקיהו מלך יהודה ויכו את אהליהם ואת המעינים אשר נמצאו שמה ויחרימם עד היום הזה וישבו תחתיהם כי מרעה לצאנם שם׃
42 Bato ya Simeoni nkama mitano oyo bakambamaki na Pelatia, na Nearia, na Refaya mpe na Uzieli, bana mibali ya Yisheyi, babotolaki na makasi mokili ya bangomba Seiri,
ומהם מן בני שמעון הלכו להר שעיר אנשים חמש מאות ופלטיה ונעריה ורפיה ועזיאל בני ישעי בראשם׃
43 babomaki ndambo ya bato ya Amaleki oyo batikalaki mpe bavandaki kuna kino lelo.
ויכו את שארית הפלטה לעמלק וישבו שם עד היום הזה׃

< 1 Masolo ya Kala 4 >