< 1 Masolo ya Kala 15 >
1 Tango Davidi asilisaki kotonga bandako mpo na ye moko kati na engumba ya Davidi, abongisaki esika mpo na Sanduku ya Nzambe mpe atelemisaki ndako ya kapo mpo na yango.
David se bâtit des maisons dans la cité de David; il prépara un lieu pour l'arche de Dieu, et lui dressa une tente.
2 Davidi alobaki: « Moto moko te, longola kaka Balevi, akoki komema Sanduku ya Boyokani ya Nzambe, pamba te Yawe aponaki bango mpo na komema Sanduku na Ye mpe kosala mosala na Ye mpo na libela. »
Alors David dit: L'arche de Dieu ne doit être portée que par les Lévites; car l'Éternel les a choisis pour porter l'arche de Dieu, et pour en faire le service à toujours.
3 Davidi asangisaki kati na Yelusalemi bana nyonso ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Yawe na esika oyo abongisaki mpo na yango.
Et David assembla tout Israël à Jérusalem, pour faire monter l'arche de l'Éternel au lieu qu'il lui avait préparé.
4 Davidi asangisaki lisusu bakitani ya Aron mpe Balevi:
David assembla aussi les enfants d'Aaron et les Lévites:
5 Mpo na bakitani ya Keati: mokambi Urieli elongo na bandeko na ye ya libota nkama moko na tuku mibale;
Des enfants de Kéhath, Uriel le chef, et ses frères, cent vingt;
6 mpo na bakitani ya Merari: mokambi Asaya elongo na bandeko na ye ya libota nkama mibale na tuku mibale;
Des enfants de Mérari, Asaja le chef, et ses frères, deux cent vingt;
7 mpo na bakitani ya Gerishoni: mokambi Joeli elongo na bandeko na ye ya libota, nkama moko na tuku misato;
Des enfants de Guershom, Joël le chef, et ses frères, cent trente;
8 mpo na bakitani ya Elitsafani: mokambi Shemaya elongo na bandeko na ye ya libota, nkama mibale;
Des enfants d'Élitsaphan, Shémaja le chef, et ses frères, deux cents;
9 mpo na bakitani ya Ebron: mokambi Elieli elongo na bandeko na ye ya libota, tuku mwambe;
Des enfants d'Hébron, Éliel le chef, et ses frères, quatre-vingts;
10 mpo na bakitani ya Uzieli: mokambi Aminadabi elongo na bandeko na ye ya libota, nkama moko na zomi na mibale.
Des enfants d'Uziel, Amminadab le chef, et ses frères, cent douze.
11 Davidi abengaki Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari elongo na Balevi oyo: Urieli, Asaya, Joeli, Shemaya, Elieli mpe Aminadabi.
Puis David appela Tsadok et Abiathar, les sacrificateurs, et les Lévites, Uriel, Asaja, Joël, Shémaja, Éliel et Amminadab.
12 Alobaki na bango: « Bozali bakambi ya mabota ya Balevi, bino elongo na bandeko ya mabota na bino; bomipetola mpo na komema Sanduku ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na esika oyo nabongisi mpo na yango.
Et il leur dit: Vous qui êtes les chefs des pères des Lévites, sanctifiez-vous, vous et vos frères, et faites monter l'arche de l'Éternel, le Dieu d'Israël, au lieu que je lui ai préparé.
13 Pamba te lokola bino Balevi bozalaki te na mbala ya liboso, yango wana Yawe, Nzambe na biso, asilikelaki biso makasi; pamba te totunaki Ye te ndenge nini tokokaki komema yango kolanda mibeko. »
Parce que vous n'y étiez pas la première fois, l'Éternel notre Dieu fit une brèche parmi nous; car nous ne le recherchâmes pas conformément à ce qui est ordonné.
14 Boye, Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki mpo na komema Sanduku ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
Les sacrificateurs et les Lévites se sanctifièrent donc pour faire monter l'arche de l'Éternel, Dieu d'Israël.
15 Bongo Balevi bamemaki na banzete Sanduku ya Nzambe na mapeka na bango ndenge kaka Moyize atindaki, kolanda Liloba na Yawe.
Les fils des Lévites portèrent l'arche de Dieu sur leurs épaules, avec des barres, comme Moïse l'avait commandé, selon la parole de l'Éternel.
16 Davidi alobaki na bakambi ya Balevi ete bapona, kati na bandeko na bango, bayembi mpo na koyemba banzembo ya esengo, na bibetelo mindule: nzenze, lindanda mpe manzanza.
Et David dit aux chefs des Lévites de disposer leurs frères, les chantres, avec des instruments de musique, des lyres, des harpes et des cymbales, qu'ils feraient retentir de sons éclatants, en signe de réjouissance.
17 Balevi baponaki Emani, mwana mobali ya Joeli; Azafi, mwana mobali ya Berekia, kati na bandeko na ye ya mibali; Etani, mwana mobali ya Kushaya, kati na bana ya Merari, na bandeko na ye ya mibali.
Les Lévites disposèrent donc Héman, fils de Joël; et d'entre ses frères, Asaph, fils de Bérékia; et des enfants de Mérari, leurs frères, Éthan, fils de Kushaja;
18 Mpe mpo na kosunga bango, baponaki Balevi mosusu: Zakari, Beni, Yazieli, Shemiramoti, Yeyeli, Uni, Eliabi, Benaya, Maaseya, Matitia, Elifele, Mikineya, Obedi-Edomi mpe Yeyeli. Bango nyonso bazalaki bakengeli bikuke.
Et avec eux leurs frères, du second rang, Zacharie, Ben, Jaaziel, Shémiramoth, Jéhiel, Unni, Éliab, Bénaja, Maaséja, Matthithia, Éliphélé, Miknéja, Obed-Édom et Jéiel, les portiers.
19 Babeti miziki: Emani, Azafi mpe Etani; bango bazalaki kobeta manzanza oyo basala na bronze.
Les chantres Héman, Asaph et Éthan, avaient des cymbales d'airain qu'ils faisaient retentir.
20 Zakari, Azieli, Shemiramoti, Yeyeli, Uni, Eliabi, Maaseya mpe Benaya; bango bazalaki kobeta nzenze na mongongo ya soprano.
Zacharie, Aziel, Shémiramoth, Jéhiel, Unni, Éliab, Maaséja et Bénaja avaient des lyres sur Alamoth;
21 Matitia, Elifele, Mikineya, Obedi-Edomi, Yeyeli mpe Azazia; bango bazalaki kobeta mandanda ya basinga mwambe mpo na kotambolisa banzembo.
Et Matthithia, Éliphélé, Miknéja, Obed-Édom, Jéiel et Azazia avaient des harpes à huit cordes, pour conduire le chant.
22 Kenania, mokambi ya Balevi, aponamaki mpo na kotambolisa banzembo; pamba te ayebaki mosala yango malamu.
Kénania, chef des Lévites pour la musique, dirigeait la musique; car il était habile.
23 Berekia mpe Elikana, bazalaki bakengeli ya Sanduku ya Boyokani.
Bérékia et Elkana étaient portiers de l'arche.
24 Banganga-Nzambe Shebania, Jozafati, Netaneeli, Amasayi, Zakari, Benaya mpe Eliezeri; bazalaki kobeta kelelo liboso ya Sanduku ya Nzambe. Obedi-Edomi mpe Yeyiya bazalaki mpe bakengeli Sanduku ya Boyokani.
Shébania, Joshaphat, Nathanaël, Amazaï, Zacharie, Bénaja et Éliézer, sacrificateurs, sonnaient des trompettes devant l'arche de Dieu; et Obed-Édom et Jéchija étaient portiers de l'arche.
25 Davidi, bakambi ya Isalaele mpe bakonzi ya basoda nkoto moko bakendeki kozwa na esengo Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na ndako ya Obedi-Edomi.
David, les anciens d'Israël et les chefs de milliers, se mirent donc en chemin pour faire monter l'arche de l'alliance de l'Éternel de la maison d'Obed-Édom, avec réjouissance.
26 Mpe mpo ete Yawe asunga Balevi oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, babonzaki lokola mbeka bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali.
Et il arriva que Dieu ayant assisté les Lévites qui portaient l'arche de l'alliance de l'Éternel, on sacrifia sept taureaux et sept béliers.
27 Davidi elongo na Balevi nyonso oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani, bayembi mpe Kenania, mokambi ya bayembi: bango nyonso balataki banzambala ya lino ya talo. Kasi Davidi abakisaki lisusu efode ya lino na likolo.
David était vêtu d'un manteau de fin lin, ainsi que tous les Lévites qui portaient l'arche, les chantres et Kénania, le chef de musique parmi les chantres; et David avait sur lui un éphod de lin.
28 Bato nyonso ya Isalaele bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na kobeta milolo ya esengo, na kobeta maseke, bakelelo, manzanza, banzenze mpe mandanda.
Et tout Israël fit monter l'arche de l'alliance de l'Éternel avec des cris de joie, au son du cor, des trompettes et des cymbales, faisant retentir les lyres et les harpes.
29 Tango Sanduku ya Boyokani ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina na esengo, ayinaki ye kati na motema na ye.
Mais, comme l'arche de l'alliance de l'Éternel entrait dans la cité de David, Mical, fille de Saül, regardait par la fenêtre; et, voyant le roi David sauter et danser, elle le méprisa dans son cœur.