< Canticum Canticorum 8 >

1 quis mihi det te fratrem meum sugentem ubera matris meae ut inveniam te foris et deosculer et iam me nemo despiciat
Ah, soki ozalaki ndeko na ngai ya mobali oyo amelaki mabele ya mama na ngai! Soki nakutanaki na yo na libanda, nalingaki kopesa yo beze, mpe moto moko te alingaki kotiola ngai.
2 adprehendam te et ducam in domum matris meae ibi me docebis et dabo tibi poculum ex vino condito et mustum malorum granatorum meorum
Nalingaki komema yo mpe kokotisa yo na ndako ya mama na ngai, mpo ete oteya ngai bolingo. Nalingaki komelisa yo vino ya kitoko, oyo basali na bambuma ya grenade.
3 leva eius sub capite meo et dextera illius amplexabitur me
Tika ete loboko na ye ya mwasi ezala na se ya moto na ngai, mpe loboko na ye ya mobali ekanga ngai nzoto!
4 adiuro vos filiae Hierusalem ne suscitetis et evigilare faciatis dilectam donec ipsa velit
Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino: bolamusa Bolingo na ngai te liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.
5 quae est ista quae ascendit de deserto deliciis affluens et nixa super dilectum suum sub arbore malo suscitavi te ibi corrupta est mater tua ibi violata est genetrix tua
Nani oyo abimi na esobe mpe alaleli mobali na ye ya motema? Nalamusaki yo na se ya nzete ya pome, na esika oyo mama na yo azwaki zemi na yo, esika oyo abotaki yo na pasi.
6 pone me ut signaculum super cor tuum ut signaculum super brachium tuum quia fortis est ut mors dilectio dura sicut inferus aemulatio lampades eius lampades ignis atque flammarum (Sheol h7585)
Tia ngai lokola kashe na motema na yo, lokola kashe na loboko na yo; pamba te bolingo ezali makasi lokola kufa, zuwa ezali makasi lokola mokili ya bakufi. Moto ya bolingo epelaka makasi lokola kake kowuta epai na Yawe. (Sheol h7585)
7 aquae multae non poterunt extinguere caritatem nec flumina obruent illam si dederit homo omnem substantiam domus suae pro dilectione quasi nihil despicient eum
Mayi minene ekoki koboma moto ya bolingo te; ezala mayi ya bibale, ekoki komela yango te. Soki moto apesi biloko na ye nyonso ya ndako mpo na kosomba bolingo, solo penza bakotiola ye.
8 soror nostra parva et ubera non habet quid faciemus sorori nostrae in die quando adloquenda est
Tozali na ndeko moko ya mwasi, azali nanu moke; azali nanu ata na mabele te. Tokosala nini mpo na ye na mokolo oyo bakoluka ye na libala?
9 si murus est aedificemus super eum propugnacula argentea si ostium est conpingamus illud tabulis cedrinis
Soki azalaki mir, tolingaki kotonga likolo na ye ndako oyo esalemi na palata; soki azalaki ekuke, tolingaki kokanga ye na libaya ya sedele.
10 ego murus et ubera mea sicut turris ex quo facta sum coram eo quasi pacem repperiens
Nazali mir, mpe mabele na ngai ezali lokola bandako milayi. Boye, na miso na ye, nazali lokola mwasi oyo azwi kimia.
11 vinea fuit Pacifico in ea quae habet populos tradidit eam custodibus vir adfert pro fructu eius mille argenteos
Salomo azali na elanga ya vino kati na Bala-Amoni, apesi yango na bakengeli; moko na moko kati na bango azalaki kopesa mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko mpo na kosomba bambuma na yango.
12 vinea mea coram me est mille tui Pacifice et ducenti his qui custodiunt fructus eius
Oh Salomo, mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko ezali ya yo, mpe bibende nkama mibale ezali ya bakengeli bambuma; kasi elanga na ngai ya vino, oyo ezali liboso na ngai, ezali ya ngai.
13 quae habitas in hortis amici auscultant fac me audire vocem tuam
Yo oyo ovandi kati na bilanga, baninga na yo balingi koyoka mongongo na yo; tika ete oyokisa ngai yango!
14 fuge dilecte mi et adsimilare capreae hinuloque cervorum super montes aromatum
Oh bolingo na ngai, kima mbangu, zala lokola mboloko to lokola mwana ya mbuli; kende na likolo ya bangomba oyo etondi na matiti ya solo kitoko.

< Canticum Canticorum 8 >