< 1 Masolo ya Kala 26 >
1 Tala masanga ya bakengeli bikuke: Mpo na bato ya Kore: Meshelemia, mwana mobali ya Kore, moko kati na bana mibali ya Azafi.
門を守る者の組は次のとおりである。すなわちコラびとのうちでは、アサフの子孫のうちのコレの子メシレミヤ。
2 Meshelemia azalaki na bana mibali oyo: mwana ya liboso, Zakari; mwana ya mibale, Yediayeli; mwana ya misato, Zebadia; mwana ya minei, Yatinieli;
メシレミヤの子たちは、長子はゼカリヤ、次はエデアエル、第三はゼバデヤ、第四はヤテニエル、
3 mwana ya mitano, Elami; mwana ya motoba, Yoanani; mpe mwana ya sambo, Eliowenayi.
第五はエラム、第六はヨハナン、第七はエリヨエナイである。
4 Obedi-Edomi mpe azalaki na bana mibali oyo: mwana ya liboso, Shemaya; mwana ya mibale, Yozabadi; mwana ya misato, Yoa; mwana ya minei, Sakari; mwana ya mitano, Netaneeli;
オベデ・エドムの子たちは、長子はシマヤ、次はヨザバデ、第三はヨア、第四はサカル、第五はネタネル、
5 mwana ya motoba, Amieli; mwana ya sambo, Isakari; mwana ya mwambe, Pewulitayi; pamba te Nzambe apambolaki Obedi-Edomi.
第六はアンミエル、第七はイッサカル、第八はピウレタイである。神が彼を祝福されたからである。
6 Mwana na ye ya mobali Shemaya azalaki mpe na bana mibali oyo bazalaki bakambi ya libota ya tata na bango, pamba te bazalaki bilombe mibali.
彼の子シマヤにも数人の子が生れ、有能な人々であったので、その父の家を治める者となった。
7 Bana mibali ya Shemaya: Otini, Refaeli, Obedi, Elizabadi; mpe bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki bilombe, Eliwu mpe Samakia.
すなわちシマヤの子たちはオテニ、レパエル、オベデ、エルザバデで、エルザバデの兄弟エリウとセマキヤは力ある人々であった。
8 Bango nyonso bazalaki bakitani ya Obedi-Edomi. Bango, bana na bango mpe bandeko na bango ya mibali bazalaki bilombe mpe bato ya mpiko mpo na mosala. Bakitani nyonso ya Obedi-Edomi bazalaki tuku motoba na mibale.
これらは皆オベデ・エドムの子孫である。彼らはその子たちおよびその兄弟たちと共にその勤めに適した力ある人々で、合わせて六十二人、みなオベデ・エドムに属する者である。
9 Meshelemia azalaki na bana mibali mpe bandeko mibali oyo bazalaki bilombe: bango nyonso bazalaki zomi na mwambe.
メシレミヤにも子たちと兄弟たち合わせて十八人あって、皆力ある人々であった。
10 Osa, moko kati na bana mibali ya Merari, azalaki na bana mibali oyo: Shimiri oyo tata na ye atiaki ye mokonzi atako azalaki mwana ya liboso te;
メラリの子孫ホサにも子たちがあった。そのかしらはシムリ、これは長子ではなかったが、父はこれをかしらにしたのであった。
11 Ilikia, mwana ya mibale; Tebalia, mwana ya misato; mpe Zakari, mwana ya minei. Bana mibali mpe bandeko mibali ya Osa bazalaki bango nyonso zomi na misato.
次はヒルキヤ、第三はテバリヤ、第四はゼカリヤである。ホサの子たちと兄弟たちは合わせて十三人である。
12 Masanga ya bakengeli bikuke ezalaki na mokumba ya kokengela bikuke ya Tempelo ya Yawe, na bokambami ya bakonzi na bango ndenge bandeko na bango bazalaki mpe kosala.
これらは門を守る者の組の長たる人々であって、その兄弟たちと同様に務をなして、主の宮に仕えた。
13 Boye kobanda na leki kino na kulutu, bazalaki kobeta zeke mpo na ekuke moko na moko, kolanda mabota na bango.
彼らはそれぞれ門のために小なる者も、大なる者も等しく、その氏族にしたがってくじを引いた。
14 Mpo na ekuke ya ngambo ya este, zeke ekweyaki epai ya libota ya Shelemia. Bongo babetaki zeke mpo na mwana na ye ya mobali Zakari oyo azalaki mopesi toli ya bwanya, mpe zeke mpo na ekuke ya ngambo ya Nor ekweyaki likolo na ye.
東の門のくじはシレミヤに当った。また彼の子で思慮深い議士ゼカリヤのためにくじを引いたが、北の門のくじがこれに当った。
15 Mpo na ekuke ya ngambo ya sude, zeke ekweyaki epai ya Obedi-Edomi; mpe mpo na ndako oyo babombelaka biloko, zeke ekweyaki epai ya bana na ye ya mibali.
オベデ・エドムには南の門のくじ、その子たちには倉のくじ、
16 Mpo na ekuke ya ngambo ya weste mpe ekuke ya Shaleketi, na nzela oyo emata na likolo, zeke ekweyaki epai ya Shupimi mpe Osa. Tala ndenge bakabolaki masanga ya bakengeli bikuke:
シュパムとホサには西の門のくじが当った。これは坂の大路にあるシャレケテの門のかたわらにあった。守る者と守る者とが相対していた。
17 mokolo na mokolo, ezalaki na Balevi motoba na ngambo ya este, Balevi minei na ngambo ya nor, mpe Balevi minei na ngambo ya sude; mpe masanga mibale oyo moko na moko ezalaki na bato mibale, na ndako oyo babombelaka biloko.
東の方には毎日六人、北の方には毎日四人、南の方には毎日四人、倉には二人と二人、
18 Mpo na lopango ya weste, ezalaki na bakengeli minei na nzela; mpe mibale kati na lopango.
西の方パルバルには大路に四人、パルバルに二人。
19 Oyo nde ezalaki masanga ya bakengeli bikuke oyo baponamaki kati na libota ya Kore mpe ya Merari.
門を守る者の組は以上のとおりで、コラの子孫とメラリの子孫であった。
20 Balevi mosusu lokola Ayiya, bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo mpe biloko ya bule.
レビびとのうちアヒヤは神の宮の倉および聖なる物の倉をつかさどった。
21 Tala bakitani ya Laedani, oyo bazalaki bato ya etuka ya Gerishoni mpe bakambi, moto na moto ya libota na ye: bato ya Yeyeli;
ラダンの子孫すなわちラダンから出たゲルションびとの子孫で、ゲルションびとの氏族の長はエヒエリである。
22 mpe bana mibali ya Yeyeli: Zetami mpe ndeko na ye ya mobali Joeli. Bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo ya Yawe.
エヒエリ、ゼタムおよびその兄弟ヨエルの子たちは主の宮の倉をつかさどった。
23 Mpo na bakitani ya Amirami, ya Yitseari, ya Ebron mpe ya Uzieli:
アムラムびと、イヅハルびと、ヘブロンびと、ウジエルびとのうちでは次のとおりであった。
24 Shebueli, mokitani ya Gerishomi, mwana mobali ya Moyize, azalaki mokonzi ya babateli bozwi ya Tempelo.
すなわちモーセの子ゲルショムの子シブエルは倉のつかさであった。
25 Tala bandeko na ye ya mibali oyo babotamaki na nzela ya Eliezeri: Reabia, Ezayi, Yorami, Zikiri mpe Shelomiti.
その兄弟でエリエゼルから出た者は、その子はレハビヤ、その子はエサヤ、その子はヨラム、その子はジクリ、その子はシロミテである。
26 Shelomiti elongo na bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo mokonzi Davidi abulisaki mpo na Yawe; bakambi ya mabota, bakambi ya bankoto, bakambi ya bankama mpe bakonzi mosusu ya mampinga.
このシロミテとその兄弟たちはすべての聖なる物の倉をつかさどった。これはダビデ王と、氏族の長と、千人の長と、百人の長と、軍の長たちのささげたものである。
27 Babulisaki biloko mosusu oyo bazwaki na bitumba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe.
すなわち彼らが戦いで獲たぶんどり物のうちから主の宮の修繕のためにささげたものである。
28 Shelomiti mpe bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo Samuele, momoni makambo; Saulo, mwana mobali ya Kishi; Abineri, mwana mobali ya Neri; Joabi oyo kombo ya mama na ye ezalaki « Tseruya, » babulisaki mpo na Yawe.
またすべて先見者サムエル、キシの子サウル、ネルの子アブネル、ゼルヤの子ヨアブなどがささげた物。すべてこれらのささげ物はシロミテとその兄弟たちが管理した。
29 Mpo na bakitani ya Yitseari: Kenania mpe bana na ye ya mibali oyo bazalaki bakomi mikanda mpe basambisi. Bazalaki na mokumba ya kotala makambo ya boyokani ya Isalaele na bikolo mosusu.
イヅハルびとのうちでは、ケナニヤとその子たちが、つかさおよびさばきびととしてイスラエルの外事のために選ばれた。
30 Mpo na bakitani ya Ebron: Ashabia mpe bandeko na ye ya mibali, bilombe mibali nkoto moko na nkama sambo. Bazalaki kokamba Isalaele na ngambo ya weste ya Yordani; mpe bazalaki na mokumba ya misala nyonso ya Yawe mpe ya mokonzi.
ヘブロンびとのうちでは、ハシャビヤおよびその兄弟など勇士千七百人があって、ヨルダンのこなた、すなわち西の方でイスラエルの監督となり、主のすべての事を行い、王に奉仕した。
31 Mpo na bakitani ya Ebron: Yeriya azalaki mokonzi na bango, kolanda milongo ya mabota na bango. Na mobu ya tuku minei ya bokonzi ya Davidi, batalaki malamu na buku ya mabota mpe bamonaki kati na engumba Yaezeri ya Galadi, bilombe mibali kati na bakitani ya Ebron.
ヘブロンびとのうちでは、系図と氏族によってエリヤがヘブロンびとの長であったが、ダビデの治世の第四十年に彼らを尋ね求め、ギレアデのヤゼルで彼らのうちから大勇士を得た。
32 Yeriya azalaki na bandeko mibali nkoto mibale na nkama sambo: bazalaki bilombe mibali mpe bakambi ya mabota. Mokonzi Davidi apesaki bango mokumba ya misala nyonso ya Nzambe mpe ya mokonzi kati na libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
ダビデ王は彼とその兄弟など氏族の長たち二千七百人の勇士をルベンびと、ガドびと、マナセびとの半部族の監督となし、すべて神につける事と王の事とをつかさどらせた。