< 1 Masolo ya Kala 3 >

1 Tala bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron: Mwana ya liboso ezalaki Aminoni, mwana mobali ya Ayinoami, moto ya Jizireyeli; ya mibale, Daniele, mwana mobali ya Abigayili, moto ya Karimeli;
These were the sons of David who were born to him in Hebron: The firstborn was Amnon by Ahinoam of Jezreel; the second was Daniel by Abigail of Carmel;
2 ya misato, Abisalomi, mwana mobali ya Maaka, mwana mwasi ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri; ya minei, Adoniya, mwana mobali ya Agite;
the third was Absalom the son of Maacah daughter of King Talmai of Geshur; the fourth was Adonijah the son of Haggith;
3 ya mitano, Shefatia, mwana mobali ya Abitali; mpe ya motoba, Yitileami oyo Egila, mwasi na ye, abotaki.
the fifth was Shephatiah by Abital; and the sixth was Ithream by his wife Eglah.
4 Bango nyonso motoba bazalaki bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron, mboka mokonzi, epai wapi akonzaki mibu sambo na ndambo. Davidi akonzaki wuta na Yelusalemi mibu tuku misato na misato.
These six sons were born to David in Hebron, where he reigned seven years and six months. And David reigned in Jerusalem thirty-three years,
5 Tala bakombo ya bana na ye ya mibali oyo babotamaki na Yelusalemi: Shimea, Shobabi, Natan mpe Salomo. Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Amieli, nde abotaki bana mibali minei oyo.
and these sons were born to him in Jerusalem: Shimea, Shobab, Nathan, and Solomon. These four were born to him by Bathsheba daughter of Ammiel.
6 Babotelaki ye lisusu bana oyo: Yibari, Elishama, Elifeleti,
David’s other sons were Ibhar, Elishua, Eliphelet,
7 Noga, Nefegi, Yafia,
Nogah, Nepheg, Japhia,
8 Elishama, Eliyada mpe Elifeleti. Bango nyonso bazalaki libwa.
Elishama, Eliada, and Eliphelet—nine in all.
9 Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Davidi, longola bana mibali oyo bamakangu na ye babotelaki ye. Mpe Tamari azalaki ndeko na bango ya mwasi.
These were all the sons of David, besides the sons by his concubines. And Tamar was their sister.
10 Salomo azalaki tata ya Roboami, Roboami azalaki tata ya Abiya, Abiya azalaki tata ya Asa, Asa azalaki tata ya Jozafati,
Solomon’s son was Rehoboam: Abijah was his son, Asa his son, Jehoshaphat his son,
11 Jozafati azalaki tata ya Yorami, Yorami azalaki tata ya Akazia, Akazia azalaki tata ya Joasi,
Joram his son, Ahaziah his son, Joash his son,
12 Joasi azalaki tata ya Amatsia, Amatsia azalaki tata ya Azaria, Azaria azalaki tata ya Yotami,
Amaziah his son, Azariah his son, Jotham his son,
13 Yotami azalaki tata ya Akazi, Akazi azalaki tata ya Ezekiasi, Ezekiasi azalaki tata ya Manase,
Ahaz his son, Hezekiah his son, Manasseh his son,
14 Manase azalaki tata ya Amoni, Amoni azalaki tata ya Joziasi,
Amon his son, and Josiah his son.
15 Joziasi azalaki tata ya bana mibali oyo: Yoanani, mwana na ye ya liboso; Yeoyakimi, ya mibale; Sedesiasi, ya misato; Shalumi, ya minei.
The sons of Josiah: Johanan was the firstborn, Jehoiakim the second, Zedekiah the third, and Shallum the fourth.
16 Bana mibali ya Yeoyakimi: Yekonia mpe Sedesiasi.
The successors of Jehoiakim: Jeconiah his son, and Zedekiah.
17 Libota ya Yekonia, mokangami: Shealitieli, mwana na ye ya mobali;
The descendants of Jeconiah the captive: Shealtiel his son,
18 Malikirami, Pedaya, Shenatsari, Yekamia, Oshama mpe Nedabia.
Malchiram, Pedaiah, Shenazzar, Jekamiah, Hoshama, and Nedabiah.
19 Bana mibali ya Pedaya: Zorobabeli mpe Shimei. Bana mibali ya Zorobabeli: Meshulami mpe Anania. Shelomiti azalaki ndeko na bango ya mwasi.
The sons of Pedaiah: Zerubbabel and Shimei. The children of Zerubbabel: Meshullam and Hananiah, their sister Shelomith,
20 Bana mibali ya Meshulami: Ashuba, Oeli, Berekia, Asadia, Yoshabi-Esedi. Bango nyonso bazalaki mitano.
and five others: Hashubah, Ohel, Berechiah, Hasadiah, and Jushab-hesed.
21 Bakitani ya Anania: Pelatia mpe Ezayi elongo na bana mibali ya Refaya, ya Arinani, ya Abidiasi mpe ya Shekania.
The descendants of Hananiah: Pelatiah, Jeshaiah, and the sons of Rephaiah, of Arnan, of Obadiah, and of Shecaniah.
22 Libota ya Shekania: Shemaya elongo na bana na ye ya mibali: Atushi, Yigali, Baria, Nearia mpe Shafati. Bango nyonso bazalaki motoba.
The six descendants of Shecaniah were Shemaiah and his sons: Hattush, Igal, Bariah, Neariah, and Shaphat.
23 Bana mibali ya Nearia: Eliowenayi, Ezekiasi mpe Azirikami. Bango nyonso bazalaki misato.
The sons of Neariah: Elioenai, Hizkiah, and Azrikam—three in all.
24 Bana mibali ya Eliowenayi: Odavia, Eliashibi, Pelaya, Akubi, Yoanani, Delaya mpe Anani. Bango nyonso bazalaki sambo.
The sons of Elioenai: Hodaviah, Eliashib, Pelaiah, Akkub, Johanan, Delaiah, and Anani—seven in all.

< 1 Masolo ya Kala 3 >