< 1 Masolo ya Kala 16 >
1 Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango, mpe babonzaki liboso ya Nzambe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.
Attulerunt igitur arcam Dei, et constituerunt eam in medio tabernaculi, quod tetenderat ei David: et obtulerunt holocausta, et pacifica coram Deo.
2 Tango Davidi asilisaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, apambolaki bato na Kombo na Yawe.
Cumque complesset David offerens holocausta, et pacifica, benedixit populo in nomine Domini.
3 Bongo apesaki na moto nyonso ya Isalaele: lipa, gato oyo basala na bambuma ya dati mpe gato oyo basala na bambuma ya vino ya kokawuka.
Et divisit universis per singulos, a viro usque ad mulierem tortam panis, et partem assæ carnis bubalæ, et frixam oleo similam.
4 Davidi atiaki ndambo ya Balevi mpo na kosala mosala liboso ya Sanduku ya Yawe, mpo na kokanisa, mpo na kosanzola mpe mpo na kokumisa Yawe, Nzambe ya Isalaele:
Constituitque coram arca Domini de Levitis, qui ministrarent, et recordarentur operum eius, et glorificarent, atque laudarent Dominum Deum Israel:
5 Azafi azalaki mokambi; Zakari azalaki molandi na ye; mpe Yeyeli, Shemiramoti, Yeyeli, Matitia, Eliabi, Benaya, Obedi-Edomi mpe Yeyeli bazalaki kobeta nzenze mpe lindanda; mpe Azafi azalaki kobeta manzanza.
Asaph principem, et secundum eius Zachariam: Porro Iahiel, et Semiramoth, et Iehiel, et Mathathiam, et Eliab, et Banaiam, et Obededom: Iehiel super organa psalterii, et lyras: Asaph autem ut cymbalis personaret;
6 Banganga-Nzambe Benaya mpe Yaazieli bazalaki kobeta tango nyonso bakelelo liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Nzambe.
Banaiam vero, et Iaziel sacerdotes, canere tuba iugiter coram arca fœderis Domini.
7 Ezalaki mokolo wana nde Davidi aponaki na mbala ya liboso Azafi mpe bandeko na ye, mpo ete bakumisa Yawe:
In illo die fecit David principem ad confitendum Domino Asaph, et fratres eius.
8 Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye, bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo!
Confitemini Domino, et invocate nomen eius: notas facite in populis adinventiones eius.
9 Boyemba mpo na lokumu na Ye, bosanzola Ye na mindule! Botatolaka tango nyonso misala minene na Ye nyonso!
Cantate ei, et psallite ei: et narrate omnia mirabilia eius.
10 Bosepela na Kombo na Ye ya bule! Tika ete mitema ya bato oyo balukaka Yawe etonda na esengo!
Laudate nomen sanctum eius: lætetur cor quærentium Dominum.
11 Bomipesa na Yawe mpe bosenga makasi na Ye! Bolukaka tango nyonso elongi na Ye!
Quærite Dominum, et virtutem eius: quærite faciem eius semper.
12 Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalaki, bitumbu oyo apesaki,
Recordamini mirabilium eius quæ fecit: signorum illius, et iudiciorum oris eius.
13 bino bakitani ya Isalaele, mosali na Ye; bino bana mibali ya Jakobi, baponami na Ye!
Semen Israel servi eius: filii Iacob electi eius.
14 Yawe azali Nzambe na biso, mikano na Ye ekambaka mokili mobimba.
Ipse Dominus Deus noster: in universa terra iudicia eius.
15 Akanisaka tango nyonso Boyokani na Ye, bilaka na Ye mpo na bikeke nkoto moko,
Recordamini in sempiternum pacti eius: sermonis, quem præcepit in mille generationes.
16 boyokani oyo asalaki elongo na Abrayami, mpe ndayi oyo alapaki epai ya Izaki.
Quem pepigit cum Abraham: et iuramenti illius cum Isaac.
17 Akokisaki bosolo na yango epai ya Jakobi lokola mobeko, epai ya Isalaele lokola boyokani ya libela na libela
Et constituit illud Iacob in præceptum: et Israel in pactum sempiternum,
18 tango alobaki: « Nakopesa yo mokili ya Kanana lokola libula oyo epesameli yo. »
dicens: Tibi dabo Terram Chanaan, funiculum hereditatis vestræ.
19 Bozalaki kaka motango moke ya bato mpe bapaya kati na yango;
Cum essent pauci numero, parvi et coloni eius.
20 bozalaki koyengayenga longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu, longwa na mokili moko kino na mokili mosusu;
Et transierunt de gente in gentem, et de regno ad populum alterum.
21 kasi Yawe atikaki moto moko te konyokola bango, apamelaki bakonzi na tina na bango:
Non dimisit quemquam calumniari eos, sed increpavit pro eis reges.
22 « Bosimba bapakolami na Ngai te, bosala mabe te epai na basakoli na Ngai. »
Nolite tangere Christos meos: et in prophetis meis nolite malignari.
23 Bino bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe! Bosakolaka lobiko na Ye mokolo na mokolo!
Cantate Domino omnis terra, annunciate ex die in diem salutare eius.
24 Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota! Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso!
Narrate in gentibus gloriam eius: in cunctis populis mirabilia eius.
25 Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.
Quia magnus Dominus, et laudabilis nimis: et horribilis super omnes deos.
26 Pamba te banzambe nyonso ya bikolo ezali kaka bikeko ya pamba, nzokande Yawe nde akela likolo.
Omnes enim dii populorum, idola: Dominus autem cælos fecit.
27 Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye, makasi mpe esengo ezali na esika oyo avandaka.
Confessio et magnificentia coram eo: fortitudo et gaudium in loco eius.
28 Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe, bosanzola Yawe na kopanza sango ya nkembo mpe nguya na Ye!
Afferte Domino familiæ populorum: afferte Domino gloriam et imperium.
29 Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo! Bomema makabo mpe boya liboso na Ye, bogumbamela Yawe mpo na kongenga ya bosantu na Ye!
Date Domino gloriam, nomini eius, levate sacrificium, et venite in conspectu eius: et adorate Dominum in decore sancto.
30 Bino, bato ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye! Solo, mokili elendisama makasi, ekoningana te.
Commoveatur a facie eius omnis terra: ipse enim fundavit orbem immobilem.
31 Tika ete likolo esepela mpe mabele ezala kati na esengo! Tika ete baloba kati na bikolo: « Yawe azali mokonzi! »
Lætentur cæli, et exultet terra: et dicant in nationibus, Dominus regnavit.
32 Tika ete ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango etia makelele; tika ete zamba mpe nyonso oyo ezali kati na yango esepela!
Tonet mare, et plenitudo eius: exultent agri, et omnia quæ in eis sunt.
33 Boye, banzete ya zamba ekoyemba, ekoyemba na esengo liboso ya Yawe, pamba te Yawe azali koya kosambisa mabele.
Tunc laudabunt ligna saltus coram Domino: quia venit iudicare terram.
34 Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko.
Confitemini Domino, quoniam bonus: quoniam in æternum misericordia eius.
35 Boganga: « Oh Nzambe Mobikisi na biso, bikisa biso, sangisa biso mpe kangola biso wuta na maboko ya bokonzi ya bikolo mosusu, mpo ete tosanzola Kombo na Yo ya bule mpe tosepela na mosala ya kokumisa Yo! »
Et dicite: Salva nos Deus salvator noster; et congrega nos, et erue de gentibus, ut confiteamur nomini sancto tuo, et exultemus in carminibus tuis.
36 Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko! Bato nyonso balobaki: « Amen! » Mpe bakumisaki Yawe!
Benedictus Dominus Deus Israel ab æterno usque in æternum: et dicat omnis populo: Amen, et hymnum Domino.
37 Davidi apesaki mokumba, epai ya Azafi mpe bandeko na ye, ya kosala mosala liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe kolanda bikateli ya mokolo na mokolo.
Reliquit itaque ibi coram arca fœderis Domini Asaph, et fratres eius, ut ministrarent in conspectu arcæ iugiter per singulos dies, et vices suas.
38 Apesaki lisusu mokumba epai ya Obedi-Edomi, mwana mobali ya Yedutuni, mpe bandeko na bango, tuku motoba na mwambe, ya kosala mosala ya kokengela bikuke elongo na Osa.
Porro Obededom, et fratres eius sexaginta octo; et Obededom filium Idithun, et Hosa constituit ianitores.
39 Davidi atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki mpe Banganga-Nzambe mosusu, liboso ya Mongombo ya Yawe na esambelo ya likolo ya ngomba, oyo ezalaki na Gabaoni,
Sadoc autem sacerdotem, et fratres eius sacerdotes, coram tabernaculo Domini in excelso, quod erat in Gabaon,
40 mpo na kobonza tango nyonso bambeka ya kotumba epai na Yawe, na etumbelo na yango, na tongo mpe na pokwa, kolanda bikateli oyo ekomama na mobeko oyo Yawe apesaki na Isalaele.
ut offerrent holocausta Domino super altare holocautomatis iugiter, mane et vespere, iuxta omnia quæ scripta sunt in lege Domini, quam præcepit Israeli.
41 Emani mpe Yedutuni bazalaki elongo na bango, mpe bamosusu oyo baponamaki na bakombo na bango mpo na kokumisa Yawe na maloba oyo: « Mpo ete bolingo na Ye ekowumela seko. »
Et post eum Heman, et Idithun, et reliquos electos, unumquemque vocabulo suo ad confitendum Domino: Quoniam in æternum misericordia eius.
42 Emani mpe Yedutuni baponamaki mpo na kobeta bakelelo, manzanza mpe bibetelo mosusu ya mindule mpo na kobongisa banzembo na tina na lokumu ya Nzambe. Bana mibali ya Yedutuni bazalaki bakengeli bikuke.
Heman quoque, et Idithun canentes tuba, et quatientes cymbala, et omnia musicorum organa ad canendum Deo; filios autem Idithun fecit esse portarios.
43 Bato nyonso bazongaki, moto na moto epai na ye, mpe Davidi azongaki na ndako na ye mpo na kopambola libota na ye.
Reversusque est omnis populus in domum suam: et David, ut benediceret etiam domui suæ.