< 1 Masolo ya Kala 20 >

1 Na mobu oyo elandaki, na tango oyo bakonzi bazalaka na momesano ya kokende na bitumba, Joabi akambaki mampinga na bitumba mpe abebisaki mokili ya bato ya Amoni; bongo akendeki kotonga molako liboso ya Raba. Kasi Davidi atikalaki na Yelusalemi. Joabi abundisaki engumba Raba mpe apanzaki yango.
[戰敗阿孟]一年復始,正當諸王出征的季節,約阿布統率精兵,蹂躪了阿孟子民的地方,然後去包圍了辣巴,當時達味留在那耶路撒冷。約阿布攻陷了辣巴,加以破壞。
2 Davidi alongolaki motole oyo ezalaki na moto ya mokonzi na yango. Bamonaki ete esalemaki na bakilo ya wolo koleka tuku misato mpe ezalaki na libanga ya talo likolo na yango. Wuta na tango wana, ekomaki na moto ya Davidi. Akamataki bomengo ebele ya bitumba kati na engumba yango.
達味從米耳公的頭上,取下他的冠冕來,發現有一點「塔冷通」重的金子,上面還有一塊寶石。達味將這塊寶石戴在自己頭上;並由城中運走了大批的戰利品。
3 Amemaki na bowumbu bato oyo bazalaki kuna, atiaki bango na misala oyo basalaka na si, na piki mpe na epasola. Davidi asalaki ndenge wana na bavandi ya bingumba nyonso ya bato ya Amoni; bongo azongaki na Yelusalemi elongo na mampinga na ye nyonso.
至於城內的居民,達味將他們帶走,叫他們拉鋸、持鎚、操斧工作。達味如此對待了阿孟子民所有的城市,然後率領全軍回了耶路撒冷。[三敗培肋舍特]
4 Sima na mwa tango, ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na mboka Gezeri. Ezalaki na tango yango nde Sibekayi, moto ya Usha, abomaki Sipayi, moko kati na bakitani ya Rafa; mpe bato ya Filisitia bayokisamaki soni.
這些事以後,右與培肋舍特人在革則爾發生了戰事。胡沙人息貝開擊殺了辣法巨人的後裔息派,他們便投降歸順了。
5 Ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia; mpe Elanani, mwana mobali ya Yairi, abomaki Lami, ndeko mobali ya Goliati, moto ya Gati, oyo nzete ya likonga na ye ezalaki monene lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka.
以後,又與培肋舍特交戰,雅依爾的兒子厄耳哈難擊殺了加特人哥肋雅的兄弟拉赫米。這人的長矛粗如織布機的橫軸。
6 Ezalaki lisusu na bitumba oyo esalemaki kuna na Gati; mpe ezalaki kuna na mbinga mobali moko, mokitani ya Rafa, oyo azalaki na misapi motoba na loboko moko na moko, mpe misapi motoba na lokolo moko na moko. Na kosangisa, azalaki na misapi tuku mibale na minei.
此後,在加特又起了戰事,在那裏有一巨人,兩手各有六指,兩足亦各有六趾,共有二十四個,也是辣法巨人的後裔。
7 Atiolaki Isalaele; mpe Jonatan, mwana mobali ya Shimea mpe ndeko mobali ya Davidi, abomaki ye.
由於他辱罵了以色列,達味的兄弟史默亞的兒子約納堂將他殺死:
8 Bato wana bazalaki bakitani ya Rafa, babotama na Gati mpe bakufaki liboso ya Davidi mpe ya basoda na ye.
這些人全是加特城辣法巨人的子孫,都喪身在達味和他的臣僕手裏。

< 1 Masolo ya Kala 20 >