< Psalmorum 81 >

1 in finem pro torcularibus Asaph exultate Deo adiutori nostro iubilate Deo Iacob
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Azafi. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati. Boganga na esengo epai ya Nzambe, makasi na biso! Bobetela Nzambe ya Jakobi maboko!
2 sumite psalmum et date tympanum psalterium iucundum cum cithara
Boyemba banzembo, bobeta bambunda mike, lindanda oyo ebimisaka lokito kitoko mpe nzenze!
3 bucinate in neomenia tuba in insigni die sollemnitatis nostrae
Bobeta kelelo na ebandeli ya sanza, na tango oyo sanza mobimba engengaka, mpo na mokolo ya feti na biso!
4 quia praeceptum Israhel est et iudicium Dei Iacob
Pamba te ezali mobeko mpo na Isalaele, mpe mokano ya Nzambe ya Jakobi.
5 testimonium in Ioseph posuit illud cum exiret de terra Aegypti linguam quam non noverat audivit
Atiaki yango lokola mobeko mpo na Jozefi tango abundisaki Ejipito. Nazali koyoka lokota oyo nayebi te:
6 devertit ab oneribus dorsum eius manus eius in cofino servierunt
« Nalongolaki mokumba oyo ezalaki na mapeka na ye, mpe maboko na ye elongwaki na bowumbu ya kosimba bitunga. »
7 in tribulatione invocasti me et liberavi te exaudivi te in abscondito tempestatis probavi te apud aquam Contradictionis diapsalma
Tango ozalaki koganga mpo na pasi, nakangolaki yo, nayanolaki yo kati na kake epai wapi nabombamaki, namekaki yo pembeni ya mayi ya Meriba.
8 audi populus meus et contestabor te Israhel si audias me
Bato na ngai, boyoka ngai! Mpe nakokebisa bino. Ah Isalaele, soki kaka ozalaki koyokela ngai!
9 non erit in te deus recens nec adorabis deum alienum
Okozala na nzambe ya mopaya te kati na yo, okogumbamela nzambe mosusu te, longola kaka ngai!
10 ego enim sum Dominus Deus tuus qui eduxi te de terra Aegypti dilata os tuum et implebo illud
Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito; fungola malamu monoko na yo, mpe nakotondisa yango.
11 et non audivit populus meus vocem meam et Israhel non intendit mihi
Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te, Isalaele aboyaki kotosa ngai.
12 et dimisi illos secundum desideria cordis eorum ibunt in adinventionibus suis
Mpo na yango, natikaki bango kotambola kolanda baposa ya mitema makasi na bango; mpe balandaki makanisi na bango.
13 si populus meus audisset me Israhel si in viis meis ambulasset
Soki bato na ngai bazalaki koyokela ngai, soki Isalaele azalaki kolanda banzela na ngai,
14 pro nihilo forsitan inimicos eorum humiliassem et super tribulantes eos misissem manum meam
nalingaki mbala moko koyokisa banguna na bango soni mpe kobundisa bayini na bango.
15 inimici Domini mentiti sunt ei et erit tempus eorum in saeculo
Mpe bato oyo bayinaka Yawe balingaki komikitisa liboso na Ye, mpe etumbu na bango elingaki kowumela mpo na libela.
16 et cibavit illos ex adipe frumenti et de petra melle saturavit illos
Yawe alingaki koleisa Isalaele bilei ya kitoko mpe kotondisa bango na mafuta ya nzoyi.

< Psalmorum 81 >