< 1 Masolo ya Kala 11 >

1 Bato nyonso ya Isalaele basanganaki na Ebron, epai ya Davidi mpe balobaki: « Biso na yo, tozali nzoto moko mpe makila moko na yo.
ויקבצו כל ישראל אל דויד חברונה לאמר הנה עצמך ובשרך אנחנו
2 Na kala, ezala na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe, Nzambe na yo, alobaki na yo: ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »
גם תמול גם שלשום גם בהיות שאול מלך--אתה המוציא והמביא את ישראל ויאמר יהוה אלהיך לך אתה תרעה את עמי את ישראל ואתה תהיה נגיד על עמי ישראל
3 Tango bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi, Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele, kolanda Liloba na Yawe na nzela ya Samuele.
ויבאו כל זקני ישראל אל המלך חברונה ויכרת להם דויד ברית בחברון לפני יהוה וימשחו את דויד למלך על ישראל כדבר יהוה ביד שמואל
4 Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bakendeki kobundisa Yelusalemi oyo bazalaki kobenga « Yebusi. » Bato oyo bazalaki kovanda kuna bazali bato ya Yebusi.
וילך דויד וכל ישראל ירושלם היא יבוס ושם היבוסי ישבי הארץ
5 Bavandi ya Yebusi balobaki na Davidi: « Okokota awa te! » Kasi Davidi abotolaki ndako makasi ya Siona, oyo ezali engumba ya Davidi.
ויאמרו ישבי יבוס לדויד לא תבוא הנה וילכד דויד את מצדת ציון היא עיר דויד
6 Davidi alobaki na bato na ye: « Moto oyo akobundisa mpe akolonga bato ya Yebusi, akokoma mokonzi ya liboso ya basoda. » Joabi, mwana mobali ya Tseruya, atelemaki moto ya liboso mpo na kobundisa bato ya Yebusi mpe akomaki mokonzi ya liboso ya mampinga.
ויאמר דויד--כל מכה יבוסי בראשונה יהיה לראש ולשר ויעל בראשונה יואב בן צרויה ויהי לראש
7 Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi; yango wana babengaki yango « Engumba ya Davidi. »
וישב דויד במצד על כן קראו לו עיר דויד
8 Mpe atongaki bandako zingazinga na yango, longwa na Milo kino na mir ya kati. Bongo Joabi abongisaki bisika oyo etikalaki kati na engumba.
ויבן העיר מסביב מן המלוא ועד הסביב ויואב יחיה את שאר העיר
9 Nguya ya Davidi ezalaki komata se komata, mpe Yawe, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, azalaki elongo na ye.
וילך דויד הלוך וגדול ויהוה צבאות עמו
10 Tala bakombo ya bakonzi ya basoda ya mpiko ya Davidi oyo, elongo na Isalaele mobimba, basungaki ye mpo na kokomisa bokonzi na ye makasi, kolanda liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele.
ואלה ראשי הגברים אשר לדויד המתחזקים עמו במלכותו עם כל ישראל להמליכו--כדבר יהוה על ישראל
11 Tala bakombo ya basoda ya mpiko ya Davidi: Yashobeami, mwana mobali ya Akimoni, azalaki mokonzi ya limpinga ya basoda misato ya mpiko; abomaki na likonga bato nkama misato na etumba moko.
ואלה מספר הגברים אשר לדויד ישבעם בן חכמוני ראש השלושים (השלישים)--הוא עורר את חניתו על שלש מאות חלל בפעם אחת
12 Eleazari, mwana mobali ya Dodo, moto ya Aoyi: azalaki moko kati na limpinga ya basoda misato ya mpiko;
ואחריו אלעזר בן דודו האחוחי הוא בשלושה הגברים
13 mpe azalaki elongo na Davidi, na engumba Pasi-Damini, tango bato ya Filisitia basanganaki mpo na bitumba, mpe basoda ya Isalaele bakimaki liboso na bango. Ezalaki kuna mpe na elanga moko etonda na bambuma ya orje.
הוא היה עם דויד בפס דמים והפלשתים נאספו שם למלחמה ותהי חלקת השדה מלאה שעורים והעם נסו מפני פלשתים
14 Kasi basoda ya Eleazari babombamaki kati na elanga, babundelaki yango mpe babomaki bato ya Filisitia. Yawe apesaki bango elonga monene.
ויתיצבו בתוך החלקה ויצילוה ויכו את פלשתים ויושע יהוה תשועה גדולה
15 Kati na basoda tuku misato ya mpiko, misato bayaki epai ya Davidi, na libanga monene oyo ezalaki pene ya ebombamelo ya mabanga ya Adulami. Nzokande, basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya bakitani ya Rafa.
וירדו שלושה מן השלושים ראש על הצר אל דויד--אל מערת עדלם ומחנה פלשתים חנה בעמק רפאים
16 Na tango yango, Davidi azalaki kati na ebombamelo moko batonga makasi, mpe basoda ya Filisitia bazalaki kati na Beteleemi.
ודויד אז במצודה ונציב פלשתים אז בבית לחם
17 Mbala moko, Davidi ayokaki posa ya mayi mpe alobaki: « Nani akomemela ngai mayi ya libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpo ete namela? »
ויתאו דויד ויאמר מי ישקני מים מבור בית לחם אשר בשער
18 Basoda nyonso misato ya mpiko bakotaki na mayele kati na molako ya bato ya Filisitia, batokaki mayi na libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpe bamemaki yango epai ya Davidi. Kasi Davidi aboyaki komela mayi yango; asopaki yango na mabele lokola likabo ya masanga mpo na Yawe.
ויבקעו השלשה במחנה פלשתים וישאבו מים מבור בית לחם אשר בשער וישאו ויבאו אל דויד ולא אבה דויד לשתותם וינסך אתם ליהוה
19 Davidi alobaki: « Tika ete Nzambe na ngai apesa ngai etumbu soki nameli mayi oyo! Boni, namela penza mayi oyo ezali lokola makila ya bato oyo bandimaki kokende mpe batekaki milimo na bango mpo ete batoka yango? » Davidi aboyaki komela mayi yango. Yango nde misala ya kokamwa oyo basoda misato ya mpiko basalaki.
ויאמר חלילה לי מאלהי מעשות זאת הדם האנשים האלה אשתה בנפשותם כי בנפשותם הביאום ולא אבה לשתותם אלה עשו שלשת הגבורים
20 Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka.
ואבשי אחי יואב הוא היה ראש השלושה והוא עורר את חניתו על שלש מאות חלל ולא (ולו) שם בשלושה
21 Kati na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya mibale, ye nde azwaki lokumu koleka mpe akomaki mokonzi na bango, kasi akokanaki te na basoda misato ya limpinga ya liboso.
מן השלושה בשנים נכבד ויהי להם לשר ועד השלושה לא בא
22 Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa: abomaki bilombe mibale ya mboka Moabi; mpe na mokolo moko ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi.
בניה בן יהוידע בן איש חיל רב פעלים מן קבצאל הוא הכה את שני אריאל מואב והוא ירד והכה את הארי בתוך הבור ביום השלג
23 Ye mpe moto abomaki mbinga mobali moko ya Ejipito, oyo azalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, mpe asimbaki na loboko na ye likonga moko lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka. Abundisaki moto ya Ejipito na lingenda, abotolaki ye likonga oyo azalaki na yango na loboko mpe abomaki ye na likonga na ye moko.
והוא הכה את האיש המצרי איש מדה חמש באמה וביד המצרי חנית כמנור ארגים וירד אליו בשבט ויגזל את החנית מיד המצרי ויהרגהו בחניתו
24 Yango nde misala ya kokamwa oyo Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, asalaki; ye mpe akendeki sango kati na basoda misato ya mpiko.
אלה עשה בניהו בן יהוידע ולו שם בשלושה הגברים
25 Kati na basoda tuku misato ya mpiko, ye nde azalaki na lokumu monene koleka, kasi akokanaki te na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya liboso. Mpe Davidi akomisaki ye mokonzi ya bakengeli na ye.
מן השלושים הנו נכבד הוא ואל השלשה לא בא וישימהו דויד על משמעתו
26 Basoda ya mpiko bazalaki: Asaeli, ndeko mobali ya Joabi; Elanani, mwana mobali ya Dodo, moto ya Beteleemi;
וגבורי החילים עשהאל אחי יואב אלחנן בן דודו מבית לחם
27 Shamoti, moto ya Arori; Eletsi, moto ya Peloni;
שמות ההרורי חלץ הפלוני
28 Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya Tekoa; Abiezeri, moto ya Anatoti;
עירא בן עקש התקועי אביעזר הענתותי
29 Sibekayi, moto ya Usha; Ilayi, moto ya Aoyi;
סבכי החשתי עילי האחוחי
30 Maarayi, moto ya Netofa; Eledi, mwana mobali ya Baana, moto ya Netofa;
מהרי הנטפתי חלד בן בענה הנטופתי
31 Itayi, mwana mobali ya Ribayi, moto ya Gibea ya libota ya Benjame; Benaya, moto ya Piratoni;
איתי בן ריבי מגבעת בני בנימן בניה הפרעתני
32 Urayi, moto ya mabwaku ya Gashi; Abieli, moto ya Beti-Ariba;
חורי מנחלי געש אביאל הערבתי
33 Azimaveti, moto ya Baarumi; Eliaba, moto ya Shaaliboni;
עזמות הבחרומי אליחבא השעלבני
34 Beni-Ashemi, moto ya Gizoni; Jonatan, mwana mobali ya Shage, moto ya Arari;
בני השם הגזוני יונתן בן שגה ההררי
35 Ayami, mwana mobali ya Sakari, moto ya Arari; Elifali, mwana mobali ya Uri;
אחיאם בן שכר ההררי אליפל בן אור
36 Eferi, moto ya Mekera; Ayiya, moto ya Peloni;
חפר המכרתי אחיה הפלני
37 Etsiro, moto ya Karimeli; Naarayi, mwana mobali ya Ezibayi;
חצרו הכרמלי נערי בן אזבי
38 Joeli, ndeko mobali ya Natan; Mibiari, mwana mobali ya Agiri;
יואל אחי נתן מבחר בן הגרי
39 Tseleki, moto ya Amoni; Naarayi, moto ya Beroti, oyo azalaki komema bibundeli ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya;
צלק העמוני נחרי הברתי נשא כלי יואב בן צרויה
40 Ira mpe Garebi, bato ya Yeteri;
עירא היתרי גרב היתרי
41 Iri, moto ya Iti; Zabadi, mwana mobali ya Akilayi;
אוריה החתי זבד בן אחלי
42 Adina, mwana mobali ya Shiza ya ekolo ya Ribeni mpe mokambi ya mampinga tuku misato ya mpiko;
עדינא בן שיזא הראובני ראש לראובני--ועליו שלשים
43 Anani, mwana mobali ya Maaka; Jozafati, moto ya Mitini;
חנן בן מעכה ויושפט המתני
44 Uzia, moto ya Ashitaroti; Shama mpe Yeyeli, bana mibali ya Otami, moto ya Aroeri;
עזיא העשתרתי שמע ויעואל (ויעיאל) בני חותם הערערי
45 Yediayeli, mwana mobali ya Shimiri; Yoa, ndeko na ye ya mobali, moto ya Tishi;
ידיעאל בן שמרי ויחא אחיו התיצי
46 Elieli, moto ya Maavimi; Yeribayi mpe Yoshavia, bana mibali ya Elinaami; Yitima, moto ya Moabi;
אליאל המחוים ויריבי ויושויה בני אלנעם ויתמה המואבי
47 Elieli, Obedi mpe Yaasieli, bato ya Metsobaya.
אליאל ועובד ויעשיאל המצביה

< 1 Masolo ya Kala 11 >