< 1 Masolo ya Kala 13 >

1 Davidi asangisaki bakonzi ya basoda, bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama elongo na bato mosusu ya lokumu.
ויועץ דויד עם שרי האלפים והמאות לכל נגיד׃
2 Davidi alobaki na lisanga mobimba ya Isalaele: « Soki bomoni yango malamu mpe soki yango ezali mokano na Yawe, Nzambe na biso, tika ete totinda sango epai ya bandeko na biso oyo batikali na bituka nyonso ya Isalaele mpe epai ya Banganga-Nzambe elongo na Balevi, kati na bingumba oyo bango bazali kovanda mpo ete baya kosangana na biso.
ויאמר דויד לכל קהל ישראל אם עליכם טוב ומן יהוה אלהינו נפרצה נשלחה על אחינו הנשארים בכל ארצות ישראל ועמהם הכהנים והלוים בערי מגרשיהם ויקבצו אלינו׃
3 Tozongisa Sanduku ya Nzambe na biso epai na biso, pamba te tolandelaki yango te tango Saulo azalaki mokonzi. »
ונסבה את ארון אלהינו אלינו כי לא דרשנהו בימי שאול׃
4 Lisanga mobimba endimaki ete basala bongo, pamba te likambo yango emonanaki malamu na miso ya bato nyonso.
ויאמרו כל הקהל לעשות כן כי ישר הדבר בעיני כל העם׃
5 Davidi asangisaki bana nyonso ya Isalaele longwa na moluka ya Ejipito kino na Lebo-Amati, mpo na kozongisa Sanduku ya Nzambe wuta na Kiriati-Yearimi.
ויקהל דויד את כל ישראל מן שיחור מצרים ועד לבוא חמת להביא את ארון האלהים מקרית יערים׃
6 Davidi elongo na basoda nyonso ya Isalaele bakendeki na Baala, na Kiriati-Yearimi oyo ezali kati na Yuda, mpo na kolongola kuna Sanduku ya Nzambe, oyo, liboso na yango, bazalaki kobelela Kombo ya Yawe oyo avandaka kati na basheribe.
ויעל דויד וכל ישראל בעלתה אל קרית יערים אשר ליהודה להעלות משם את ארון האלהים יהוה יושב הכרובים אשר נקרא שם׃
7 Batiaki Sanduku ya Nzambe na likolo ya shario ya sika mpe bamemaki yango wuta na ndako ya Abinadabi. Uza mpe Ayiyo nde bazalaki kotambolisa shario yango.
וירכיבו את ארון האלהים על עגלה חדשה מבית אבינדב ועזא ואחיו נהגים בעגלה׃
8 Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela makasi na liboso ya Nzambe, na koyemba mpe na kobeta mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, manzanza mpe bakelelo.
ודויד וכל ישראל משחקים לפני האלהים בכל עז ובשירים ובכנרות ובנבלים ובתפים ובמצלתים ובחצצרות׃
9 Tango bakomaki na etando ya Kidoni, Uza asembolaki loboko na ye mpo na kosimba Sanduku ya Nzambe, pamba te bangombe eselumukaki mpe elingaki kokweyisa Sanduku ya Nzambe.
ויבאו עד גרן כידן וישלח עזא את ידו לאחז את הארון כי שמטו הבקר׃
10 Yawe asilikelaki Uza makasi mpe abetaki ye mpo ete asembolaki loboko na ye mpe asimbaki Sanduku ya Nzambe. Boye, Uza akufaki kaka wana liboso ya Nzambe.
ויחר אף יהוה בעזא ויכהו על אשר שלח ידו על הארון וימת שם לפני אלהים׃
11 Davidi asilikaki makasi mpo ete Yawe afungolaki lidusu na kobeta Uza; yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango « Peretsi-Uza. »
ויחר לדויד כי פרץ יהוה פרץ בעזא ויקרא למקום ההוא פרץ עזא עד היום הזה׃
12 Na mokolo wana, Davidi abangaki Nzambe mpe amitunaki: « Ndenge nini namema Sanduku ya Nzambe epai na ngai? »
ויירא דויד את האלהים ביום ההוא לאמר היך אביא אלי את ארון האלהים׃
13 Boye, Davidi amemaki te Sanduku ya Nzambe epai na ye, kati na engumba ya Davidi; kasi atiaki yango na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati.
ולא הסיר דויד את הארון אליו אל עיר דויד ויטהו אל בית עבד אדם הגתי׃
14 Sanduku ya Nzambe evandaki sanza misato kati na ndako ya Obedi-Edomi, mpe Yawe apambolaki libota ya Obedi-Edomi mpe biloko na ye nyonso.
וישב ארון האלהים עם בית עבד אדם בביתו שלשה חדשים ויברך יהוה את בית עבד אדם ואת כל אשר לו׃

< 1 Masolo ya Kala 13 >