< Psalmorum 36 >
1 in finem servo Domini David dixit iniustus ut delinquat in semet ipso non est timor Dei ante oculos eius
Nzembo ya Davidi, mowumbu ya Yawe. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Kati na motema na ngai, nazali na sango kowuta na Nzambe na tina na bato mabe oyo batondi na masumu: Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te na miso na bango.
2 quoniam dolose egit in conspectu eius ut inveniatur iniquitas eius ad odium
Bamipesaka lokumu makasi, bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.
3 verba oris eius iniquitas et dolus noluit intellegere ut bene ageret
Minoko na bango ebimisaka maloba mabe mpe lokuta, baboyaka kosala na bokebi mpe kosala bolamu.
4 iniquitatem meditatus est in cubili suo adstetit omni viae non bonae malitiam autem non odivit
Ezala na bambeto na bango, basalaka kaka mabongisi ya kosala mabe, batambolaka te mpo na kosala bolamu mpe baboyaka mabe te.
5 Domine in caelo misericordia tua et veritas tua usque ad nubes
Yawe, bolingo na Yo ekenda kino na likolo, boyengebene na Yo kino na mapata.
6 iustitia tua sicut montes Dei iudicia tua abyssus multa homines et iumenta salvabis Domine
Bosembo na Yo ezali lokola bangomba ya Nzambe, mikano na Yo ezali mozindo lokola lubwaku ya molayi. Yawe, obikisaka bato mpe banyama.
7 quemadmodum multiplicasti misericordiam tuam Deus filii autem hominum in tegmine alarum tuarum sperabunt
Oh Nzambe, tala ndenge nini bolingo na Yo ezali motuya! Bato bazwaka ebombamelo na elili ya mapapu na Yo.
8 inebriabuntur ab ubertate domus tuae et torrente voluntatis tuae potabis eos
Baliaka mpe batondaka bilei ya Ndako na Yo, mpe omelisaka bango mayi kowuta na bolingo monene na Yo.
9 quoniam apud te fons vitae in lumine tuo videbimus lumen
Pamba te etima ya bomoi ezali elongo na Yo; kati na pole na Yo nde tomonaka pole.
10 praetende misericordiam tuam scientibus te et iustitiam tuam his qui recto sunt corde
Koba kotalisa bolingo na Yo epai ya bato oyo bayebi Yo, mpe bosembo na Yo epai ya bato ya mitema alima.
11 non veniat mihi pes superbiae et manus peccatoris non moveat me
Tika ete bato ya lolendo bakoma te kino epai na ngai, mpe tika ete bato mabe babengana ngai te.
12 ibi ceciderunt qui operantur iniquitatem expulsi sunt nec potuerunt stare
Tala ndenge nini bato ya misala mabe bakweyi, balali na mabele, bazangi makoki ya kotelema.