< Marcum 4 >

1 et iterum coepit docere ad mare et congregata est ad eum turba multa ita ut in navem ascendens sederet in mari et omnis turba circa mare super terram erat
Yesu abandaki lisusu koteya pembeni ya ebale. Bato ebele basanganaki pembeni na Ye. Boye, amataki mpe avandaki kati na bwato, mpe bato nyonso batelemaki na mokili, pembeni ya ebale.
2 et docebat eos in parabolis multa et dicebat illis in doctrina sua
Azalaki koteya bango makambo ebele na masese. Na mateya na Ye, azalaki koloba:
3 audite ecce exiit seminans ad seminandum
« Boyoka! Moloni moko abimaki mpo na kolona.
4 et dum seminat aliud cecidit circa viam et venerunt volucres et comederunt illud
Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela; bandeke eyaki mpe eliaki yango.
5 aliud vero cecidit super petrosa ubi non habuit terram multam et statim exortum est quoniam non habebat altitudinem terrae
Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te; ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te.
6 et quando exortus est sol exaestuavit et eo quod non haberet radicem exaruit
Kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpo ete ezalaki na misisa te.
7 et aliud cecidit in spinas et ascenderunt spinae et offocaverunt illud et fructum non dedit
Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube; banzube ekolaki mpe efinaki-finaki yango. Boye, ebotaki bambuma te.
8 et aliud cecidit in terram bonam et dabat fructum ascendentem et crescentem et adferebat unum triginta et unum sexaginta et unum centum
Ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu; ebimisaki mito, ekolaki mpe ebotaki bambuma: nkona moko ebotaki bambuma tuku misato; mosusu, bambuma tuku motoba; mpe mosusu, bambuma nkama moko. »
9 et dicebat qui habet aures audiendi audiat
Yesu azalaki lisusu koloba: « Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka! »
10 et cum esset singularis interrogaverunt eum hii qui cum eo erant cum duodecim parabolas
Tango atikalaki Ye moko, bantoma zomi na mibale elongo na bato oyo bazingelaki Ye batunaki Ye na tina na masese.
11 et dicebat eis vobis datum est mysterium regni Dei illis autem qui foris sunt in parabolis omnia fiunt
Yesu alobaki na bango: — Epesameli bino koyeba mabombami ya Bokonzi ya Nzambe; kasi mpo na ba-oyo bazali na libanda, makambo nyonso ezali kotalisama na masese;
12 ut videntes videant et non videant et audientes audiant et non intellegant nequando convertantur et dimittantur eis peccata
mpo ete: atako bakoki kotala, bamona eloko te; mpe atako bakoki koyoka, basosola eloko te; noki te bakobongola mitema, mpe masumu na bango ekolimbisama.
13 et ait illis nescitis parabolam hanc et quomodo omnes parabolas cognoscetis
Bongo Yesu alobaki na bango: — Boni, bososoli lisese oyo te? Ndenge nini bokososola masese mosusu?
14 qui seminat verbum seminat
Moloni alonaka Liloba.
15 hii autem sunt qui circa viam ubi seminatur verbum et cum audierint confestim venit Satanas et aufert verbum quod seminatum est in corda eorum
Bato mosusu bazali pembeni ya nzela epai wapi Liloba elonami. Tango kaka bayoki Liloba, Satana ayei mpe alongoli Liloba oyo elonami kati na mitema na bango.
16 et hii sunt similiter qui super petrosa seminantur qui cum audierint verbum statim cum gaudio accipiunt illud
Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele etonda na mabanga: bayoki na bango Liloba mpe bayambi yango mbala moko na esengo;
17 et non habent radicem in se sed temporales sunt deinde orta tribulatione et persecutione propter verbum confestim scandalizantur
kasi lokola bazali na misisa te kati na bango, bakowumela na Liloba yango kaka mpo na tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko eyei, basundoli mbala moko kondima na bango.
18 et alii sunt qui in spinis seminantur hii sunt qui verbum audiunt
Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi kati na banzube: bayoki na bango Liloba;
19 et aerumnae saeculi et deceptio divitiarum et circa reliqua concupiscentiae introeuntes suffocant verbum et sine fructu efficitur (aiōn g165)
kasi mitungisi ya bomoi, lokoso ya bomengo mpe baposa ya makambo ya mokili efini-fini Liloba kati na bango, boye ekotikala kobota bambuma te kati na bango. (aiōn g165)
20 et hii sunt qui super terram bonam seminati sunt qui audiunt verbum et suscipiunt et fructificant unum triginta et unum sexaginta et unum centum
Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu: bayoki malamu Liloba, bandimi yango mpe baboti bambuma; moko aboti bambuma tuku misato; mosusu, bambuma tuku motoba; mpe mosusu lisusu, bambuma nkama moko.
21 et dicebat illis numquid venit lucerna ut sub modio ponatur aut sub lecto nonne ut super candelabrum ponatur
Yesu alobaki na bango lisusu: — Boni, bamemaka solo mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto? Ezali te mpo na kotia yango na likolo ya etelemiselo ya minda?
22 non enim est aliquid absconditum quod non manifestetur nec factum est occultum sed ut in palam veniat
Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga kobima na pole.
23 si quis habet aures audiendi audiat
Tika ete moto azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!
24 et dicebat illis videte quid audiatis in qua mensura mensi fueritis remetietur vobis et adicietur vobis
Alobaki lisusu: — Bosala keba na makambo oyo bozali koyoka! Bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu, mpe bakobakisa kutu lisusu koleka;
25 qui enim habet dabitur illi et qui non habet etiam quod habet auferetur ab illo
pamba te na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
26 et dicebat sic est regnum Dei quemadmodum si homo iaciat sementem in terram
Yesu alobaki lisusu: — Bokonzi ya Nzambe ekokani na moto oyo abwaki nkona na mabele:
27 et dormiat et exsurgat nocte ac die et semen germinet et increscat dum nescit ille
butu mpe moyi, alala to alamuka, nkona ebimisaka moto, ekolaka yango moko mpe ayebaka te ndenge nini yango ezali kokola;
28 ultro enim terra fructificat primum herbam deinde spicam deinde plenum frumentum in spica
pamba te yango moko mabele nde ebimisaka mbuma: liboso, moto ya nzete; sima, matiti; mpe na suka, bambuma ya ble etondaka na nzete.
29 et cum se produxerit fructus statim mittit falcem quoniam adest messis
Bongo soki bambuma ekomeli, azwaka mbala moko mbeli oyo bakataka na yango matiti ya ble, pamba te eleko ya kobuka bambuma ekoki.
30 et dicebat cui adsimilabimus regnum Dei aut cui parabolae conparabimus illud
Yesu alobaki lisusu: — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini? Tokoki kosalela lisese nini mpo na kokokanisa yango?
31 sicut granum sinapis quod cum seminatum fuerit in terra minus est omnibus seminibus quae sunt in terra
Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde: tango balonaka yango, ezalaka nkona oyo eleki moke kati na bankona nyonso ya mokili.
32 et cum seminatum fuerit ascendit et fit maius omnibus holeribus et facit ramos magnos ita ut possint sub umbra eius aves caeli habitare
Kasi sima na kolona yango, ekokola mpe ekomaka molayi koleka ndunda nyonso ya elanga, ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na se ya pio na yango.
33 et talibus multis parabolis loquebatur eis verbum prout poterant audire
Yesu azalaki kosalela masese ya ndenge na ndenge mpo na koteya bango Liloba na Nzambe, kolanda bososoli na bango;
34 sine parabola autem non loquebatur eis seorsum autem discipulis suis disserebat omnia
azangaki te kosalela masese mpo na koloba na bango. Kasi soki atikali Ye moko elongo na bayekoli na Ye, azalaki kolimbola makambo nyonso.
35 et ait illis illa die cum sero esset factum transeamus contra
Kaka na mokolo yango wana, wana pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.
36 et dimittentes turbam adsumunt eum ita ut erat in navi et aliae naves erant cum illo
Batikaki bato, bamemaki Ye na bwato mpe bakatisaki na ngambo mosusu. Babwato mosusu mpe ezalaki elongo na bango.
37 et facta est procella magna venti et fluctus mittebat in navem ita ut impleretur navis
Mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa, mbonge ekomaki kobeta na bwato, mpe bwato ekomaki kotonda na mayi.
38 et erat ipse in puppi supra cervical dormiens et excitant eum et dicunt ei magister non ad te pertinet quia perimus
Yesu azalaki na sima, alalaki pongi mpe atiaki moto na likolo ya kuse. Bayekoli balamusaki Ye mpe bayebisaki Ye na koganga: — Moteyi, tozali kokufa; mpe ozali komitungisa na Yo te?
39 et exsurgens comminatus est vento et dixit mari tace obmutesce et cessavit ventus et facta est tranquillitas magna
Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale: — Tika makelele! Vanda nye! Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki.
40 et ait illis quid timidi estis necdum habetis fidem
Bongo alobaki na bayekoli na Ye: — Mpo na nini bozali kobanga? Bozali nanu na kondima te?
41 et timuerunt magno timore et dicebant ad alterutrum quis putas est iste quia et ventus et mare oboediunt ei
Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango: « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye? »

< Marcum 4 >