< Romanos 12 >
1 obsecro itaque vos fratres per misericordiam Dei ut exhibeatis corpora vestra hostiam viventem sanctam Deo placentem rationabile obsequium vestrum
Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.
2 et nolite conformari huic saeculo sed reformamini in novitate sensus vestri ut probetis quae sit voluntas Dei bona et placens et perfecta (aiōn )
Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka. (aiōn )
3 dico enim per gratiam quae data est mihi omnibus qui sunt inter vos non plus sapere quam oportet sapere sed sapere ad sobrietatem unicuique sicut Deus divisit mensuram fidei
Pamba te na ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na bino nyonso: bomikanisaka te koleka makoki na bino, kasi bomikanisaka na lolenge ya mayele, kolanda kondima oyo Nzambe apesi na moko na moko kati na bino.
4 sicut enim in uno corpore multa membra habemus omnia autem membra non eundem actum habent
Pamba te ndenge kaka moko na moko kati na biso azali na biteni ebele kati na nzoto na ye, mpe eteni moko na moko ezalaka na mosala na yango,
5 ita multi unum corpus sumus in Christo singuli autem alter alterius membra
ndenge wana mpe tozali nzoto moko kati na Klisto atako tozali ebele, mpe moko na moko kati na biso azalaka eteni ya nyonso mosusu.
6 habentes autem donationes secundum gratiam quae data est nobis differentes sive prophetiam secundum rationem fidei
Kolanda ngolu oyo epesameli biso, tozalaka na makabo ekesana. Boye tika ete moto oyo azali na likabo ya kosakola asalelaka yango kolanda kondima,
7 sive ministerium in ministrando sive qui docet in doctrina
tika ete moto oyo azali na likabo ya kosala mosala songolo kati na Lingomba amipesaka na mosala yango, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa malakisi apesaka yango,
8 qui exhortatur in exhortando qui tribuit in simplicitate qui praeest in sollicitudine qui miseretur in hilaritate
tika ete moto oyo azali na likabo ya kolendisa alendisaka, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa apesaka na motema moko, tika ete moto oyo azali na likabo ya kokamba akambaka na molende, mpe tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato bakelela asungaka na esengo!
9 dilectio sine simulatione odientes malum adherentes bono
Tika ete bolingo ezalaka na lokuta te! Boyinaka makambo mabe, bokangamaka makasi na makambo malamu.
10 caritatem fraternitatis invicem diligentes honore invicem praevenientes
Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu;
11 sollicitudine non pigri spiritu ferventes Domino servientes
mpo na oyo etali mosala, bozalaka bagoyigoyi te; mpo na oyo etali Molimo, bopelaka na yango makasi; mpo na oyo etali Nkolo, bozalaka bawumbu ya malamu;
12 spe gaudentes in tribulatione patientes orationi instantes
mpo na oyo etali elikya, bozalaka na esengo makasi; mpo na oyo etali pasi, bokangaka mitema; mpo na oyo etali mabondeli, bozalaka na molende;
13 necessitatibus sanctorum communicantes hospitalitatem sectantes
mpo na oyo etali bosenga ya babulami, bosunganaka mpe boyambanaka malamu kati na bandako na bino.
14 benedicite persequentibus benedicite et nolite maledicere
Bopambolaka bato oyo banyokolaka bino; iyo, bopambolaka, kasi bolakelaka mabe te!
15 gaudere cum gaudentibus flere cum flentibus
Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.
16 id ipsum invicem sentientes non alta sapientes sed humilibus consentientes nolite esse prudentes apud vosmet ipsos
Bobikaka na boyokani kati na bino mpe bozalaka na makanisi malamu mpo na baninga. Bozalaka na lofundu te, kasi bozalaka bato ya komikitisa. Bomimonaka te lokola bato bamikoka.
17 nulli malum pro malo reddentes providentes bona non tantum coram Deo sed etiam coram omnibus hominibus
Bozongisaka mabe na mabe te. Bolukaka kosala makambo ya malamu na miso ya bato nyonso.
18 si fieri potest quod ex vobis est cum omnibus hominibus pacem habentes
Lokola ekoki kosalema, mpe lokola bino nde bosengeli kopesa nzela, bozalaka na kimia na bato nyonso.
19 non vosmet ipsos defendentes carissimi sed date locum irae scriptum est enim mihi vindictam ego retribuam dicit Dominus
Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama: « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo.
20 sed si esurierit inimicus tuus ciba illum si sitit potum da illi hoc enim faciens carbones ignis congeres super caput eius
Nzokande, « Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei; soki azali na posa ya komela mayi, pesa ye mayi. Pamba te, soki osali bongo, okotondisa makala ya moto na likolo ya moto na ye. »
21 noli vinci a malo sed vince in bono malum
Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi lukaka nde kolonga mabe na nzela ya kosala bolamu.