< Liber Numeri 30 >

1 et locutus est ad principes tribuum filiorum Israhel iste est sermo quem praecepit Dominus
Moyize alobaki na bakambi ya mabota ya Isalaele: « Tala mobeko oyo Yawe asili kopesa:
2 si quis virorum votum Domino voverit aut se constrinxerit iuramento non faciet irritum verbum suum sed omne quod promisit implebit
‹ Soki moto apesi elaka epai na Yawe na nzela ya ndayi to azwi ekateli songolo na nzela ya ndayi, tika ete akokisa elaka na ye, asala kolanda maloba oyo ebimaki na monoko na ye.
3 mulier si quippiam voverit et se constrinxerit iuramento quae est in domo patris sui et in aetate adhuc puellari si cognoverit pater votum quod pollicita est et iuramentum quo obligavit animam suam et tacuerit voti rea erit
Soki elenge moko ya mwasi alapi ndayi epai na Yawe, wana azali nanu na ndako ya tata na ye to azwi ekateli moko na nzela ya seleka,
4 quicquid pollicita est et iuravit opere conplebit
bongo tata na ye ayoki ndayi to ekateli yango mpe alobi na ye eloko moko te, ndayi nyonso oyo alapaki mpe ekateli nyonso oyo azwaki ekotikala se bongo.
5 sin autem statim ut audierit contradixerit pater et vota et iuramenta eius irrita erunt nec obnoxia tenebitur sponsioni eo quod contradixerit pater
Kasi soki tata na ye atelemeli ye tango ayoki yango, ndayi nyonso oyo alapaki mpe ekateli nyonso oyo azwaki ekokoma pamba. Yawe akotangela ye yango te lokola niongo, pamba te tata na ye aboyi yango.
6 si maritum habuerit et voverit aliquid et semel verbum de ore eius egrediens animam illius obligaverit iuramento
Soki elenge mwasi yango abali sima na kolapa ndayi to sima monoko na ye kobimisa ekateli;
7 quo die audierit vir et non contradixerit voti rea erit reddet quodcumque promiserat
bongo mobali na ye ayoki yango mpe alobi na ye eloko moko te, ndayi oyo alapaki to ekateli oyo azwaki ekotikala se bongo.
8 sin autem audiens statim contradixerit et irritas fecerit pollicitationes eius verbaque quibus obstrinxerat animam suam propitius ei erit Dominus
Kasi soki mobali na ye atelemeli ye tango ayoki yango, akweyisi nde ndayi oyo ekangaki ye to ekateli oyo azwaki ye moko mpe ebimaki na monoko na ye. Yawe akotangela ye yango lokola niongo te.
9 vidua et repudiata quicquid voverint reddent
Soki mwasi oyo akufisa mobali to oyo babengana na libala alapi ndayi to azwi ekateli ezala ya ndenge nini, asengeli kokokisa yango.
10 uxor in domo viri cum se voto constrinxerit et iuramento
Soki mwasi ya libala alapi ndayi to azwi ekateli na nzela ya seleka;
11 si audierit vir et tacuerit nec contradixerit sponsioni reddet quodcumque promiserat
bongo, mobali na ye ayoki yango mpe alobi na ye eloko moko te mpe apekisi ye te, ndayi oyo alapaki mpe ekateli oyo azwaki ekotikala se bongo.
12 sin autem extemplo contradixerit non tenebitur promissionis rea quia maritus contradixit et Dominus ei propitius erit
Kasi soki mobali na ye akweyisi yango tango ayoki yango, ndayi moko te to ekateli moko te oyo ebimaki na monoko na ye ekotikala bongo. Pamba te mobali na ye akweyisi yango, mpe Yawe akotangela ye yango lokola niongo te.
13 si voverit et iuramento se constrinxerit ut per ieiunium vel ceterarum rerum abstinentiam adfligat animam suam in arbitrio viri erit ut faciat sive non faciat
Mobali na ye azali na bokonzi ya kondima to koboya ndayi nyonso oyo alapi to ekateli nyonso oyo asili kozwa na kokila bilei.
14 quod si audiens vir tacuerit et in alteram diem distulerit sententiam quicquid voverat atque promiserat reddet quia statim ut audivit tacuit
Kasi soki mobali na ye alobi na ye eloko moko te kino na mokolo oyo ekolanda, elakisi ete asili kondima ndayi nyonso to ekateli nyonso oyo mwasi na ye azwaki. Andimi yango, pamba te alobi eloko moko te tango ayokaki yango.
15 sin autem contradixerit postquam rescivit portabit ipse iniquitatem eius
Nzokande, soki akweyisi ndayi to ekateli yango, sima na koyoka yango, ye nde akomema mokumba ya mbeba ya mwasi na ye. › »
16 istae sunt leges quas constituit Dominus Mosi inter virum et uxorem inter patrem et filiam quae in puellari adhuc aetate est vel quae manet in parentis domo
Tala bikateli oyo Yawe apesaki epai na Moyize na tina na boyokani kati na mobali mpe mwasi na ye, kati na tata mpe bilenge basi oyo bazali na ndako na ye.

< Liber Numeri 30 >