< Lucam 24 >
1 una autem sabbati valde diluculo venerunt ad monumentum portantes quae paraverant aromata
Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, basi bakendeki na kunda mpe bamemaki mafuta ya solo kitoko oyo balambaki.
2 et invenerunt lapidem revolutum a monumento
Libanga oyo ekangaki ekotelo ya kunda, bakutaki yango etindikama mosika na ekotelo ya kunda.
3 et ingressae non invenerunt corpus Domini Iesu
Bakotaki, kasi bamonaki te nzoto ya Nkolo Yesu.
4 et factum est dum mente consternatae essent de isto ecce duo viri steterunt secus illas in veste fulgenti
Wana bazalaki nanu komitungisa mpo na likambo yango, bato mibale babimelaki bango, balata bilamba oyo ezali kongenga makasi.
5 cum timerent autem et declinarent vultum in terram dixerunt ad illas quid quaeritis viventem cum mortuis
Basi yango babangaki, bakitisaki bilongi na bango na ngambo ya mabele; kasi bato wana mibale balobaki na bango: — Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi Ye oyo azali na bomoi?
6 non est hic sed surrexit recordamini qualiter locutus est vobis cum adhuc in Galilaea esset
Azali lisusu awa te, asekwi. Bokanisa makambo oyo ayebisaki bino, wana azalaki nanu kati na Galile:
7 dicens quia oportet Filium hominis tradi in manus hominum peccatorum et crucifigi et die tertia resurgere
« Esengeli ete bakaba Mwana na Moto na maboko ya bato ya masumu; esengeli ete babaka Ye na ekulusu; mpe esengeli ete asekwa sima na mikolo misato. »
8 et recordatae sunt verborum eius
Boye, bakanisaki maloba ya Yesu.
9 et regressae a monumento nuntiaverunt haec omnia illis undecim et ceteris omnibus
Tango bazongaki longwa na kunda, bayebisaki makambo wana nyonso epai ya bayekoli zomi na moko mpe epai ya baninga na bango nyonso.
10 erat autem Maria Magdalene et Iohanna et Maria Iacobi et ceterae quae cum eis erant quae dicebant ad apostolos haec
Ezalaki: Mari, moto ya mboka Magidala; Jane mpe Mari, mama ya Jake. Baninga na bango mosusu ya basi bayebisaki mpe makambo yango epai ya bantoma,
11 et visa sunt ante illos sicut deliramentum verba ista et non credebant illis
kasi bazwaki maloba ya basi yango lokola maloba ezanga tina, mpe bandimaki bango te.
12 Petrus autem surgens cucurrit ad monumentum et procumbens videt linteamina sola posita et abiit secum mirans quod factum fuerat
Kasi Petelo atelemaki mpe apotaki mbangu kino na kunda. Agunzamaki mpo na kotala, amonaki kaka biteni ya elamba ya lino elala yango moko. Alongwaki kuna mpe azongaki, akamwaki makasi makambo oyo ewutaki kosalema.
13 et ecce duo ex illis ibant ipsa die in castellum quod erat in spatio stadiorum sexaginta ab Hierusalem nomine Emmaus
Nzokande, kaka na mokolo yango, mibale kati na bango bazalaki kokende na mboka moko oyo kombo na yango ezalaki « Emausi. » Mboka yango ezalaki mosika na Yelusalemi, na bakilometele pene zomi na mibale.
14 et ipsi loquebantur ad invicem de his omnibus quae acciderant
Bazalaki kosolola na tina na makambo nyonso oyo ewuti kosalema.
15 et factum est dum fabularentur et secum quaererent et ipse Iesus adpropinquans ibat cum illis
Wana bazalaki kosolola mpe kotiana tembe mpo na makambo yango, Yesu asanganaki na bango mpe akomaki kokende na bango nzela moko.
16 oculi autem illorum tenebantur ne eum agnoscerent
Kasi lokola miso na bango ezalaki ya kozipama, bakokaki te kososola ete ezali Yesu.
17 et ait ad illos qui sunt hii sermones quos confertis ad invicem ambulantes et estis tristes
Alobaki na bango: — Makambo nini bozali kotiana na yango tembe na kotambola? Batelemaki, bilongi mawa-mawa.
18 et respondens unus cui nomen Cleopas dixit ei tu solus peregrinus es in Hierusalem et non cognovisti quae facta sunt in illa his diebus
Moko kati na bango, kombo na ye « Kleopasi, » alobaki na Ye: — Kati na bavandi nyonso ya Yelusalemi, yo moko kaka oyebi te makambo oyo ewuti kosalema mikolo oyo!
19 quibus ille dixit quae et dixerunt de Iesu Nazareno qui fuit vir propheta potens in opere et sermone coram Deo et omni populo
Yesu atunaki bango: — Makambo nini? Bazongisaki: — Ezali makambo oyo etali Yesu ya Nazareti: azalaki mosakoli moko ya nguya, na misala mpe na maloba, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso.
20 et quomodo eum tradiderunt summi sacerdotum et principes nostri in damnationem mortis et crucifixerunt eum
Kasi bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi na biso bakabaki Ye mpo ete bakatela Ye etumbu ya kufa, mpe babakaki Ye na ekulusu.
21 nos autem sperabamus quia ipse esset redempturus Israhel et nunc super haec omnia tertia dies hodie quod haec facta sunt
Tozalaki kolikya ete Ye nde akokangola Isalaele. Kasi longola nyonso wana, lelo ezali mokolo ya misato wuta makambo wana esalemaki.
22 sed et mulieres quaedam ex nostris terruerunt nos quae ante lucem fuerunt ad monumentum
Lisusu, ndambo ya basi kati na biso bakamwisi biso makasi; bakendeki na kunda na tongo-tongo,
23 et non invento corpore eius venerunt dicentes se etiam visionem angelorum vidisse qui dicunt eum vivere
kasi bamonaki nzoto na Ye te, mpe bayaki koyebisa biso ete bamonaki ba-anjelu kobimela bango mpe koyebisa bango ete Yesu azali na bomoi.
24 et abierunt quidam ex nostris ad monumentum et ita invenerunt sicut mulieres dixerunt ipsum vero non viderunt
Ndambo kati na baninga na biso bakendeki na kunda, mpe makambo oyo bamonaki kuna ekokani penza na oyo basi balobaki, kasi bamonaki Yesu te.
25 et ipse dixit ad eos o stulti et tardi corde ad credendum in omnibus quae locuti sunt prophetae
Yesu alobaki na bango: — Ah! Bozali penza bazoba! Tala ndenge mitema na bino ezali penza mabanga! Bozali penza kondima te makambo nyonso oyo basakoli baloba!
26 nonne haec oportuit pati Christum et ita intrare in gloriam suam
Boni, Klisto asengelaki te komona pasi ndenge wana mpo ete akota kati na nkembo na Ye?
27 et incipiens a Mose et omnibus prophetis interpretabatur illis in omnibus scripturis quae de ipso erant
Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.
28 et adpropinquaverunt castello quo ibant et ipse se finxit longius ire
Tango bakomaki pene ya mboka epai wapi bazalaki kokende, Yesu asalaki lokola nde azali kokende mosika.
29 et coegerunt illum dicentes mane nobiscum quoniam advesperascit et inclinata est iam dies et intravit cum illis
Kasi bango babondelaki Ye makasi: — Vanda elongo na biso, pamba te pokwa esili kokoma, mpe butu elingi kokota. Boye Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda elongo na bango.
30 et factum est dum recumberet cum illis accepit panem et benedixit ac fregit et porrigebat illis
Tango avandaki na mesa elongo na bango, akamataki lipa, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango na biteni, mpe apesaki bango yango.
31 et aperti sunt oculi eorum et cognoverunt eum et ipse evanuit ex oculis eorum
Mbala moko, miso na bango efungwamaki mpe basosolaki ete ezali Yesu, kasi alimwaki na miso na bango.
32 et dixerunt ad invicem nonne cor nostrum ardens erat in nobis dum loqueretur in via et aperiret nobis scripturas
Batunanaki: — Boni, mitema na biso etondaki na esengo te wana azalaki kosolola na biso na nzela mpe kolimbolela biso Makomi?
33 et surgentes eadem hora regressi sunt in Hierusalem et invenerunt congregatos undecim et eos qui cum ipsis erant
Kaka na tango yango, batelemaki mpe bazongaki na Yelusalemi epai wapi bakutaki bayekoli zomi na moko basangana elongo na baninga na bango,
34 dicentes quod surrexit Dominus vere et apparuit Simoni
oyo balobaki na bango: — Ezali ya solo, Nkolo asekwi; abimelaki Simona!
35 et ipsi narrabant quae gesta erant in via et quomodo cognoverunt eum in fractione panis
Bango mibale mpe bayebisaki makambo oyo ekomelaki bango na nzela mpe ndenge nini basosolaki Yesu tango akataki lipa na biteni.
36 dum haec autem loquuntur Iesus stetit in medio eorum et dicit eis pax vobis ego sum nolite timere
Wana bazalaki nanu kosolola na tina na makambo yango, Yesu ayaki kotelema na kati-kati na bango mpe alobaki: — Tika ete kimia ezala na bino!
37 conturbati vero et conterriti existimabant se spiritum videre
Babangaki mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni elima.
38 et dixit eis quid turbati estis et cogitationes ascendunt in corda vestra
Yesu atunaki bango: — Mpo na nini bozali kobanga? Mpe mpo na nini bozali na tembe kati na mitema na bino?
39 videte manus meas et pedes quia ipse ego sum palpate et videte quia spiritus carnem et ossa non habet sicut me videtis habere
Botala maboko mpe makolo na Ngai; ezali penza Ngai. Bosimba Ngai mpe botala! Elima ezalaka na mosuni te, ezalaka mpe na mikuwa te; nzokande, bozali komona malamu ete, Ngai, nazali na yango.
40 et cum hoc dixisset ostendit eis manus et pedes
Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na Ye.
41 adhuc autem illis non credentibus et mirantibus prae gaudio dixit habetis hic aliquid quod manducetur
Lokola bakokaki nanu kondima te mpo ete batondisamaki na esengo mpe bazalaki kokamwa mingi, Yesu atunaki bango: — Bozali awa na eloko ya kolia?
42 at illi obtulerunt ei partem piscis assi et favum mellis
Bapesaki Ye eteni ya mbisi bakalinga.
43 et cum manducasset coram eis sumens reliquias dedit eis
Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango.
44 et dixit ad eos haec sunt verba quae locutus sum ad vos cum adhuc essem vobiscum quoniam necesse est impleri omnia quae scripta sunt in lege Mosi et prophetis et psalmis de me
Bongo alobaki na bango: — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino: « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »
45 tunc aperuit illis sensum ut intellegerent scripturas
Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi.
46 et dixit eis quoniam sic scriptum est et sic oportebat Christum pati et resurgere a mortuis die tertia
Alobaki na bango: — Tala makambo oyo ekomama: « Klisto akomona pasi, mpe akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato;
47 et praedicari in nomine eius paenitentiam et remissionem peccatorum in omnes gentes incipientibus ab Hierosolyma
mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. »
48 vos autem estis testes horum
Bino nde bozali batatoli ya makambo yango.
49 et ego mitto promissum Patris mei in vos vos autem sedete in civitate quoadusque induamini virtutem ex alto
Ngai nakotindela bino Molimo oyo Tata na Ngai alakaki; boye bino, botikala awa, kati na engumba oyo, kino bokotondisama na nguya ya Likolo.
50 eduxit autem eos foras in Bethaniam et elevatis manibus suis benedixit eis
Yesu amemaki bango na libanda ya engumba, pene ya Betani; mpe kuna, atombolaki maboko mpe apambolaki bango.
51 et factum est dum benediceret illis recessit ab eis et ferebatur in caelum
Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo.
52 et ipsi adorantes regressi sunt in Hierusalem cum gaudio magno
Bongo bagumbamelaki Ye mpe bazongaki na Yelusalemi na esengo makasi.
53 et erant semper in templo laudantes et benedicentes Deum amen
Mpe kuna na Yelusalemi, bazalaki kovanda tango nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kokumisa Nzambe.