< 1 Masolo ya Kala 14 >
1 Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, bato oyo bapasolaka mabanga mpe basharipantie; mpe batongelaki ye ndako.
А Хирам, цар тирски посла посланике к Давиду и дрва кедрових и зидара и дрводеља да му саграде кућу.
2 Davidi asosolaki ete Yawe nde akomisaki ye mokonzi ya Isalaele mpe ete azalaki kotombola bokonzi na ye makasi mpo na Isalaele, bato na Ye.
И разуме Давид да га је Господ утврдио за цара над Израиљем и да се царство његово подиже високо ради народа Његовог Израиља.
3 Davidi abalaki lisusu basi ebele kati na Yelusalemi mpe abotaki lisusu bana ebele ya mibali mpe ya basi.
И Давид узе још жена у Јерусалиму и изроди још синова и кћери.
4 Tala bakombo ya bana na ye ya mibali oyo babotamaki na Yelusalemi: Shamuwa, Shobabi, Natan, Salomo,
И ово су имена оних који му се родише у Јерусалиму: Сануја и Совав, Натан и Соломун,
5 Yibari, Elishuwa, Elipeleti,
И Јевар и Елисуја и Елфалет,
7 Elishama, Beliada mpe Elifeleti.
И Елисама и Велијада и Елифалет.
8 Tango bato ya Filisitia bayokaki sango ete bapakoli Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele mobimba, bango nyonso bakendeki koluka ye. Kasi tango Davidi ayokaki sango ya mabongisi na bango, abimaki mpo na kokutana na bango.
А Филистеји чувши да је Давид помазан за цара над свим Израиљем, изиђоше сви Филистеји да траже Давида; а Давид чувши то изиђе пред њих.
9 Bato ya Filisitia bakomaki mpe bapanzanaki na lubwaku ya bakitani ya Rafa.
И Филистеји дошавши раширише се по долини рафајској.
10 Davidi atunaki Nzambe: — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia? Okokaba bango solo na maboko na ngai? Yawe azongiselaki ye: — Kende, pamba te nakokaba bango na maboko na yo.
Тада Давид упита Господа говорећи: Хоћу ли изаћи на Филистеје? И хоћеш ли их дати у моје руке? А Господ му рече: Изађи, и даћу их у твоје руке.
11 Bato ya Filisitia bamataki na Bali-Peratsimi, mpe Davidi alongaki bango kuna. Bongo Davidi alobaki: « Na nzela ya loboko na ngai, Nzambe afungoleli ngai nzela kati na banguna na ngai, ndenge mayi epasolaka nzela. » Yango wana babengaki esika yango Bala-Peratsimi.
Тада отидоше у Вал-Ферасим, и поби их онде Давид, и рече Давид: Продре Бог непријатеље моје мојом руком, као што вода продире. Отуда се прозва место Вал-Ферасим.
12 Bato ya Filisitia basundolaki kuna banzambe na bango, mpe Davidi apesaki mitindo ete batumba yango na moto.
И оставише онде богове своје; а Давид заповеди, те их спалише огњем.
13 Sima na mwa tango, bato ya Filisitia bayaki mpe bapanzanaki lisusu kati na lubwaku.
А Филистеји опет по други пут раширише се по оном долу.
14 Bongo Davidi atunaki lisusu Nzambe, mpe Nzambe azongiselaki ye: « Tango okobundisa bango, kolanda bango na sima te; kasi tambola mopanzi, mosika na bango. Bongo tango okokoma epai bango bazali, bimela bango na liboso, liboso ya zamba ya banzete ya mirie.
И Давид опет упита Бога, а Бог му рече: Не иди за њима, него се врати од њих, па удари на њих према дудовима.
15 Tango okoyoka lokito ya makolo ya bato na likolo ya banzete ya mirie, na tango wana nde okobima mbala moko mpo na kobunda; pamba te ekolakisa ete Nzambe abimi liboso na yo mpo na kobeta mampinga ya bato ya Filisitia. »
И кад чујеш да зашушти по врховима од дудова, тада изиђи у бој; јер ће поћи Бог пред тобом да побије војску филистејску.
16 Davidi asalaki ndenge Nzambe atindaki ye mpe abomaki bato ya Filisitia, longwa na Gabaoni kino na Gezeri.
И учини Давид како му заповеди Бог и поби војску филистејску од Гаваона до Гезера.
17 Kombo ya Davidi ekendeki sango na mokili mobimba mpe Yawe asalaki ete bikolo nyonso ebanga Davidi.
И разгласи се име Давидово по свим земљама; и Господ зададе страх од њега свим народима.