< 1 Masolo ya Kala 24 >
1 Tala bituka ya bana mibali ya Aron: Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
porro filiis Aaron hae partitiones erunt filii Aaron Nadab et Abiu et Eleazar et Ithamar
2 Nadabi mpe Abiyu bakufaki liboso ya tata na bango mpe batikalaki kobota te. Eleazari mpe Itamari basalaki mosala na bango ya bonganga-Nzambe.
mortui sunt autem Nadab et Abiu ante patrem suum absque liberis sacerdotioque functus est Eleazar et Ithamar
3 Tala ndenge Davidi akabolaki bango kolanda misala oyo bapesaki bango: Tsadoki, na etuka ya Eleazari; Ayimeleki, na etuka ya Itamari.
et divisit eos David id est Sadoc de filiis Eleazar et Ahimelech de filiis Ithamar secundum vices suas et ministerium
4 Bamonaki ete kati na bakitani ya Eleazari, bana mibali bazalaki ebele koleka bato oyo bazalaki kati na bakitani ya Itamari. Boye, bakabolaki bana mibali ya Eleazari lokola bakonzi ya mabota zomi na motoba mpe bana mibali ya Itamari lokola bakonzi ya mabota mwambe.
inventique sunt multo plures filii Eleazar in principibus viris quam filii Ithamar divisit autem eis hoc est filiis Eleazar principes per familias sedecim et filiis Ithamar per familias et domos suas octo
5 Babetaki zeke mpo na kokabola bango, pamba te kati na bakitani ya Eleazari mpe ya Itamari, ezalaki na bakambi ya Esika ya bule mpe bakambi ya mosala ya Nzambe.
porro divisit utrasque inter se familias sortibus erant enim principes sanctuarii et principes Dei tam de filiis Eleazar quam de filiis Ithamar
6 Shemaya, mokomi mikanda, mwana mobali ya Netaneeli, na libota ya Levi, akomaki bakombo na bango na miso ya mokonzi, ya bakambi, ya Nganga-Nzambe Tsadoki, ya Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari; mpe ya bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe mpe Balevi. Babetaki zeke mbala mibale mpo na etuka ya Eleazari, mpe mbala moko, mpo na etuka ya Itamari.
descripsitque eos Semeias filius Nathanahel scriba Levites coram rege et principibus et Sadoc sacerdote et Ahimelech filio Abiathar principibus quoque familiarum sacerdotalium et leviticarum unam domum quae ceteris praeerat Eleazar et alteram domum quae sub se habebat ceteros Ithamar
7 Tala ndenge bakambi ya mabota baponamaki na nzela ya zeke: zeke ya liboso ekweyaki epai ya Yeoyaribi; zeke ya mibale ekweyaki epai ya Yedaeya;
exivit autem sors prima Ioiarib secunda Iedeiae
8 zeke ya misato ekweyaki epai ya Arimi; zeke ya minei ekweyaki epai ya Seorimi;
tertia Arim quarta Seorim
9 zeke ya mitano ekweyaki epai ya Malikiya; zeke ya motoba ekweyaki epai ya Miyamini;
quinta Melchia sexta Maiman
10 zeke ya sambo ekweyaki epai ya Akotsi; zeke ya mwambe ekweyaki epai ya Abiya;
septima Accos octava Abia
11 zeke ya libwa ekweyaki epai ya Jozue; zeke ya zomi ekweyaki epai ya Shekania;
nona Hiesu decima Sechenia
12 zeke ya zomi na moko ekweyaki epai ya Eliashibi; zeke ya zomi na mibale ekweyaki epai ya Yakimi;
undecima Eliasib duodecima Iacim
13 zeke ya zomi na misato ekweyaki epai ya Upa; zeke ya zomi na minei ekweyaki epai ya Yeshebeabi;
tertiadecima Oppa quartadecima Isbaal
14 zeke ya zomi na mitano ekweyaki epai ya Biliga; zeke ya zomi na motoba ekweyaki epai ya Imeri;
quintadecima Belga sextadecima Emmer
15 zeke ya zomi na sambo ekweyaki epai ya Eziri; zeke ya zomi na mwambe ekweyaki epai ya Apitsetsi;
septimadecima Ezir octavadecima Hapses
16 zeke ya zomi na libwa ekweyaki epai ya Petaya; zeke ya tuku mibale ekweyaki epai ya Ezekieli;
nonadecima Phetheia vicesima Iezecel
17 zeke ya tuku mibale na moko ekweyaki epai ya Yakini; zeke ya tuku mibale na mibale ekweyaki epai ya Gamuli;
vicesima prima Iachin vicesima secunda Gamul
18 zeke ya tuku mibale na misato ekweyaki epai ya Delaya; zeke ya tuku mibale na minei ekweyaki epai ya Maazia.
vicesima tertia Dalaiau vicesima quarta Mazziau
19 Ezalaki ndenge wana nde bakabolaki bango mpe bazalaki kolandana kati na mosala mpo na kokota kati na Tempelo ya Yawe. Bazalaki kosala misala na bango kolanda mibeko oyo tata na bango, Aron, apesaki bango, mpe ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, atindaki ye.
hae vices eorum secundum ministeria sua ut ingrediantur domum Domini et iuxta ritum suum sub manu Aaron patris eorum sicut praecepit Dominus Deus Israhel
20 Tala bakitani mosusu ya Levi oyo bazalaki bakambi ya bituka: Shubaeli, mpo na etuka ya Amirami; Yedeya, mpo na etuka ya Shubaeli;
porro filiorum Levi qui reliqui fuerant de filiis Amram erat Subahel et filiis Subahel Iedeia
21 Yishiya, mpo na etuka ya Reabia;
de filiis quoque Roobiae princeps Iesias
22 Shelomoti, mpo na etuka ya Yitseari; Yaati, mpo na etuka ya Shelomiti.
Isaaris vero Salemoth filiusque Salemoth Iaath
23 Bana mibali ya Ebron: mwana ya liboso, Yeriya; mwana ya mibale, Amaria; mwana ya misato, Yaazieli; mpe mwana ya minei, Yekameami;
filiusque eius Ieriahu Amarias secundus Iazihel tertius Iecmaam quartus
24 Shamiri, mpo na etuka ya Mishe, mwana mobali ya Uzieli;
filius Ozihel Micha filius Micha Samir
25 Zakari, mpo na etuka ya Yishiya, ndeko mobali ya Mishe.
frater Micha Iesia filiusque Iesiae Zaccharias
26 Bana mibali ya Merari: Maali mpe Mushi. Beno, mpo na etuka ya Yaaziya.
filii Merari Mooli et Musi filius Ioziau Benno
27 Bakitani ya Merari: na nzela ya mwana na ye ya mobali Yaaziya: Beno, Shoami, Zakuri mpe Ibiri.
filius quoque Merari Oziau et Soem et Zacchur et Hebri
28 Na nzela ya mwana na ye ya mobali Maali: Eleazari oyo atikalaki kobota te.
porro Mooli filius Eleazar qui non habebat liberos
29 Mpo na Kishi: Yerameeli, mwana na ye ya mobali.
filius vero Cis Ierahemel
30 Bana mibali ya Mushi: Maali, Ederi mpe Yerimoti. Bango wana nde bazalaki bakitani ya Levi kolanda bituka na bango.
filii Musi Mooli Eder et Ierimoth isti filii Levi secundum domos familiarum suarum
31 Bango mpe babetaki zeke lokola bandeko na bango ya mibali, bakitani ya Aron, na miso ya mokonzi Davidi, ya Tsadoki, ya Ayimeleki, ya bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe mpe ya Balevi. Boye bazalaki komona mabota nyonso ndenge moko, ezala libota ya kulutu to ya leki.
miseruntque et ipsi sortes contra fratres suos filios Aaron coram David rege et Sadoc et Ahimelech et principibus familiarum sacerdotalium et leviticarum tam maiores quam minores omnes sors aequaliter dividebat