< 1 Masolo ya Kala 18 >

1 Sima na yango, Davidi alongaki bato ya Filisitia mpe abukaki lolendo na bango. Abotolaki na maboko ya bato ya Filisitia engumba Gati elongo na bamboka na yango ya zingazinga.
Some time later, David defeated the Philistines, subdued them, and took Gath and its villages from the hand of the Philistines.
2 Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi. Bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi.
David also defeated the Moabites, and they became subject to David and brought him tribute.
3 Davidi alongaki lisusu Adadezeri, mokonzi ya Tsoba, na engumba Amati, tango Adadezeri akendeki kovandisa bokonzi na ye pembeni ya ebale Efrate.
As far as Hamath, David also defeated King Hadadezer of Zobah, who had marched out to establish his dominion along the Euphrates River.
4 Davidi abotolaki Adadezeri bashar nkoto moko, akangaki basoda nkoto sambo oyo babundaka bitumba likolo ya bampunda mpe basoda nkoto tuku mibale oyo babundaka bitumba na makolo; akataki misisa ya makolo ya bampunda nyonso, kasi atikaki kaka bampunda nkama moko oyo ezalaki kobenda bashario.
David captured from him a thousand chariots, seven thousand charioteers, and twenty thousand foot soldiers, and he hamstrung all the horses except a hundred he kept for the chariots.
5 Tango bato ya Siri oyo bazalaki kovanda na engumba Damasi bayaki kosunga Adadezeri, mokonzi ya Tsoba, Davidi abomaki kati na bango bato nkoto tuku mibale.
When the Arameans of Damascus came to help King Hadadezer of Zobah, David struck down twenty-two thousand men.
6 Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri; boye bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
Then he placed garrisons in Aram of Damascus, and the Arameans became subject to David and brought him tribute. So the LORD made David victorious wherever he went.
7 Davidi abotolaki banguba ya wolo oyo bakonzi ya basoda ya Adadezeri bazalaki na yango mpe amemaki yango na Yelusalemi.
And David took the gold shields that belonged to the officers of Hadadezer and brought them to Jerusalem.
8 Na Tibati mpe na Kuni, bingumba ya mokonzi Adadezeri, Davidi azwaki bronze ebele oyo, na mikolo oyo elandaki, Salomo asalaki na yango nzungu ya monene, makonzi mpe bisalelo mosusu ya bronze.
And from Tibhath and Cun, cities of Hadadezer, David took a large amount of bronze, with which Solomon made the bronze Sea, the pillars, and various bronze articles.
9 Tango Towu, mokonzi ya Amati, ayokaki ete Davidi alongi mampinga nyonso ya Adadezeri, mokonzi ya Tsoba,
When King Tou of Hamath heard that David had defeated the entire army of Hadadezer king of Zobah,
10 atindaki Adorami, mwana na ye ya mobali, kopesa mokonzi Davidi mbote mpe longonya mpo ete abundisaki mpe alongaki Adadezeri oyo azalaki monguna ya Towu. Adorami amemelaki Davidi lolenge nyonso ya biloko ya wolo, ya palata mpe ya bronze.
he sent his son Hadoram to greet King David and bless him for fighting and defeating Hadadezer, who had been at war with Tou. Hadoram brought all kinds of articles of gold and silver and bronze,
11 Mokonzi Davidi abulisaki biloko yango epai na Yawe, ndenge asalaki na wolo mpe palata oyo azwaki na bikolo nyonso, na Edomi, na Moabi, na Amoni, na Filisitia mpe na Amaleki.
and King David dedicated these to the LORD, along with the silver and gold he had carried off from all these nations—from Edom and Moab, and from the Ammonites, Philistines, and Amalekites.
12 Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, abomaki bato ya Edomi nkoto zomi na mwambe, kati na Lubwaku ya Mungwa.
Moreover, Abishai son of Zeruiah struck down eighteen thousand Edomites in the Valley of Salt.
13 Davidi atiaki bayangeli kati na Edomi, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
He placed garrisons in Edom, and all the Edomites were subject to David. So the LORD made David victorious wherever he went.
14 Davidi azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba, mpe azalaki kosalela bato na ye nyonso makambo ya sembo mpe ya alima.
Thus David reigned over all Israel and administered justice and righteousness for all his people:
15 Joabi, mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya liboso ya mampinga; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda;
Joab son of Zeruiah was over the army; Jehoshaphat son of Ahilud was the recorder;
16 Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, mpe Abimeleki, mwana mobali ya Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe; Shavisha azalaki mokomi mikanda;
Zadok son of Ahitub and Ahimelech son of Abiathar were priests; Shavsha was the scribe;
17 Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki bakalaka ya liboso pembeni ya mokonzi.
Benaiah son of Jehoiada was over the Cherethites and Pelethites; and David’s sons were chief officials at the king’s side.

< 1 Masolo ya Kala 18 >