< 1 Masolo ya Kala 23 >

1 Tango Davidi akomaki mobange makasi, akomisaki Salomo, mwana na ye ya mobali, mokonzi ya Isalaele.
ダビデは老い、その日が満ちたので、その子ソロモンをイスラエルの王とした。
2 Asangisaki bakambi nyonso ya Isalaele elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi.
ダビデはイスラエルのすべてのつかさおよび祭司とレビびとを集めた。
3 Batangaki Balevi nyonso oyo bazalaki na mibu tuku misato mpe koleka: motango nyonso ya Balevi ezalaki nkoto tuku misato na mwambe.
レビびとの三十歳以上のものを数えると、その男の数が三万八千人あった。
4 Davidi alobaki: « Tika ete Balevi nkoto tuku mibale na minei bazala bakambi ya misala ya Tempelo ya Yawe, Balevi nkoto motoba bazala bakomi mikanda mpe basambisi,
ダビデは言った、「そのうち二万四千人は主の家の仕事をつかさどり、六千人はつかさびと、およびさばきびととなり、
5 Balevi nkoto minei bazala bakengeli bikuke, mpe Balevi nkoto minei bakumisa Yawe na bibetelo mindule oyo nasalaki na tina na yango. »
四千人は門を守る者となり、また四千人はさんびのためにわたしの造った楽器で主をたたえよ」。
6 Bongo Davidi akabolaki bango na masanga kolanda buku ya mabota ya bana mibali ya Levi: Gerishoni, Keati mpe Merari.
そしてダビデは彼らをレビの子らにしたがってゲルション、コハテ、メラリの組に分けた。
7 Mpo na libota ya Gerishoni: Laedani mpe Shimei.
ゲルションの子らはラダンとシメイ。
8 Laedani azalaki na bana mibali misato: mokonzi Yeyeli, Zetami mpe Joeli.
ラダンの子らは、かしらのエヒエルとゼタムとヨエルの三人。
9 Shimei azalaki na bana mibali misato: Shelomiti, Azieli mpe Arani. Bango nde bazalaki bakambi ya mabota ya Laedani.
シメイの子らはシロミテ、ハジエル、ハランの三人。これらはラダンの氏族の長であった。
10 Shimei azalaki na bana mibali mosusu minei: Yaati, Ziza, Yewushi mpe Beria.
シメイの子らはヤハテ、ジナ、エウシ、ベリアの四人。皆シメイの子で、
11 Yaati azalaki mwana ya liboso, mpe Ziza, mwana ya mibale. Nzokande Yewushi mpe Beria bazalaki na bakitani ebele te. Boye batangaki bango lokola libota moko.
ヤハテはかしら、ジザはその次、エウシとベリアは子が多くなかったので、ともに数えられて一つの氏族となった。
12 Keati azalaki na bana mibali minei: Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
コハテの子らはアムラム、イヅハル、ヘブロン、ウジエルの四人。
13 Amirami azalaki na bana mibali mibale: Aron mpe Moyize. Aron aponamaki mpo na libela, elongo na bana na ye ya mibali, mpo na kobulisa Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo na kotumba mbeka ya malasi liboso ya Yawe, mpo na kosalela Ye mpe kopambola bato mpo na libela na Kombo na Ye.
アムラムの子らはアロンとモーセである。アロンはその子らとともに、ながくいと聖なるものを聖別するために分かたれて、主の前に香をたき、主に仕え、常に主の名をもって祝福することをなした。
14 Bana ya Moyize, moto na Nzambe, batangaki bango na ekolo ya Levi.
神の人モーセの子らはレビの部族のうちに数えられた。
15 Bana mibali ya Moyize: Gerishomi mpe Eliezeri.
モーセの子らはゲルションとエリエゼル。
16 Bana mibali ya Gerishomi: Shebueli azalaki mwana mobali ya liboso.
ゲルションの子らは、かしらはシブエル。
17 Bana mibali ya Eliezeri: Reabia azalaki mwana na ye se moko. Eliezeri azalaki na bana mosusu te, kasi Reabia azalaki na bana ebele.
エリエゼルの子らは、かしらはレハビヤ。エリエゼルにはこのほかに子がなかった。しかしレハビヤの子らは非常に多かった。
18 Bana mibali ya Yitseari: Shelomiti azalaki mwana ya liboso kati na bana mibali ya Yitseari.
イヅハルの子らは、かしらはシロミテ。
19 Bana mibali ya Ebron: Yeriya, mwana ya liboso; Amaria, mwana ya mibale; Yaazieli, mwana ya misato mpe Yekameami, mwana ya minei.
ヘブロンの子らは長子はエリヤ、次はアマリヤ、第三はヤハジエル、第四はエカメアム。
20 Bana mibali ya Uzieli: Mishe, mwana ya liboso; mpe Yishiya, mwana ya mibale.
ウジエルの子らは、かしらはミカ、次はイシアである。
21 Bana mibali ya Merari: Maali mpe Mushi. Bana mibali ya Maali: Eleazari mpe Kishi.
メラリの子らはマヘリとムシ。マヘリの子らはエレアザルとキシ。
22 Eleazari akufaki mpe atikalaki kobota bana mibali te, azalaki kaka na bana basi oyo babalanaki na bandeko na bango, bana mibali ya tata leki na bango Kishi.
エレアザルは男の子がなくて死に、ただ娘たちだけであったが、キシの子であるその身内の男たちが彼女たちをめとった。
23 Bana mibali ya Mushi: Maali, Ederi mpe Yeremoti. Bango nyonso bazalaki misato.
ムシの子らはマヘリ、エデル、エレモテの三人である。
24 Bango nde bazalaki bakitani ya Levi kolanda bituka na bango, mpe bakambi ya bituka na bango kolanda ndenge bakomamaki, moto na moto, na buku ya mabota. Bazwaki mokumba ya kosala misala kati na Tempelo ya Yawe, kobanda na oyo azalaki na mibu tuku mibale mpe koleka.
これらはその氏族によるレビの子孫であって、その人数が数えられ、その名がしるされて、主の家の務をなした二十歳以上の者で、氏族の長であった。
25 Bongo Davidi alobaki: « Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi bopemi na bato na Ye mpe avandi libela kati na Yelusalemi.
ダビデは言った、「イスラエルの神、主はその民に平安を与え、ながくエルサレムに住まわれる。
26 Boye Balevi bazala lisusu te na mokumba ya komema Mongombo mpe bisalelo na yango nyonso. »
レビびとは重ねて幕屋およびその勤めの器物をかつぐことはない。
27 Ezalaki kolanda malako ya suka ya Davidi nde batangaki bakitani ya Levi kobanda na mibu tuku mibale mpe koleka.
ダビデの最後の言葉によって、レビびとは二十歳以上の者が数えられた
28 Mosala ya Balevi ezalaki mpo na kosunga bakitani ya Aron na mosala ya Tempelo ya Yawe: kolandela bopeto ya veranda mpe ya bashambre, kopetola biloko nyonso ya bule mpe kosala misala nyonso ya Tempelo.
彼らの務はアロンの子孫を助けて主の家の働きをし、庭とへやの仕事およびすべての聖なるものを清めること、そのほか、すべて神の家の働きをすることである。
29 Bazalaki na mokumba ya kotanda mapa na mesa, kobongisa farine mpo na makabo ya bagato ezanga levire, bagalete mpe bagato batumba na kikalungu, mpe bagato basangisa na mafuta mpe biloko nyonso oyo bamekelaka kilo mpe molayi.
また供えのパン、素祭の麦粉、種入れぬ菓子、焼いた供え物、油をまぜた供え物をつかさどり、またすべて分量および大きさを量ることをつかさどり、
30 Bazalaki mpe na mokumba ya kotelema liboso ya Yawe, tongo mpe pokwa nyonso, mpo na kokumisa mpe kosanzola Ye;
また朝ごとに立って主に感謝し、さんびし、夕にもまたそのようにし、
31 mpe kobonza tango nyonso bambeka ya kotumba oyo bazalaki komema epai na Yawe na mikolo ya Saba, na ebandeli ya sanza mpe na mikolo nyonso ya bafeti oyo ekatama, kolanda motango oyo bakatelaki bango mpo na libela liboso ya Yawe.
また安息日と新月と祭日に、主にもろもろの燔祭をささげるときは、絶えず主の前にその命じられた数にしたがってささげなければならない。
32 Boye Balevi bazalaki kosala mosala na bango ya kokengela Ndako ya kapo ya Bokutani mpe Esika ya bule, mpe ya kosunga bandeko na bango ya mibali, bana ya Aron, na mosala ya Tempelo ya Yawe.
このようにして彼らは会見の幕屋と聖所の務を守り、主の家の働きのためにその兄弟であるアロンの子らに仕えなければならない」。

< 1 Masolo ya Kala 23 >