< 1 Masolo ya Kala 27 >

1 Tala bana ya Isalaele oyo bazalaki kosalela mokonzi: ezalaki na bakambi ya mabota, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama ya basoda mpe bakomi mikanda. Mosala na bango ezalaki: kotala makambo oyo etali mabongisi ya mampinga. Sanza na sanza kati na mobu, lisanga moko ezalaki kokota na mosala mpe lisanga mosusu ezalaki kobima. Lisanga moko na moko ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
इस्राएलियों की गिनती, अर्थात् पितरों के घरानों के मुख्य-मुख्य पुरुषों और सहस्त्रपतियों और शतपतियों और उनके सरदारों की गिनती जो वर्ष भर के महीने-महीने उपस्थित होने और छुट्टी पानेवाले दलों के थे और सब विषयों में राजा की सेवा टहल करते थे, एक-एक दल में चौबीस हजार थे।
2 Mpo na sanza ya liboso: lisanga ya Yashobeami, mwana mobali ya Zabidieli; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
पहले महीने के लिये पहले दल का अधिकारी जब्दीएल का पुत्र याशोबाम नियुक्त हुआ; और उसके दल में चौबीस हजार थे।
3 Yashobeami azalaki mokitani ya Peretsi mpe azalaki mokonzi ya bakonzi nyonso ya mampinga mpo na sanza ya liboso.
वह पेरेस के वंश का था और पहले महीने में सब सेनापतियों का अधिकारी था।
4 Mpo na sanza ya mibale: lisanga ya Dodayi, moto ya libota ya Aoyi. Mikiloti azalaki mokambi ya lisanga ya Dodayi. Lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
दूसरे महीने के दल का अधिकारी दोदै नामक एक अहोही था, और उसके दल का प्रधान मिक्लोत था, और उसके दल में चौबीस हजार थे।
5 Mpo na sanza ya misato: lisanga ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya Banganga-Nzambe; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
तीसरे महीने के लिये तीसरा सेनापति यहोयादा याजक का पुत्र बनायाह था और उसके दल में चौबीस हजार थे।
6 Benaya azalaki moko kati na basoda ya mpiko tuku misato mpe azalaki mokonzi na bango; Amizadabi, mwana na ye ya mobali, azalaki moko kati na basoda ya lisanga yango.
यह वही बनायाह है, जो तीसों शूरों में वीर, और तीसों में श्रेष्ठ भी था; और उसके दल में उसका पुत्र अम्मीजाबाद था।
7 Mpo na sanza ya minei: lisanga ya Asaeli, ndeko mobali ya Joabi. Zebadia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye; lisanga yango ezalaki na bato nkoto tuku mibale na minei.
चौथे महीने के लिये चौथा सेनापति योआब का भाई असाहेल था, और उसके बाद उसका पुत्र जबद्याह था और उसके दल में चौबीस हजार थे।
8 Mpo na sanza ya mitano: lisanga ya mokambi Shamewuti, moto ya libota ya Yizirayi; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
पाँचवें महीने के लिये पाँचवाँ सेनापति यिज्राही शम्हूत था और उसके दल में चौबीस हजार थे।
9 Mpo na sanza ya motoba: lisanga ya Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya libota ya Tekoa; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
छठवें महीने के लिये छठवाँ सेनापति तकोई इक्केश का पुत्र ईरा था और उसके दल में चौबीस हजार थे।
10 Mpo na sanza ya sambo: lisanga ya Eletsi, moto ya libota ya Peloni, moko kati na bato ya libota ya Efrayimi; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
१०सातवें महीने के लिये सातवाँ सेनापति एप्रैम के वंश का हेलेस पलोनी था और उसके दल में चौबीस हजार थे।
11 Mpo na sanza ya mwambe: lisanga ya Sibekayi, moto ya libota ya Usha, moko kati na bakitani ya Zera; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
११आठवें महीने के लिये आठवाँ सेनापति जेरह के वंश में से हूशाई सिब्बकै था और उसके दल में चौबीस हजार थे।
12 Mpo na sanza ya libwa: lisanga ya Abiezeri, moto ya libota ya Anatoti, moko kati na bato ya libota ya Benjame; lisanga yango ezalaki na bato nkoto tuku mibale na minei.
१२नौवें महीने के लिये नौवाँ सेनापति बिन्यामीनी अबीएजेर अनातोतवासी था और उसके दल में चौबीस हजार थे।
13 Mpo na sanza ya zomi: lisanga ya Maarayi, moto ya libota ya Netofa, moko kati na bakitani ya Zera; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
१३दसवें महीने के लिये दसवाँ सेनापति जेरही महरै नतोपावासी था और उसके दल में चौबीस हजार थे।
14 Mpo na sanza ya zomi na moko: lisanga ya Benaya, moto ya libota ya Piratoni, moko kati na bato ya libota ya Efrayimi; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
१४ग्यारहवें महीने के लिये ग्यारहवाँ सेनापति एप्रैम के वंश का बनायाह पिरातोनवासी था और उसके दल में चौबीस हजार थे।
15 Mpo na sanza ya zomi na mibale: lisanga ya Elidayi, moto ya libota ya Netofa, moko kati na bakitani ya Otinieli; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
१५बारहवें महीने के लिये बारहवाँ सेनापति ओत्नीएल के वंश का हेल्दै नतोपावासी था और उसके दल में चौबीस हजार थे।
16 Tala bakonzi ya mabota ya Isalaele: Mpo na libota ya Ribeni: Eliezeri, mwana mobali ya Zikiri; mpo na libota ya Simeoni: Shefatia, mwana mobali ya Maaka;
१६फिर इस्राएली गोत्रों के ये अधिकारी थे: अर्थात् रूबेनियों का प्रधान जिक्री का पुत्र एलीएजेर; शिमोनियों से माका का पुत्र शपत्याह;
17 mpo na libota ya Levi: Ashabia, mwana mobali ya Kemweli; mpo na libota ya Aron: Tsadoki;
१७लेवी से कमूएल का पुत्र हशब्याह; हारून की सन्तान का सादोक;
18 mpo na libota ya Yuda: Eliwu, ndeko mobali ya Davidi; mpo na libota ya Isakari: Omiri, mwana mobali ya Mikaeli;
१८यहूदा का एलीहू नामक दाऊद का एक भाई, इस्साकार से मीकाएल का पुत्र ओम्री;
19 mpo na libota ya Zabuloni: Yishimaeya, mwana mobali ya Abidiasi; mpo na libota ya Nefitali: Yerimoti, mwana mobali ya Azirieli;
१९जबूलून से ओबद्याह का पुत्र यिशमायाह, नप्ताली से अज्रीएल का पुत्र यरीमोत;
20 mpo na libota ya Efrayimi: Oze, mwana mobali ya Azazia; mpo na ndambo ya libota ya Manase: Joeli, mwana mobali ya Pedaya;
२०एप्रैम से अजज्याह का पुत्र होशे, मनश्शे से आधे गोत्र का, पदायाह का पुत्र योएल;
21 mpo na ndambo ya libota ya Manase kati na Galadi: Yido, mwana mobali ya Zakari; mpo na libota ya Benjame: Yaasieli, mwana mobali ya Abineri;
२१गिलाद में आधे गोत्र मनश्शे से जकर्याह का पुत्र इद्दो, बिन्यामीन से अब्नेर का पुत्र यासीएल;
22 mpo na libota ya Dani: Azareeli, mwana mobali ya Yeroami. Bango wana nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Isalaele.
२२और दान से यरोहाम का पुत्र अजरेल प्रधान ठहरा। ये ही इस्राएल के गोत्रों के हाकिम थे।
23 Davidi atangaki te molongo ya mibali oyo bazalaki na se ya mibu tuku mibale ya mbotama, pamba te Yawe alakaki ete akokomisa Isalaele ebele lokola minzoto ya likolo.
२३परन्तु दाऊद ने उनकी गिनती बीस वर्ष की अवस्था के नीचे न की, क्योंकि यहोवा ने इस्राएल की गिनती आकाश के तारों के बराबर बढ़ाने के लिये कहा था।
24 Joabi, mwana mobali ya Tseruya, abandaki kotanga bango kasi asilisaki te. Pamba te likolo ya botangi wana, Yawe akitiselaki Isalaele kanda na Ye. Boye, motango ya bato yango ekomamaki te na buku ya masolo ya mokonzi Davidi.
२४सरूयाह का पुत्र योआब गिनती लेने लगा, पर निपटा न सका क्योंकि परमेश्वर का क्रोध इस्राएल पर भड़का, और यह गिनती राजा दाऊद के इतिहास में नहीं लिखी गई।
25 Azimaveti, mwana mobali ya Adieli, azalaki kobatela bibombelo ya bozwi ya mokonzi. Jonatan, mwana mobali ya Oziasi, azalaki mobateli ya bibombelo na bazamba, na bingumba, na bamboka mike mpe na bandako milayi.
२५फिर अदीएल का पुत्र अज्मावेत राज भण्डारों का अधिकारी था, और देहात और नगरों और गाँवों और गढ़ों के भण्डारों का अधिकारी उज्जियाह का पुत्र यहोनातान था।
26 Eziri, mwana mobali ya Kelubi, azalaki mokambi ya basali bilanga;
२६और जो भूमि को जोतकर बोकर खेती करते थे, उनका अधिकारी कलूब का पुत्र एज्री था।
27 Shimei, moto ya engumba Rama, azalaki mobateli bilanga ya vino; Zabidi, moto ya engumba Shefami, azalaki mobateli masanga ya vino mpe bilanga ya vino.
२७और दाख की बारियों का अधिकारी रामाई शिमी और दाख की बारियों की उपज जो दाखमधु के भण्डारों में रखने के लिये थी, उसका अधिकारी शापामी जब्दी था।
28 Bala-Anani, moto ya engumba Gederi, azalaki mobateli banzete ya olive mpe ya sikomori, na lubwaku ya ngambo ya weste; Yoashi azalaki mobateli mafuta ya olive;
२८और नीचे के देश के जैतून और गूलर के वृक्षों का अधिकारी गदेरी बाल्हानान था और तेल के भण्डारों का अधिकारी योआश था।
29 Shitrayi, moto ya engumba Saroni, azalaki mobateli bangombe oyo ezalaki kolia na Saroni; Shafati, mwana mobali ya Adilayi, azalaki mobateli bangombe na mabwaku.
२९और शारोन में चरनेवाले गाय-बैलों का अधिकारी शारोनी शित्रै था और तराइयों के गाय-बैलों का अधिकारी अदलै का पुत्र शापात था।
30 Obili, moto ya libota ya Isimaeli, azalaki mobateli bashamo; Yedeya, moto ya libota ya Meronoti, azalaki mobateli ba-ane ya basi.
३०और ऊँटों का अधिकारी इश्माएली ओबील और गदहियों का अधिकारी मेरोनोतवासी येहदयाह।
31 Yazizi, moto ya libota ya Agari, azalaki mobateli bibwele. Bango nyonso bazalaki babateli bozwi ya mokonzi Davidi.
३१और भेड़-बकरियों का अधिकारी हग्री याजीज था। ये ही सब राजा दाऊद की धन-सम्पत्ति के अधिकारी थे।
32 Jonatan, ndeko ya tata ya Davidi, azalaki mopesi toli, moto ya mayele mpe mokomi mikanda. Yeyeli, mwana mobali ya Akimoni, azalaki kolandela bana mibali ya mokonzi.
३२और दाऊद का भतीजा योनातान एक समझदार मंत्री और शास्त्री था, और एक हक्मोनी का पुत्र यहीएल राजपुत्रों के संग रहा करता था।
33 Ayitofeli azalaki mopesi toli ya mokonzi; mpe Ushayi, moto ya Ariki, azalaki mobateli sekele ya mokonzi.
३३और अहीतोपेल राजा का मंत्री था, और एरेकी हूशै राजा का मित्र था।
34 Yeoyada, mwana mobali ya Benaya, elongo na Abiatari, bakitanaki na Ayitofeli. Joabi azalaki mokonzi ya mampinga ya mokonzi.
३४और अहीतोपेल के बाद बनायाह का पुत्र यहोयादा और एब्यातार मंत्री ठहराए गए। और राजा का प्रधान सेनापति योआब था।

< 1 Masolo ya Kala 27 >