< Ecechiela 31 >
1 Un vienpadsmitā gadā, trešā mēnesī, pirmā mēneša dienā Tā Kunga vārds uz mani notika sacīdams:
Na mokolo ya liboso ya sanza ya misato, na mobu ya zomi na moko, Yawe alobaki na ngai:
2 Cilvēka bērns, runā uz Faraonu, Ēģiptes ķēniņu, un uz viņa ļaužu pulku: kam tu esi līdzīgs savā augstībā?
« Mwana na moto, loba na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe na mampinga na ye nyonso: ‹ Nani penza akoki kokokana na yo na lokumu?
3 Redzi, Asurs bija ciedra koks uz Lībanus, skaistiem zariem un kuplām lapām un slaiku augumu, un viņa galotne bija iekš mākoņiem.
Tala mokili ya Asiri malamu! Ezalaki lokola nzete ya sedele kati na Libani: bitape na yango ezalaki kitoko mpe na makasa ebele oyo ezalaki kopesa pio koleka banzete nyonso ya zamba; elekaki banzete nyonso ya zamba na molayi, songe na yango ezalaki ekenda kino na mapata.
4 Ūdens viņu darīja lielu, un jūras dziļumi viņu paaugstināja, viņa upes gāja apkārt ap dārziem, un savus ūdeņus tas sūtīja pie visiem lauka kokiem.
Mayi ezalaki kokolisa yango, mpe mayi ya se ya mabele ezalaki koyeisa yango molayi; ebimisaki miluka zingazinga ya esika oyo balonaki yango mpe epanzanaki kino na banzete nyonso ya zamba.
5 Tāpēc viņa augums bija augstāks pār visiem lauka kokiem, un viņa zari vairojās un viņa zariņi plaukstot pagarinājās caur to lielo ūdeni.
Boye, nzete yango ekomaki molayi makasi koleka banzete nyonso ya zamba; bitape na yango ekomaki milayi, mpe makasa na yango ekomaki ebele, pamba te ezalaki kozwa mayi ebele.
6 Visi putni apakš debess taisīja ligzdas viņa zaros, un visi lauka zvēri vedās apakš viņa zariem, un visas lielās tautas sēdēja viņa pavēnī.
Bandeke nyonso ya likolo ezalaki koya kotonga bazala na bitape na yango, banyama nyonso ya zamba mpe ezalaki kobota na se ya bitape na yango. Bikolo nyonso ya minene ezalaki kobika na se ya pio na yango.
7 Tā tas bija skaists savā lielumā un savu zaru garumā, jo viņa sakne bija pie daudz ūdeņiem.
Ezalaki kitoko na monene na yango mpe na molayi ya bitape na yango, pamba te misisa na yango ezalaki ekita kino na mayi minene.
8 Ciedru koki Dieva dārzā viņu neaptumšoja un priedes viņa zariem nelīdzinājās, un kļavu koki nebija tādi kā viņa zariņi, neviens koks Dieva dārzā viņam nelīdzinājās skaistumā.
Kati na elanga ya Nzambe, nzete moko te ya sedele ekokanaki na yango, nzete moko te ya sipele ekokanaki na yango na bitape, nzete moko te ya platane ekokanaki na yango na makasa: nzete moko te kati na elanga ya Nzambe ekokanaki na yango na kitoko.
9 Es viņu biju darījis tik skaistu caur viņa zaru pulku, ka visi Ēdenes koki Dieva dārzā viņu apskauda.
Nasalaki yango kitoko makasi na bitape ebele; bongo banzete nyonso ya Edeni, kati na elanga ya Nzambe, ezalaki kolula yango.
10 Tāpēc tā saka Tas Kungs Dievs: tādēļ ka tu tā biji cēlies garumā, un ka viņš savu galotni izstiepis līdz padebešiem, un viņa sirds sava augstuma dēļ lepojās,
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola ekomaki molayi penza, bongo songe na yango ekendeki kino na mapata; mpe lokola ekomaki na lolendo mpo na molayi na yango,
11 Tāpēc Es viņu nodevu rokā tautu varenajam, ar viņu darīt pēc patikšanas; Es viņu izdzinu viņa bezdievības dēļ.
nakabaki yango na maboko ya nkumu ya bikolo mpo ete apesa yango etumbu oyo ekoki na mabe na yango. Nabenganaki yango;
12 Un sveši, tie tautu briesmīgākie, viņu nocirta un to nometa, viņa zari krita uz kalniem un pa visām ielejām, un viņa zariņi tapa nogāzti visās zemes gravās. Un visas zemes tautas aizgāja no viņa pavēņa un viņu atstāja.
mpe bikolo ya bapaya oyo eleki kanza ekweyisaki yango mpe asundolaki yango; makasa na yango ekweyaki na bangomba mpe na mabwaku nyonso, bitape na yango ebukanaki mpe ekweyaki na mabulu nyonso ya minene ya mokili. Bikolo nyonso ya mabele ekimaki wuta na se ya pio na yango mpe esundolaki yango; bongo etikalaki yango moko.
13 Visi putni apakš debess nolaidās uz viņa, un visi lauka zvēri bija uz viņa zariem;
Bandeke nyonso ya likolo ekomaki kovanda na mobimbi na yango oyo epola, mpe banyama nyonso ya zamba ekomaki kovanda na bitape na yango.
14 Lai nekādi pie ūdens dēstīti koki nelepojās sava auguma pēc, un savu galotni nestiepj līdz mākoņiem, un nekādi no ūdens slacināti koki nepaļaujas uz sev pašiem sava augstuma dēļ; jo tie visi nāvei ir nodoti uz zemes apakšu, cilvēka bērnu vidū, pie tiem, kas grimst bedrē.
Boye, makambo oyo nyonso esalemaki mpo ete nzete moko te oyo elonama pembeni ya mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango mpe mpo na songe na yango oyo ekenda kino na mapata; mpe mpo ete terebente moko te oyo ezali kozwa mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango. Pamba te, yango nyonso etangama ete ekokufa, ekokita kino na mokili ya se ya mabele, kati na bakufi, elongo na bato oyo bakitaka na se ya libulu ya kufa.
15 Tā saka Tas Kungs Dievs: tai dienā, kad tas ellē nogrima, tad Es cēlu bēdas, Es viņa dēļ apklāju dziļumus un aizturēju viņa upes, un tie varenie ūdeņi apstājās, un Es darīju, ka Lībanus viņa dēļ sērojās, un visi lauka koki nokalta viņa dēļ. (Sheol )
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mokolo oyo nzete ya sedele ekitaki na se ya mokili ya bakufi, napesaki mitindo ete mayi oyo ya se ya mabele esala matanga mpo na yango. Likolo na yango, nazipaki mayi ya se ya mabele, nakangaki bibale na yango mpe mayi minene ekangamaki; nazipaki zamba ya Libani na molili mpe nakawusaki banzete nyonso ya elanga. (Sheol )
16 No viņa kritiena trokšņa Es pagānus darīju drebam, kad Es viņu ellē nogrūdu pie tiem, kas grimst bedrē. Un visi Ēdenes koki, tie izlasītie un labākie uz Lībanus, visi no ūdens slacinātie koki iepriecinājās zemes apakšā. (Sheol )
Nalengisaki bikolo na lokito ya kokweya na yango, tango nakitisaki yango na mboka ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu ya kufa. Boye, banzete nyonso ya Edeni, oyo eleki kitoko, mpe banzete ya Libani, oyo eleki kitoko, banzete nyonso oyo ezalaki kozwa mayi malamu, ebondisamaki na se ya mabele. (Sheol )
17 Tie nogrima arīdzan līdz ar viņu ellē pie tiem zobena nokautiem, kas kā viņa palīgi bija sēdējuši viņa pavēnī starp tautām. (Sheol )
Yango mpe ekitaki, elongo na nzete ya sedele, na mokili ya bakufi, epai ya bato oyo bakufaki na mopanga, oyo basanganaki na yango mpo na kovanda na se ya pio na yango kati na bikolo. (Sheol )
18 Kam starp Ēdenes kokiem tu tad esi līdzīgs godā un augstumā? Arī tu tapsi nogrūsts ar Ēdenes kokiem zemes apakšā, tu gulēsi vidū starp neapgraizītiem, pie zobenu nokautiem. Tas ir Faraons un viss viņa ļaužu pulks, saka Tas Kungs Dievs.
Nzete nini kati na Edeni ekokani na yo na monene mpe na lokumu? Nzokande, yo mpe okokita, elongo na banzete ya Edeni, na mokili ya se ya mabele; okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, elongo na bato oyo bakufaki na mopanga. Ndenge wana nde Faraon elongo na bato na ye bakosuka, elobi Nkolo Yawe. › »