< 1 Masolo ya Kala 17 >

1 Wana Davidi avandaki na ndako na ye ya bokonzi, alobaki na mosakoli Natan: — Nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Boyokani ya Yawe ezali kati na ndako ya kapo.
Or, comme David vivait tranquillement en sa demeure, il dit à Nathan, le prophète: "Vois, j’habite un palais de cèdre, et l’arche d’alliance du Seigneur est logée sous une tente!"
2 Natan azongiselaki Davidi: — Sala nyonso oyo ozali na yango na motema, pamba te Nzambe azali elongo na yo.
Nathan répondit à David: "Tout ce qui est dans ta pensée, exécute-le, car le Seigneur est avec toi."
3 Kasi na butu wana, Nzambe alobaki na Natan:
Cependant cette nuit même, la parole de Dieu s’adressa ainsi à Nathan:
4 — Kende koyebisa Davidi, mosali na Ngai: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Ezali yo te moto okotongela Ngai ndako mpo ete navanda kati na yango.
"Va dire à David, mon serviteur: Ainsi a parlé l’Eternel: Ce n’est pas toi qui me construiras un temple pour ma résidence!
5 Banda mokolo oyo nabimisaki Isalaele na Ejipito kino lelo, natikali nanu kovanda na ndako moko te; nazalaki kaka kati na Mongombo, longwa na esika songolo kino na esika pakala.
Pourtant je n’ai pas demeuré dans un temple depuis le jour où je tirai Israël de l’Egypte jusqu’à ce jour, mais j’ai voyagé sous une tente et dans un pavillon.
6 Na bisika nyonso oyo natamboli elongo na bana nyonso ya Isalaele, boni, nasilaki koloba ata na moko kati na bakambi na bango, oyo natiaki mpo na kobatela bato na Ngai: ‘Mpo na nini botongeli Ngai te ndako ya mabaya ya sedele?’ ›
Tout le temps que j’ai marché au milieu d’Israël, ai-je dit à un seul des Juges d’Israël que j’avais donnés pour pasteurs à mon peuple, ai-je dit: Pourquoi ne me bâtissez-vous pas une maison de cèdre?
7 Yebisa sik’oyo Davidi, mosali na Ngai: ‹ Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: Ezali Ngai nde nazwaki yo na zamba epai wapi ozalaki koleisa mpe kobatela bibwele, mpo ete nakomisa yo mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele.
Donc, parle de la sorte à mon serviteur David: Ainsi a parlé l’Eternel-Cebaot: Je t’ai tiré du bercail où tu gardais les brebis, pour que tu deviennes chef de mon peuple Israël.
8 Nazalaki elongo na yo na bisika nyonso oyo okendeki mpe nabomaki banguna na yo nyonso liboso na yo. Sik’oyo, nakokomisa kombo na yo monene lokola bakombo ya bato minene oyo bazali kati na mokili.
Je t’ai assisté dans toutes tes voies, j’ai détruit devant toi tous tes ennemis, et je t’ai fait un nom égal aux plus grands noms de la terre.
9 Nakobongisa esika mpo na bato na Ngai, Isalaele, mpe nakolona bango mpo ete bazala na esika na bango moko mpe batungisa bango lisusu te. Bato mabe bakonyokola bango lisusu te ndenge bazalaki konyokola bango liboso;
J’Ai assigné à mon peuple Israël une résidence où je l’ai implanté et où il se maintiendra et ne sera plus inquiété; des gens pervers ne le molesteront plus comme précédemment.
10 mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakotia lisusu banguna na yo na se ya bokonzi na yo. Boye, nazali koyebisa yo ete Yawe akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo.
Depuis l’époque où j’ai préposé des Juges à mon peuple, j’ai fait plier tous tes ennemis et je t’ai annoncé par là même que c’est l’Eternel qui t’érigera une maison.
11 Tango okosilisa mobembo na yo awa na mokili mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo; mpe nakolendisa bokonzi na ye.
Quand tes jours seront accomplis et que tu auras rejoint tes pères, j’élèverai à ta place ta progéniture un de tes fils et j’affermirai son empire.
12 Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi.
C’Est lui qui m’édifiera un temple, et moi, j’assurerai à jamais son trône.
13 Nakozala tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai; nakotikala kolongola te bolingo na Ngai epai na ye ndenge nalongolaki yango epai ya mokonzi oyo alekaki liboso na yo.
Je lui serai un père, et lui me sera un fils; je ne lui retirerai jamais ma grâce comme je l’ai retirée à celui qui t’a précédé.
14 Nakotia ye mokonzi ya ndako na Ngai mpe ya mokili na Ngai mpo na libela, mpe kiti na ye ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. › »
Je le maintiendrai pour toujours dans ma maison et dans mon royaume, et son trône sera stable pour l’éternité."
15 Natan ayebisaki Davidi maloba oyo nyonso mpe emoniseli oyo nyonso.
Toutes ces paroles et toute cette vision, Nathan les rapporta à David.
16 Mokonzi Davidi akotaki, avandaki liboso ya Yawe mpe alobaki: « Oh Yawe Nzambe, ngai nazali nani, mpe libota na ngai ezali nini, mpo ete okomisa ngai na esika oyo nazali?
Le roi David alla se mettre en présence du Seigneur et il dit: "Qui suis-je, Seigneur Dieu, et qu’est-ce que ma famille, pour que tu m’aies amené jusqu’ici?
17 Mpe lokola nde ekokaki te na miso na Yo, Nzambe na ngai, olobi lisusu na tina na lobi ya libota ya bokonzi ya mosali na Yo! Oh Yawe Nzambe, ozali kozwa ngai lokola moto ya lokumu!
Encore était-ce trop peu à tes yeux, ô Dieu, et tu as annoncé, dans un lointain avenir, le sort de ma famille, me considérant comme un personnage de marque, Seigneur Dieu!
18 Nini oyo Davidi akoki lisusu koloba na Yo mpo na lokumu oyo ozali kopesa na mosali na Yo? Pamba te, oh Yawe, oyebi mosali na Yo.
Que pourrait te dire encore de plus David sur l’honneur fait à ton serviteur? Ton serviteur, tu le connais bien!
19 Oh Yawe, mpo na mosali na Yo mpe kolanda mokano na Yo, okokisi makambo minene oyo mpe osali ete bilaka minene oyo nyonso eyebana.
Seigneur, c’est en faveur de ton serviteur et selon ta volonté que tu as accompli ces grandes choses, de manière à faire connaître tous tes exploits.
20 Oh Yawe, moko te akokani na Yo; mpe, kolanda nyonso oyo toyoki na matoyi na biso, Nzambe mosusu azali te, bobele Yo!
Seigneur, nul n’est comme toi, point de Dieu hormis toi, ainsi que nous l’avons entendu de nos oreilles.
21 Boni, ezali solo na ekolo moko kati na mokili, oyo ekokani na bato na Yo, Isalaele; ekolo oyo, kati na mokili, Nzambe asikola bato na yango mpo na lokumu na Ye moko? Osalaki ete Kombo na yo ekende sango na nzela ya misala minene mpe ya somo oyo osalaki tango obenganaki bikolo liboso ya bato na Yo, oyo akangolaki na Ejipito.
Et y a-t-il comme ton peuple Israël une seule nation sur la terre que Dieu lui-même soit allé délivrer, pour en faire son peuple et t’assurer un nom grand et redoutable, en chassant des nations devant ton peuple que tu as délivré de l’Egypte?
22 Okomisi Isalaele bato na Yo mpo na libela, mpe Yo, Yawe, okomi Nzambe na bango.
Tu t’es consacré ton peuple Israël comme un peuple à toi pour toujours, et toi, ô Eternel, tu es devenu son Dieu.
23 Bongo sik’oyo, oh Yawe, tika ete elaka oyo opesaki epai ya mosali na Yo mpe libota na ye ekokisama mpo na libela! Sala ndenge olakaki.
Et maintenant, ô Seigneur, puisse la parole que tu as dite au sujet de ton serviteur et de sa maison se confirmer à tout jamais! Puisses-tu faire comme tu l’as dit!
24 Boye, sala ete ekokisama, mpo ete Kombo na Yo ekumisama seko na seko mpe bato bakoma kolobaka: ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, azali solo Nzambe mpo na Isalaele! › Boye bokonzi ya libota ya mosali na Yo, Davidi, ekolendisama liboso na Yo.
Oui, qu’elle se réalise, et que ton nom soit exalté à jamais par cette parole: "L’Eternel-Cebaot, le Dieu d’Israël, est un Dieu puissant pour Israël!" Et que la maison de ton serviteur David se maintienne devant toi!
25 Solo, Yo moko, Nzambe na ngai, olakisaki na mosali na Yo ete okosala ete bokonzi ewumela na libota na ye. Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo.
Puisque toi-même, mon Dieu, tu as révélé à l’oreille de ton serviteur ta volonté de lui édifier une maison, ton serviteur s’est trouvé enhardi à t’adresser cette prière.
26 Sik’oyo oh Yawe, ozali Nzambe! Olakaki makambo ya malamu epai ya mosali na Yo.
Or, Seigneur, tu es le vrai Dieu, et toi-même tu as promis ce bien à ton serviteur.
27 Osepeli sik’oyo kopambola libota ya mosali na Yo mpo ete ewumela seko liboso na Yo; pamba te ezali Yo, Yawe, nde opamboli yango, mpe epambolami mpo na libela. »
Veuille donc bénir la maison de ton serviteur: qu’elle subsiste constamment devant toi, puisque aussi bien, si toi, Eternel, tu la bénis, elle restera bénie à tout jamais!"

< 1 Masolo ya Kala 17 >