< 1 Masolo ya Kala 29 >

1 Mokonzi Davidi alobaki na lisanga mobimba: — Salomo, mwana na ngai ya mobali, moko kaka oyo Nzambe aponi, azali nanu elenge mpe ayebi penza makambo malamu te. Nzokande, mosala ezali monene, pamba te Ndako oyo ezali mpo na moto te kasi mpo na Yawe Nzambe.
پاشان داودی پاشا بە هەموو کۆمەڵەکەی گوت: «سلێمانی کوڕم، ئەوەی کە خودا هەڵیبژاردووە، گەنجێکی پێنەگەیشتووە. کارەکەش گەورەیە، چونکە پەرستگاکە بۆ مرۆڤ نییە، بەڵکو بۆ یەزدانی پەروەردگارە.
2 Na bozwi na ngai nyonso, nabongisaki mpo na Ndako ya Nzambe na ngai: wolo mpo na misala ya wolo, palata mpo na misala ya palata, ebende mpo na misala ya bibende, mabaya mpo na misala ya mabaya, mabanga ya onikisi mpe mabanga ya kobamba, mabanga oyo engengaka mpe ya balangi ebele, mabanga ya talo ya lolenge nyonso mpe mabanga ya marbre. Biloko oyo nyonso ezalaki penza ebele.
منیش بە هەموو توانامەوە ئەمانەم بۆ پەرستگای خودام ئامادە کردووە، زێڕ بۆ زێڕنگەری، زیو بۆ زیوگەری، بڕۆنز بۆ بڕۆنزگەری، ئاسن بۆ ئاسنگەری، تەختە بۆ دارتاشی، بڕێکی زۆر لە بەردی عاشقبەند و بەردە پیرۆزە و چەندین جۆرە بەردی ڕەنگاوڕەنگ، هەروەها هەموو جۆرە بەردێکی باش و مەڕمەڕی سپی.
3 Mpe lisusu, na tina na bolingo na ngai mpo na Ndako ya Nzambe na ngai, napesi sik’oyo wuta na bozwi na ngai moko: wolo mpe palata mpo na Ndako ya Nzambe na ngai likolo ya nyonso oyo nabongisaki mpo na Ndako oyo ya bule:
لەسەر هەموو ئەوەی بۆ پەرستگا پیرۆزەکە ئامادەم کردووە، لەبەر خۆشحاڵیم بە پەرستگای خوداکەم، ئێستا گەنجینەیەکی تایبەتی خۆشم لە زێڕ و زیو دەبەخشم:
4 kilo nkoto nkama moko ya wolo ya peto ya Ofiri, kilo nkoto nkama mibale na tuku mitano ya palata ya peto mpo na kolatisa bamir ya Ndako.
سێ هەزار تالنت زێڕ لە زێڕی ئۆفیر و حەوت هەزار تالنت زیوی پوختەکراو بۆ ڕووکەشکردنی دیواری تەلارەکان و
5 Wolo mpe palata yango ebongisami mpo na misala ya wolo mpe ya palata, mpe mpo na misala nyonso oyo bato ya misala ya maboko basengeli kosala. Sik’oyo, nani alingi kopesa na esengo mpe na motema moko epai na Yawe?
هەر کارێک کە بە زێڕ و زیو دەکرێت، هەموو کارێکی دەستی وەستا پیشەوەرەکانیش. ئێستا کێ خوازیارە خۆی بۆ یەزدان تەرخان بکات؟»
6 Boye, bakambi ya mabota, bakonzi ya mabota ya Isalaele, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama mpe bakambi ya misala ya mokonzi bapesaki makabo wuta na mitema na bango moko.
ئینجا گەورەی بنەماڵە و سەرۆک هۆزەکانی ئیسرائیل و فەرماندەی هەزاران و سەدان، لێپرسراوانی کارەکانی پاشاش هەموویان بە خواستی خۆیان پیتاکیان بەخشی.
7 Mbala moko, bapesaki mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe: bakilo nkama tuku sambo ya wolo, biloko ya wolo nkoto zomi, bakilo koleka minkoko nkama misato ya palata, bakilo nkoto nkama motoba ya bronze, mpe bakilo koleka minkoko misato ya bibende.
بۆ کاری بیناسازی پەرستگای خودا پێنج هەزار تالنت زێڕ و دە هەزار درهەمی زێڕ، دە هەزار تالنت زیو، هەژدە هەزار تالنت بڕۆنز و سەد هەزار تالنت ئاسنیان بەخشی.
8 Bato nyonso oyo bazalaki na mabanga ya talo bapesaki yango na ebombelo ya bozwi ya Tempelo ya Yawe epai ya Yeyeli, moto ya libota ya Gerishoni.
ئەوەی بەردی گرانبەهای هەبوو دایە گەنجینەی پەرستگای یەزدان کە یەحیێلی گێرشۆنی بەرپرسی بوو.
9 Bato basepelaki mingi na makabo oyo bango moko bapesaki wuta na mokano ya mitema na bango, pamba te bazalaki kopesa yango epai ya Yawe, na motema mobimba. Mokonzi Davidi mpe asepelaki na yango mingi.
گەل بە بەخشندەیی ڕابەرەکانیان دڵخۆش بوون، چونکە بە هەموو دڵیانەوە پیتاکەکانیان بە یەزدان بەخشی، داودی پاشاش زۆر دڵخۆش بوو.
10 Davidi akumisaki Yawe liboso ya lisanga mobimba na maloba oyo: « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, tata na biso, tika ete ozwa lokumu mpo na libela!
داود لەبەردەم هەموو کۆمەڵەکە ستایشی یەزدانی کرد و گوتی: «ستایش بۆ تۆ ئەی یەزدان، خودای ئیسرائیل، باوکمانی لە ئەزەلەوە و بۆ هەتاهەتایە.
11 Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.
ئەی یەزدان، بۆ تۆیە گەورەیی و توانا، مەزنی و پایەبەرزی و شکۆ، چونکە هەموو ئەوەی لە ئاسمان و لە زەویدایە هی تۆیە. ئەی یەزدان، پاشایەتی هی تۆیە و تۆ هەرەبەرزیت و لە هەمووان پایەبەرزتری.
12 Bozwi mpe lokumu ewutaka epai na Yo; ozali na bokonzi likolo na nyonso, makasi mpe nguya ezali na maboko na Yo mpo na kotombola mpe kopesa makasi na moto nyonso.
دەوڵەمەندی و ڕێز لەلای تۆوە دێن، تۆ فەرمانڕەوای هەمووانیت. هێز و توانا لە دەستی تۆدان تاکو هەمووان بەهێز و ورەبەرز بکەیت.
13 Nzambe na biso, tozali sik’oyo kosanzola Yo mpe kokumisa Kombo na Yo.
ئێستاش ئەی خودای ئێمە، سوپاست دەکەین و ستایشی ناوە شکۆدارەکەت دەکەین.
14 Nazali nani, mpe bato na ngai bazali banani, mpo ete tozwa makoki ya kopesa makabo oyo, wuta na mokano ya mitema na biso moko? Nyonso ewutaka epai na Yo, mpe topesi Yo kaka oyo ewuti na loboko na Yo.
«بەڵام من کێم و گەلەکەم کێیە هەتا بتوانین بەم دڵفراوانییەوە ببەخشین؟ هەموو شتێک لە تۆوە دێت، لەوەی کە هی تۆیە بە تۆمان بەخشییەوە.
15 Liboso na Yo, tozali bapaya mpe baleki nzela, ndenge ezalaki batata na biso. Mikolo na biso awa na mokili ezali koleka lokola elili oyo ezangi elikya.
ئێمە لەبەرچاوی تۆدا نامۆین و وەک هەموو باوباپیرانمان ئاوارەین. ڕۆژانمان لەسەر زەوی وەک سێبەرن و ئومێدیش نییە.
16 Oh Yawe, Nzambe na biso, bomengo nyonso oyo tobongisi mpo na kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo na Yo ya Bule ewuti na loboko na Yo mpe ezali ya Yo.
ئەی یەزدانی پەروەردگارمان، هەموو ئەم سامانەی کە ئامادەمان کردووە بۆ ئەوەی پەرستگایەک بۆ ناوی پیرۆزت بنیاد بنێین، هەمووی لە تۆوە هاتووە و هەموو شتێکیش هی تۆیە.
17 Oh Nzambe na ngai, nayebi ete oyebi bozindo ya mitema na biso, osepelaka na bosembo. Napesi nyonso oyo wuta na mokano ya motema na ngai moko mpe na makanisi ya lokuta te. Sik’oyo, namoni ndenge nini bato na Yo, oyo bazali awa, bapesi Yo makabo oyo na motema malamu.
خودایە من دەزانم کە تۆ دڵەکان تاقی دەکەیتەوە و بە دڵی پاک دڵخۆش دەبیت. من بە خواستی خۆم و بە ڕاستگۆییەوە هەموو ئەم شتانەم بەخشیوە. ئێستاش دڵخۆش بووم کە گەلەکەی تۆم لێرە بینی چۆن بە خواستی دڵی خۆیان پیتاکیان پێ بەخشیت.
18 Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, Izaki mpe Isalaele, batata na biso, batela makanisi oyo kati na mitema ya bato na Yo mpo na libela mpe sala ete mitema na bango ekangama na Yo.
ئەی یەزدان، خودای ئیبراهیم و ئیسحاق و ئیسرائیلی باوباپیرانمان، ئەم بیرکردنەوەیە بۆ هەتاهەتایە لە دڵی گەلەکەتدا بپارێزە و دڵیان بەلای خۆتدا ڕابکێشە.
19 Pesa na mwana na ngai ya mobali, Salomo, motema ya boyengebene mpo na kobatela mitindo na Yo, malako na Yo mpe bikateli na Yo; mpo na kosala nyonso mpe kotonga Ndako oyo nasaleli mabongisi oyo nyonso. »
هەروەها وا بکە سلێمانی کوڕم پڕ بە دڵ فەرمان و یاسا و فەرزەکانت بەجێبهێنێت، هەموویان پەیڕەو بکات و ئەو پەرستگایە بنیاد بنێت کە ئامادەکاریم بۆی کردووە.»
20 Davidi alobaki na bato nyonso: — Bopambola Yawe, Nzambe na bino! Boye, bato nyonso bakumisaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, bagumbamaki mpe bafukamaki liboso ya Yawe mpe ya mokonzi.
پاشان داود بە هەموو کۆمەڵەکەی گوت: «تکایە ستایشی یەزدانی پەروەردگارتان بکەن.» ئینجا هەموو کۆمەڵەکە ستایشی یەزدانی پەروەردگاری باوباپیرانی خۆیان کرد و بە چۆکدا هاتن و کڕنۆشیان بۆ یەزدان و پاشا برد.
21 Mokolo oyo elandaki, babonzaki bambeka mpe bambeka ya kotumba epai na Yawe: bangombe ya mibali nkoto moko, bameme ya mibali nkoto moko mpe bana meme nkoto moko elongo na makabo ya masanga ya vino mpe makabo mosusu ebele, mpo na Isalaele mobimba.
پاشان لە ڕۆژی دواتر قوربانییان بۆ یەزدان سەربڕی و قوربانی سووتاندنیان بۆ یەزدان سەرخست، هەزار گا و هەزار بەران و هەزار بەرخی نێر لەگەڵ شەرابە پێشکەشکراوەکانیان و قوربانی سەربڕاوی زۆر بۆ هەموو ئیسرائیل.
22 Baliaki mpe bamelaki liboso ya Yawe na esengo na mokolo wana, mpe batatolaki mpo na mbala ya mibale ete Salomo, mwana mobali ya Davidi, azali mokonzi. Bapakolaki ye mafuta mpo ete azala mokonzi; mpe Tsadoki, mpo ete azala Nganga-Nzambe.
جا لەو ڕۆژەدا بە ئەوپەڕی خۆشییەوە لەبەردەم یەزدان خواردیان و خواردیانەوە. پاشان دووبارە سلێمانی کوڕی داودیان وەک پاشا ڕاگەیاند و وەک فەرمانڕەوایەک لەلایەن یەزدانەوە دەستنیشان کرا، سادۆقیش وەک کاهین دانرایەوە.
23 Salomo avandaki na Kiti ya Bokonzi ya Yawe lokola mokonzi na esika ya Davidi, tata na ye. Apambolamaki mpe Isalaele mobimba etosaki ye.
ئیتر سلێمان وەک پاشا لەسەر کورسی یەزدان دانیشت، لە جێی داودی باوکی. سەرکەوتوو بوو و هەموو ئیسرائیلیش گوێڕایەڵی بوون.
24 Bakonzi nyonso, basoda ya mpiko mpe bana nyonso ya mibali ya mokonzi Davidi batosaki mokonzi Salomo.
هەروەها هەموو سەرکردە و پاڵەوان و سەرجەم کوڕەکانی داودی پاشا سوێندیان خوارد ملکەچی سلێمانی پاشا بن.
25 Yawe atombolaki Salomo makasi liboso ya Isalaele mobimba, mpe apesaki ye lokumu ya bokonzi koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo balekaki liboso na ye.
یەزدانیش سلێمانی لەبەرچاوی هەموو ئیسرائیل زۆر مەزن کرد، شکۆیەکی شاهانەی وای پێدا کە پێش خۆی لە ئیسرائیل نەدرابووە هیچ پاشایەکی دیکە.
26 Davidi, mwana mobali ya Izayi, azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba.
داودی کوڕی یەسا پاشایەتی هەموو ئیسرائیلی کرد،
27 Davidi akonzaki Isalaele mibu tuku minei: mibu sambo na Ebron mpe mibu tuku misato na misato na Yelusalemi.
ئەو ماوەیەش کە پاشایەتی ئیسرائیلی کرد چل ساڵ بوو، حەوت ساڵ لە حەبرۆن و سی و سێ ساڵیش لە ئۆرشەلیم پاشایەتی کرد.
28 Akufaki na kimobange ya esengo. Atondisamaki na mibu ebele, na bozwi mpe na lokumu; bongo Salomo, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
لە تەمەنێکی باشی پیریدا مرد و لە ژیان و دەوڵەمەندی و ڕێز، تێری خواردبوو. پاشان سلێمانی کوڕی لەدوای خۆی بوو بە پاشا.
29 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Davidi, wuta na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Samuele, na buku ya misala ya mosakoli Natan mpe na buku ya misala ya mosakoli Gadi.
ڕووداوەکانی پاشایەتی داود لە سەرەتاوە هەتا کۆتایی لە پەڕتووکی تۆمارەکانی ساموئێلی پێشبینیکەر و لە تۆمارەکانی ناتانی پێغەمبەر نووسراون، هەروەها لە تۆمارەکانی گادی پێشبینیکەر،
30 Kati na babuku ya misala yango, balobelaki mpe makambo nyonso ya bokonzi mpe ya makasi na ye, makambo nyonso oyo ekomelaki ye, Isalaele mpe mikili nyonso ya zingazinga.
لەگەڵ هەموو وردەکارییەکانی پاڵەوانیێتی و پاشایەتییەکەی و هەموو ئەو ڕۆژگارانەشی کە بەسەر خۆی و بەسەر ئیسرائیل و هەموو پاشایەتییەکانی خاکەکاندا تێپەڕین.

< 1 Masolo ya Kala 29 >