< 1 Masolo ya Kala 2 >

1 Tala bana mibali ya Isalaele: Ribeni, Simeoni, Levi, Yuda, Isakari, Zabuloni,
Ето синовете на Израиля: Рувим, Симеон, Левий, Юда, Исахар, Завулон,
2 Dani, Jozefi, Benjame, Nefitali, Gadi mpe Aseri.
Дан, Иосиф, Вениамин, Нефталим, Гад и Асир.
3 Bana mibali ya Yuda: Eri, Onani mpe Shela. Ezali Mwana mwasi ya Shuwa, moto ya Kanana, nde abotelaki Yuda bana mibali misato wana. Eri, mwana mobali ya liboso ya Yuda, atambolaki mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe abomaki ye.
Юдови синове: Ир, Онан и Шела: тримата му се родиха от ханаанката, дъщерята на Суя. А първородният на Юда, Ир, бе лош пред Господа, та Той го умъртви.
4 Tamari, bokilo ya Yuda, abotelaki ye Peretsi mpe Zera. Bana mibali nyonso ya Yuda bazalaki mitano.
И снаха му Тамар му роди Фареса и Зара, Всичките Юдови синове бяха петима.
5 Bana mibali ya Peretsi: Etsironi mpe Amuli.
Фаресови синове: Есрон и Амул.
6 Bana mibali ya Zera: Zimiri, Etani, Emani, Kalikoli mpe Darida; bango nyonso bazalaki mitano.
А Зарови синове: Зимрий, Етан, Еман, Халкол и Дара(; всичко петима.
7 Mwana mobali ya Karimi: Akari oyo ayeisaki mobulu na Isalaele tango abukaki mobeko ya kozwa biloko oyo babulisaki mpo na Yawe.
А Хармиев син: Ахар
8 Mwana mobali ya Etani: Azaria.
А Етанов син - Азария.
9 Bana mibali oyo babotelaki Etsironi: Yerameeli, Rami mpe Kelubayi.
А синове, които се родиха на Есрона: Ерамеил, Арам и Халев
10 Rami azalaki tata ya Aminadabi; mpe Aminadabi azalaki tata ya Nashoni, mokambi ya bato ya Yuda.
И Арам роди Аминадава: а Аминадав роди Наасона, първенец на Юдовите потомци.
11 Nashoni azalaki tata ya Salima; Salima azalaki tata ya Boazi.
А Наасон роди Салмона: Салмон роди Вооза;
12 Boazi azalaki tata ya Obedi; mpe Obedi azalaki tata ya Izayi.
Вооз роди Овида: Овид роди Есея;
13 Izayi azalaki tata ya Eliabi, mwana na ye ya liboso ya mobali; ya mibale, Abinadabi; ya misato, Shimea;
а Есей роди първородния си Елиав, втория Авинадав, третия Сама,
14 ya minei, Netaneeli; ya mitano, Radayi;
четвъртия Натанаил, петия Радай,
15 ya motoba, Otsemi; mpe ya sambo, Davidi.
шестия Осем и седмия Давид.
16 Bandeko na bango ya basi: Tseruya mpe Abigayili. Tseruya abotaki bana mibali misato: Abishayi, Joabi mpe Asaeli.
А техни сестри бяха Саруия и Авигея; а Саруините синове бяха трима: Ависей, Иоав и Асаил;
17 Abigayili abotaki mwana moko ya mobali, mpe kombo na ye ezalaki « Amasa. » Yeteri, moto ya Isimaeli, nde azalaki tata ya Amasa.
и Авигея роди Амаса; а баща на Амаса беше исмаилецът Иетер.
18 Azuba abotelaki Kalebi, mwana mobali ya Etsironi, mwana moko ya mwasi, mpe kombo na ye ezalaki « Yerioti; » mpe bana mibali misato: Yesheri, Shobabi mpe Aridoni.
И Халев, Есроновият син, роди синове от жена си Азува и от Ериота: синовете му бяха Есер, Совав и Ардон.
19 Tango Azuba akufaki, Kalebi abalaki Efrata oyo abotelaki ye Wuri.
И като умря Азува, Халев си взе Ефрата, която му роди Ора.
20 Wuri azalaki tata ya Uri, mpe Uri azalaki tata ya Betisaleyeli.
А Ор роди Урия; а Урия роди Веселеила.
21 Mpe na sima, Etsironi asangisaki nzoto na mwana mwasi ya Makiri, tata ya bato ya Galadi. Abalaki ye tango azalaki na mibu tuku motoba; mpe mwana mwasi ya Makiri abotelaki ye Segubi.
И после Есрон влезе при дъщерята на Махира Галаадовия баща; той я взе като беше на шестдесет години на възраст, и тя му роди Сегува;
22 Segubi azalaki tata ya Yairi oyo azalaki kokonza bingumba tuku mibale na misato kati na mokili ya Galadi.
А Сегув роди Яира, който имаше двадесет и три града в галаадската земя.
23 Kasi bato ya Geshuri mpe ya Siri babotolaki na makasi bamboka oyo Yairi azalaki kokonza; babotolaki mpe Kenati elongo na bamboka na yango ya mike: bingumba nyonso oyo babotolaki ezalaki tuku motoba. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Makiri, tata ya bato ya Galadi.
И Гесур и Арам превзеха от тях Яировите паланки, с Кенат и селата му, шестдесет града, Всички тия бяха синове на Махира, Галаадовия баща.
24 Sima na kufa ya Etsironi na mboka Kalebi Efrata, mwasi na ye, Abiya, abotaki mwana mobali, mpe kombo na ye « Ashiwuri. » Ashiwuri azalaki tata ya Tekoa.
А след като умря Есрон в Халев-ефрата, тогава Есроновата жена Авия му роди Асхора бащата на Текуе.
25 Bana mibali ya Yerameeli, mwana liboso ya Etsironi, bazalaki: Rami, mwana na ye ya liboso ya mobali, Buna, Oreni, Otsemi mpe Ayiya.
И синовете на първородния на Есрона, Ерамеила, бяха: първородният Арам и Вуна, Орен, Осем и Ахия.
26 Yerameeli abalaki mwasi mosusu oyo kombo na ye ezalaki « Atara. » Atara abotelaki ye Onami.
Ерамеил взе и друга жена, чието име бе Атара: тя бе майка на Онана.
27 Bana mibali ya Rami, mwana mobali ya liboso ya Yerameeli: Matsi, Yamini mpe Ekere.
А синовете на първородния на Ерамеила, Арам, бяха: Маас, Ямин и Екер.
28 Bana mibali ya Onami: Shamayi mpe Yada. Bana mibali ya Shamayi: Nadabi mpe Abishuri.
И синовете на Анама бяха: Самай и Ядай; а синовете на Самая: Надав и Ависур.
29 Kombo ya mwasi ya Abishuri ezalaki « Abiyaili. » Abiyaili abotelaki ye Abani mpe Molidi.
И името на Ависуровата жена бе Авихаила, която му роди Аавана и Молида.
30 Bana mibali ya Nadabi: Seledi mpe Apayimi. Seledi atikalaki kobota te mpe akufaki.
А Надавови синове бяха: Селед Апаим; и Селед умря бездетен.
31 Mwana mobali ya Apayimi: Yisheyi oyo azalaki tata ya Sheshani. Sheshani azalaki tata ya Akilayi.
А син на Апаима беше Есия; а син на Есия, Сисан; а син на Сисана, Аалай.
32 Bana mibali ya Yada, ndeko mobali ya Shamayi: Yeteri mpe Jonatan. Yeteri atikalaki kobota te mpe akufaki.
А синове на Ядая Самаевия брат бяха: Етер и Ионатан; и Етер умря бездетен;
33 Bana mibali ya Jonatan: Peleti mpe Zaza. Bango wana nde bazalaki bakitani ya Yerameeli.
а синовете на Ионатана: Фалет и Зиза. Тия бяха потомците на Ерамеила.
34 Sheshani atikalaki kobota bana mibali te, kaka bana basi. Kasi azalaki na mowumbu moko ya mobali na kombo Yara, moto ya Ejipito.
А Сисан нямаше синове, но дъщери. А Сисан имаше слуга египтянин на име Яраа;
35 Sheshani abalisaki mwana na ye ya mwasi epai ya Yara, mowumbu na ye ya mobali, mpe mwana yango ya mwasi abotelaki Yara mwana mobali, Atayi.
и Сисан даде дъщеря си на слугата си Яраа за жена; и тя му роди Атая;
36 Atayi azalaki tata ya Natan, Natan azalaki tata ya Zabadi.
а Атай роди Натана; Натан роди Завада;
37 Zabadi azalaki tata ya Efilali, Efilali azalaki tata ya Obedi.
Завад роди Ефлала; Ефлал роди Овида;
38 Obedi azalaki tata ya Jewu, Jewu azalaki tata ya Azaria.
Овид роди Ииуя; Ииуй роди Азария;
39 Azaria azalaki tata ya Eletsi, Eletsi azalaki tata ya Eleasa.
Азария роди Хелиса; Хелис роди Елеаса;
40 Eleasa azalaki tata ya Sisimayi, Sisimayi azalaki tata ya Shalumi.
Елеас роди Сисамая; Сисамай роди Селума;
41 Shalumi azalaki tata ya Yekamia, mpe Yekamia azalaki tata ya Elishama.
Селум роди Екамия; а Екамия роди Елисама.
42 Bana mibali ya Kalebi, ndeko ya Yerameeli: Mesha, mwana na ye ya liboso oyo azalaki tata ya Zifi, mpe Maresha, tata ya Ebron.
А синовете на Хелева Ерамеиловия брат, бяха: първородният му Миса, който бе баща на Зиф; и син на Мариса бе Ави-хеврон.
43 Bana mibali ya Ebron: Kora, Tapua, Rekemi mpe Shema.
А Хевронови синове: Корей, Тапфуа, Рекем и Сема;
44 Shema azalaki tata ya Raami, mpe Raami azalaki tata ya Yorikeami. Rekemi azalaki tata ya Shamayi.
А Сема роди Раама, Иоркоамовия баща; а Рекем роди Самая.
45 Mwana mobali ya Shamayi ezalaki Maoni, Maoni azalaki tata ya Beti-Tsuri.
И Самаев син беше Маон; а Маон беше Ветсуровият баща.
46 Efa, makangu ya Kalebi, abotelaki ye Arani, Motsa mpe Gazezi. Arani azalaki tata ya Gazezi.
А наложницата на Халева, Гефа, роди Харана, Моса и Газера; а Харан роди Газера.
47 Bana mibali ya Yadayi: Regwemi, Yotami, Geshani, Peleti, Efa mpe Shaafi.
А Ядаеви синове: Регем, Иотам, Гисан, Фелет, Гефа и Сагаф.
48 Maaka, makangu mosusu ya Kalebi, abotelaki ye Sheberi mpe Tirana.
И наложницата на Халева, Мааха, роди Севера и Тирхана;
49 Abotelaki ye lisusu Shaafi, tata ya Madimana, mpe Sheva, tata ya Makibena mpe Gibea. Kalebi azalaki na mwana moko ya mwasi, Akisa.
роди още Сагафа, Мадмановия баща, Сева Махвановия баща и бащата на Гавая; и Халевова дъщеря бе Ахса.
50 Bango wana nde bazalaki bakitani ya Kalebi. Bana mibali ya Wuri, mwana ya liboso oyo abotaki na Efrata, mwasi na ye: Shobali, tata ya Kiriati-Yearimi;
Ето синовете на Халева, син на първородния на Ефрата, Ор: Совал Кириатиаримовият баща,
51 Salima, tata ya Beteleemi; mpe Arefi, tata ya Beti-Gaderi.
Салма Витлеемовият баща, и Ареф Вет-гадеровият баща,
52 Bakitani ya Shobali, tata ya Kiriati-Yearimi: Aruwe mpe Atsi-Amenuoti.
А на Совала Кириатиаримовия баща синове бяха Арое и половината от манахатците.
53 Mabota ya Kiriati-Yearimi: bato ya Yeteri, ya Puti, ya Shumati mpe ya Mishirayi. Bato ya Tsorea mpe ya Eshitaoli babimelaki na mabota oyo.
А Кириатиаримовите семейства бяха: етерците, футците, суматците и мисрайците от тях произлязоха сарайците и естаолците.
54 Bakitani ya Salima: Bato ya Beteleemi, ya Netofa, ya Aroti-Beti-Joabi, ya Atsi-Amanati mpe ya Tsorea,
Салмови синове: Витлеем, нетофатците, Атарот-вит-Иоав, половината от манахатците, сарайците,
55 elongo na mabota ya bato ya mayele oyo bazalaki kovanda na Yaebetsi: bato ya Tirea, ya Shimea mpe ya Sukoti. Bango wana nde bato ya Keni oyo babimeli na Amati, tata ya libota ya Rekabi.
семействата на писците, които живеят в Явис, тиратците, симеатците и сухатците. Това са кенейците, които произлязоха от Амата, прадед на Рихавовия дом.

< 1 Masolo ya Kala 2 >