< Romanos 9 >

1 veritatem dico in Christo non mentior testimonium mihi perhibente conscientia mea in Spiritu Sancto
Nazali koloba solo kati na Klisto, nazali kokosa te mpe motema na ngai ezali koyebisa ngai solo na nzela ya Molimo Mosantu:
2 quoniam tristitia est mihi magna et continuus dolor cordi meo
motema na ngai etondi na mawa mpe na pasi oyo ezali kosila te.
3 optabam enim ipse ego anathema esse a Christo pro fratribus meis qui sunt cognati mei secundum carnem
Mpo na yango, eleki kutu malamu mpo na ngai kolakelama mabe mpe kokabwana na Klisto mpo na bandeko na ngai, bato ya ekolo na ngai,
4 qui sunt Israhelitae quorum adoptio est filiorum et gloria et testamenta et legislatio et obsequium et promissa
oyo bazali bana ya Isalaele. Nzambe akomisa bango bana na Ye, apesa bango nkembo, asala boyokani elongo na bango, apesa bango Mobeko, alakisa bango kosambela na solo, apesa bango bilaka
5 quorum patres et ex quibus Christus secundum carnem qui est super omnia Deus benedictus in saecula amen (aiōn g165)
mpe bakoko. Ezali na nzela ya bakoko yango nde Klisto, oyo azali na likolo ya nyonso, ayaki na mokili lokola moto. Tika ete Nzambe apambolama libela na libela! Amen! (aiōn g165)
6 non autem quod exciderit verbum Dei non enim omnes qui ex Israhel hii sunt Israhel
Elingi koloba te ete Liloba na Nzambe ebimaki na pamba, pamba te bakitani nyonso ya Isalaele bazali bana ya Isalaele te,
7 neque quia semen sunt Abrahae omnes filii sed in Isaac vocabitur tibi semen
mpe bakitani nyonso ya Abrayami bazali bana na ye te. Pamba te Nzambe alobaki na Abrayami: « Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. »
8 id est non qui filii carnis hii filii Dei sed qui filii sunt promissionis aestimantur in semine
Elingi koloba ete bana nyonso oyo Abrayami abotaki bazali bakitani na ye te, kasi ezali kaka bana oyo abotaki kati na elaka ya Nzambe nde batangamaka lokola bakitani na ye.
9 promissionis enim verbum hoc est secundum hoc tempus veniam et erit Sarrae filius
Pamba te, tala ndenge Nzambe alakaki Abrayami: « Kaka na eleko oyo, nakozonga, mpe Sara akozala na mwana mobali. »
10 non solum autem sed et Rebecca ex uno concubitum habens Isaac patre nostro
Esukaki kaka wana te: Rebeka mpe abotaki bana mibali mibale na nzela ya tata moko, Izaki, koko na biso.
11 cum enim nondum nati fuissent aut aliquid egissent bonum aut malum ut secundum electionem propositum Dei maneret
Nzokande, liboso ete mapasa yango babotama mpe basala likambo moko ya malamu to ya mabe, mpo ete mabongisi ya lolenge Nzambe aponaka ekokisama,
12 non ex operibus sed ex vocante dictum est ei quia maior serviet minori
kolanda misala ya bato te kasi kolanda mokano ya Ye oyo abengaka, Nzambe alobaki na Rebeka: « Kulutu akosalela leki, »
13 sicut scriptum est Iacob dilexi Esau autem odio habui
kolanda ndenge ekomama: « Nalingaki Jakobi, kasi nayinaki Ezawu. »
14 quid ergo dicemus numquid iniquitas apud Deum absit
Boye toloba nini? Mabe ezali kati na Nzambe? Soki moke te!
15 Mosi enim dicit miserebor cuius misereor et misericordiam praestabo cuius miserebor
Pamba te alobaki na Moyize: « Nakotalisa ngolu epai ya moto oyo Ngai nasepeli kosalela ngolu, mpe nakoyokela mawa moto oyo Ngai nasepeli koyokela mawa. »
16 igitur non volentis neque currentis sed miserentis Dei
Boye, yango ewuti te na posa to na makasi ya moto, kasi ewuti na Nzambe oyo asalaka ngolu.
17 dicit enim scriptura Pharaoni quia in hoc ipsum excitavi te ut ostendam in te virtutem meam et ut adnuntietur nomen meum in universa terra
Pamba te, tala ndenge Makomi elobaki na tina na Faraon: « Nakomisaki yo mokonzi mpo na kotalisa nguya na Ngai kati na yo, mpe mpo ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba. »
18 ergo cuius vult miseretur et quem vult indurat
Boye Nzambe asalaka ngolu na moto oyo Ye asepeli kosalela ngolu, mpe ayeisaka motema libanga moto oyo Ye asepeli koyeisa motema libanga.
19 dicis itaque mihi quid adhuc queritur voluntati enim eius quis resistit
Bato bakoki koloba: « Mpo na nini Nzambe apamelaka biso, pamba te moto moko te akoki kotelemela mokano na Ye? »
20 o homo tu quis es qui respondeas Deo numquid dicit figmentum ei qui se finxit quid me fecisti sic
Oh moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango: « Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo? »
21 an non habet potestatem figulus luti ex eadem massa facere aliud quidem vas in honorem aliud vero in contumeliam
Mosali mbeki azali na bokonzi te ya kosala nzungu ya lokumu mpe nzungu oyo ezanga lokumu na nzela ya potopoto kaka moko?
22 quod si volens Deus ostendere iram et notam facere potentiam suam sustinuit in multa patientia vasa irae aptata in interitum
Okoloba nini soki Nzambe, mpo na kolakisa kanda mpe nguya na Ye, ayikelaki mingi mpiko mbeki oyo etumbolaka kanda na Ye, mbeki oyo ebongisami mpo na kobebisama?
23 ut ostenderet divitias gloriae suae in vasa misericordiae quae praeparavit in gloriam
Okoloba lisusu nini, soki Nzambe asalaki bongo mpo na kolakisa bomengo ya nkembo na Ye mpo na bolamu ya bato oyo asepeli kosalela ngolu, ba-oyo abongisa wuta kala mpo na nkembo?
24 quos et vocavit nos non solum ex Iudaeis sed etiam ex gentibus
Ezali biso nde Nzambe abengaki, kaka kati na Bayuda te kasi mpe kati na Bapagano,
25 sicut in Osee dicit vocabo non plebem meam plebem meam et non misericordiam consecutam misericordiam consecutam
kolanda ndenge azali koloba kati na mokanda ya Oze: « Nakobenga bato oyo bazalaka ya Ngai te bato na Ngai, mpe nakobenga ye oyo azalaka molingami na Ngai te molingami na Ngai. »
26 et erit in loco ubi dictum est eis non plebs mea vos ibi vocabuntur filii Dei vivi
Mpe, « kaka na esika oyo balobaki na bango: ‹ Bozali bato na ngai te, › bakokoma kobenga bango ‹ bana na Nzambe na bomoi. › »
27 Esaias autem clamat pro Israhel si fuerit numerus filiorum Israhel tamquam harena maris reliquiae salvae fient
Ezayi agangaki na tina na Isalaele: « Ata soki motango ya bana ya Isalaele ezalaki lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakobika.
28 verbum enim consummans et brevians in aequitate quia verbum breviatum faciet Dominus super terram
Pamba te Nkolo akokokisa Liloba na Ye na mobimba na yango mpe na lombangu kati na mokili. »
29 et sicut praedixit Esaias nisi Dominus Sabaoth reliquisset nobis semen sicut Sodoma facti essemus et sicut Gomorra similes fuissemus
Ezali ndenge kaka Ezayi amisakolelaki: « Soki Nkolo, Mokonzi ya mampinga, atikelaki biso bakitani te, tolingaki kokoma lokola engumba Sodome, tolingaki kokokana na engumba Gomore. »
30 quid ergo dicemus quod gentes quae non sectabantur iustitiam adprehenderunt iustitiam iustitiam autem quae ex fide est
Boye, toloba lisusu nini? Bapagano oyo bazalaki koluka te kokoma bato ya sembo bakomi sembo na nzela ya kondima,
31 Israhel vero sectans legem iustitiae in legem iustitiae non pervenit
kasi Isalaele oyo azalaki koluka kokoma sembo na nzela ya kotosa Mobeko atikali kokoma sembo te.
32 quare quia non ex fide sed quasi ex operibus offenderunt in lapidem offensionis
Mpo na nini? Pamba te balukaki te kokoma sembo na nzela ya kondima, kasi na nzela ya misala. Yango wana babetaki libaku na libanga oyo ekweyisaka,
33 sicut scriptum est ecce pono in Sion lapidem offensionis et petram scandali et omnis qui credit in eum non confundetur
kolanda ndenge ekomama: « Tala, nazali kotia kati na Siona libanga oyo ebetisaka bato mabaku, libanga monene oyo ekweyisaka bato; moto oyo akotiela yango motema akotikala koyokisama soni te. »

< Romanos 9 >