< Micha Propheta 2 >
1 vae qui cogitatis inutile et operamini malum in cubilibus vestris in luce matutina faciunt illud quoniam contra Deum est manus eorum
Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.
2 et concupierunt agros et violenter tulerunt et domos rapuerunt et calumniabantur virum et domum eius virum et hereditatem eius
Soki baluli bilanga ya moto, bazwaka yango na makasi; soki baluli ndako ya moto, babotolaka yango; bakangaka mokolo ndako mpe biloko na ye ya ndako mpe babotolaka moto libula na ye.
3 idcirco haec dicit Dominus ecce ego cogito super familiam istam malum unde non auferetis colla vestra et non ambulabitis superbi quoniam tempus pessimum est
Mpo na yango, Yawe alobi: « Nazali kobongisa mabe mpo na ekolo ya lolenge oyo: ekozala pasi moko oyo bakokoka komibikisa na yango te. Bakokoka lisusu kotambola na lolendo te, pamba te ekozala tango ya pasi makasi.
4 in die illa sumetur super vos parabola et cantabitur canticum cum suavitate dicentium depopulatione vastati sumus pars populi mei commutata est quomodo recedet a me cum revertatur qui regiones nostras dividat
Na mokolo wana, bakosambwisa bino; mpo na kotiola bino, bakobanda koyembela bino banzembo oyo: ‹ Tobebisami penza mobimba! Libula ya bato na ngai ekabwani! Abotoli yango na maboko na ngai mpe akabi bilanga na biso epai ya banguna na biso. › »
5 propter hoc non erit tibi mittens funiculum sortis in coetu Domini
Yango wana, moko te kati na bino akotikala na lisanga ya Yawe mpo na kokabola mabele na zeke.
6 ne loquamini loquentes non stillabit super istos non conprehendet confusio
Basakoli na bango bazalaki koloba: « Kosakola te, kosakola makambo ya boye te! Pasi ekokomela biso te. »
7 dicit domus Iacob numquid adbreviatus est spiritus Domini aut tales sunt cogitationes eius nonne verba mea bona sunt cum eo qui recte graditur
Oh libota ya Jakobi, makambo ya boye esengeli solo kolobama? « Boni, Molimo na Yawe atomboki mpo ete asala makambo ya boye? Maloba na Ye ezali ya boboto te mpo na moto oyo atambolaka alima? »
8 et e contrario populus meus in adversarium consurrexit desuper tunica pallium sustulistis eos qui transiebant simpliciter convertistis in bellum
Na mikolo eleki, bozalaki komona bato na ngai lokola banguna. Bolongolaki bato oyo bazalaki koleka na kimia bilamba ya talo na mawa te, lokola bato oyo bawuti bitumba;
9 mulieres populi mei eiecistis de domo deliciarum suarum a parvulis earum tulistis laudem meam in perpetuum
bobenganaki basi ya bato na ngai longwa na bandako na bango ya kitoko, bolongolaki mpo na libela mapamboli na ngai kati na bana na bango.
10 surgite et ite quia non habetis hic requiem propter inmunditiam eius corrumpetur putredine pessima
Botelema mpe bokende! Awa ezali esika na bino ya kopema te, pamba te ezali mbindo, ebebisami makasi penza, mpe elikya ya kobonga ezali lisusu te.
11 utinam non essem vir habens spiritum et mendacium potius loquerer stillabo tibi in vinum et in ebrietatem et erit super quem stillatur populus iste
Soki mokosi moko to moto moko ya lokuta ayei koloba: « Nakosakola mpo na yo; » bongo moto yango azali na se ya milangwa ya vino to ya masanga mosusu ya makasi, moto ya boye asengeli kaka kozala mosakoli ya bato ya lolenge na ye.
12 congregatione congregabo Iacob totum te in unum conducam reliquias Israhel pariter ponam illum quasi gregem in ovili quasi pecus in medio caularum tumultuabuntur a multitudine hominum
Oh bakitani ya Jakobi, nakosangisa bino nyonso, nakosangisa batikali nyonso ya Isalaele. Nakosangisa bango lokola bameme kati na lopango, lokola bibwele kati na etando na yango ya kolia matiti. Makelele oyo ekoyokana kuna ekozala makelele ya bato ebele.
13 ascendet enim pandens iter ante eos divident et transibunt portam et egredientur per eam et transibit rex eorum coram eis et Dominus in capite eorum
Moto oyo apasolaka nzela akotambola liboso na bango. Bakolekela na nzela oyo bapasoli, bakolekela na nzela ya ekuke mpe bakobimela na nzela yango. Mokonzi na bango akotambola liboso na bango, Yawe akozala liboso na bango.