< 1 Masolo ya Kala 19 >
1 Sima na mwa tango, Naashi, mokonzi ya bato ya Amoni, akufaki, mpe mwana na ye ya mobali akitanaki na ye na bokonzi.
Some time later, Nahash king of the Ammonites died and was succeeded by his son.
2 Davidi amilobelaki: « Nakotalisa bolamu epai ya Anuni, mwana mobali ya Naashi, pamba te tata na ye atalisaki ngai bolamu. » Boye Davidi atindaki bato epai ya Anuni mpo na kobondisa ye na tina na kufa ya tata na ye. Tango basali ya Davidi bakomaki epai ya Anuni, na mokili ya bato ya Amoni, mpo na kobondisa ye,
And David said, “I will show kindness to Hanun son of Nahash, because his father showed kindness to me.” So David sent messengers to console Hanun concerning his father. But when David’s servants arrived in the land of the Ammonites to console him,
3 bakambi ya bato ya Amoni balobaki na Anuni: « Okanisi ete ezali mpo na kopesa tata na yo lokumu nde Davidi atindi bato mpo na kobondisa yo? Bato wana bayei epai na yo mpo na kotala mpe kononga mokili mpo ete babebisa yango. »
the princes of the Ammonites said to Hanun, “Just because David has sent you comforters, do you really believe he is showing respect for your father? Have not his servants come to you to explore the land, spy it out, and overthrow it?”
4 Boye, Anuni akangaki basali ya Davidi, akataki bango mandefu, akataki bango bilamba kino na likolo ya mipende mpe abenganaki bango.
So Hanun took David’s servants, shaved their beards, cut off their garments at the hips, and sent them away.
5 Tango bayebisaki Davidi makambo oyo ekweyelaki bato wana, atindaki bato mosusu mpo na kokende kokutana na bango, pamba te basambwisaki bango makasi. Mokonzi atindelaki bango maloba oyo: « Bovanda na Jeriko kino mandefu na bino ekobota, sima nde bokozonga. »
When someone came and told David about his men, he sent messengers to meet them, since the men had been thoroughly humiliated. The king told them, “Stay in Jericho until your beards have grown back, and then return.”
6 Tango bato ya Amoni bamonaki ete bamilukeli makambo epai ya Davidi, Anuni mpe bato ya Amoni batindaki bakilo ya palata nkoto tuku misato epai ya bato ya Siri ya Mezopotami, ya Maaka mpe ya Tsoba, mpo na kodefa bashar mpe basoda oyo babundaka bitumba likolo ya bampunda.
When the Ammonites realized that they had become a stench to David, Hanun and the Ammonites sent a thousand talents of silver to hire for themselves chariots and horsemen from Aram-naharaim, Aram-maacah, and Zobah.
7 Badefaki bashar, basoda nkoto tuku misato na mibale oyo babundaka likolo ya bampunda, mpe mokonzi ya Maaka elongo na mampinga na ye. Bongo, bayaki kotonga molako na bango pembeni ya Medeba. Kaka na tango yango, bato ya Amoni basanganaki na engumba na bango mpe babimaki mpo na kobunda.
So they hired for themselves thirty-two thousand chariots, as well as the king of Maacah with his troops, who came and camped near Medeba while the Ammonites came from their cities and marched out for battle.
8 Tango kaka Davidi ayokaki bongo, atindaki Joabi elongo na mampinga nyonso ya basoda ya mpiko.
On hearing this, David sent Joab and the entire army of mighty men.
9 Bato ya Amoni babimaki mpe batandamaki na milongo mpo na bitumba, na ekuke ya engumba na bango; kasi bakonzi oyo bayaki bazalaki na esika mosusu, kati na zamba.
The Ammonites marched out and arrayed themselves for battle at the entrance to the city, while the kings who had come stayed by themselves in the open country.
10 Tango Joabi amonaki ete milongo ya bitumba ezali na liboso mpe na sima na ye, aponaki basoda ya Isalaele, oyo baleki na mpiko mpe atiaki bango na milongo mpo na kobundisa bato ya Siri.
When Joab saw the battle lines before him and behind him, he selected some of the best men of Israel and arrayed them against the Arameans.
11 Atiaki basoda oyo batikalaki na se ya bokonzi ya ndeko na ye ya mobali, Abishayi; mpe atandaki bango na milongo ya bitumba mpo na kobundisa bato ya Amoni.
And he placed the rest of the forces under the command of his brother Abishai, who arrayed them against the Ammonites.
12 Joabi alobaki: « Soki bato ya Siri baleki ngai na makasi, yo okoya kosunga ngai; kasi soki bato ya Amoni baleki yo na makasi, wana ngai nakosunga yo.
“If the Arameans are too strong for me,” said Joab, “then you will come to my rescue. And if the Ammonites are too strong for you, then I will come to your rescue.
13 Yika mpiko, mpe tobunda lokola bilombe mpo na bato na biso mpe mpo na bingumba ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe asala oyo ezali malamu na miso na Ye. »
Be strong and let us fight bravely for our people and for the cities of our God. May the LORD do what is good in His sight.”
14 Boye, Joabi mpe basoda oyo bazalaki elongo na ye bapusanaki mpo na kobundisa bato ya Siri; mpe bato yango ya Siri bakimaki liboso na ye.
So Joab and his troops advanced to fight the Arameans, who fled before him.
15 Tango bato ya Amoni bamonaki bato ya Siri kokima, bango mpe bakimaki liboso ya Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mpe bazongaki na engumba. Bongo, Joabi azongaki na Yelusalemi.
When the Ammonites saw that the Arameans had fled, they too fled before Joab’s brother Abishai, and they entered the city. So Joab went back to Jerusalem.
16 Tango bato ya Siri bamonaki ete Isalaele alongi bango, batindaki bantoma kobenga bato mosusu ya Siri oyo bazalaki na ngambo mosusu ya ebale Efrate. Tsofaki, mokonzi ya mampinga ya Adadezeri, azalaki liboso na bango.
When the Arameans saw that they had been defeated by Israel, they sent messengers to bring more Arameans from beyond the Euphrates, with Shophach the commander of Hadadezer’s army leading them.
17 Tango Davidi azwaki sango yango, asangisaki bato nyonso ya Isalaele mpe akatisaki Yordani; apusanaki mpe asalaki molongo ya bitumba liboso na bango ya bato ya Siri, mpe bato ya Siri babundisaki ye.
When this was reported to David, he gathered all Israel, crossed the Jordan, advanced toward the Arameans, and arrayed for battle against them. When David lined up to engage them in battle, they fought against him.
18 Kasi bato ya Siri bakimaki liboso ya Isalaele, mpe Davidi abomaki basoda na bango, nkoto sambo oyo babundaka bitumba likolo ya bampunda mpe basoda nkoto tuku minei oyo babundaka bitumba na makolo. Davidi abomaki lisusu Tsofaki, mokonzi na bango ya mampinga.
But the Arameans fled before Israel, and David killed seven thousand of their charioteers and forty thousand foot soldiers. He also killed Shophach the commander of their army.
19 Tango bawumbu ya Adadezeri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basalaki kimia elongo na Davidi mpe bakomaki na se ya bokonzi na ye. Boye bato ya Siri balingaki lisusu te kosunga bato ya Amoni.
When Hadadezer’s subjects saw that they had been defeated by Israel, they made peace with David and became subject to him. So the Arameans were unwilling to help the Ammonites anymore.